Lolenge nini okoki kobika na kartyé oyo ezali na makámá mingi?
MARIA, mwasi moko ya Brésil alobi ete: “Nazalaki ntango nyonso na nsɔ́mɔ. Nazalaki kobanga kati na etómbola (ascenseur). Nazalaki kobanga kati na motuka na ngai. Nazalaki kobanga na ndako na ngai. Mobulu mozalaki kosalema bipai binso. Bazalaki ntango nyonso kobɔtɔla bato biloko na bango.” Ookaka lokola mwasi wana ya Brésil, obangaka wana ozali na kartyé na bino, mingi mpenza na butu soki molili ekɔti?
Kotánga babúku ya masoló oyo malobelaka kolukaluka miyibi ekoki mpenza kosepelisa, kasi lolenge makambo malekaka kati na bomoi ya mokolo na mokolo ezalaka mbala mingi likambo ya lisɛki te. Bolukiluki ya basáli mabe ekoki mbala mosusu kopesa litomba moko te. To, wana babomi moto, ekoki kozala ete moto mosusu auti kobungisa mobali na ye, tata na ye, to mwana mobali na ye, to mwasi na ye, mama na ye to mwana mwasi na ye. Mabe mazali kobakisama epai ofandaka? Ozali kooka mposa makasi ya kofanda na esika ya kimya epai libota na yo likoki kozala na libateli? To, okoki kosala nini mpo na kolónga soki ozali kobɔkɔla bana na yo na esika mabe mazali kosalema mingi?
Ezali solo ete, bingumba mosusu bizali naino epai mabe mazali kosalema mingi te. Na bamboka mingi, bato bazali naino kofanda na kimya lokola na bisika mosika na zamba to kati na bamboka mike ya kimya. Kasi makambo mazali kobongwana nokinoki ata kati na bisika oyo kala biyebanaki lokola ete bizali mpenza na mobulu te. Na ndakisa, esili koleka mibu 50, 70% ya bato na Brésil bazalaki kofanda na bamboka mike. Sikawa 70% ya bato bazali kofanda kati na bingumba. Lokola kobakisama ya libaku ya kozwa mosala, bokóli ya mobulu mpe kosala mabe esili kobakisama na mikakatano ya bingumba. Ata ozali kofanda na esika oyo ezali na makámá mingi to na esika ya makámá mingi te, osengeli kokende na mosala to na eteyelo mpe osengeli kosala makambo mingi mosika na ndako.
Kondimáká likambo oyo ete “syndrome de panique (bilembo ya nsɔ́mɔ)” esili kopalangana mingi, mokonzi moko ya polisi na engumba ya Rio de Janeiro atángi bokeseni mpe masangá ya basáli-mabe lokola makambo oyo mazali kolendisa yango. Akanisi lisusu ete bazulunalo mpe televizyó ezali kopesa nzela na kopalanganisama ya bobángi, “kosaláká bopusi likoló na makanisi ya bato na nzela ya bansango ya nsɔ́mɔ.” Boombo ya bilangwiseli, kokabwana ya mabota mpe mateya mabe ya lingomba ezali mpe kopesa nzela na bokóli ya ezaleli ya kotyola mibeko. Bongo mikolo mizali koya mikozala boni? Makambo ya kolendisa mobulu, oyo malakisami kati na babúku mpe bafilime na lolenge ya masano, makoyeisa mitema ya bato makasi epai na baninga na bango. Boye te? Bisika oyo bitalelami lokola ete bizangi mobulu bikokóma mpe na makámá mingi?
Lokola mabe mazali lisɛki te mpo na moto oyo akutani na yango, tozali na mposa makasi ya kobatelama. Ezali likambo ya kokamwa te ete bana-mboka oyo batungisami bazali kosɛnga ete bapolisi bázala mingi kati na balabála mpe ete bápesa bitumbu makasi ya bolɔ́kɔ to ata etumbu ya liwa! Atako yango ezali na makámá mingi, bato mosusu bazali kosomba mandóki mpo na komibatela. Basusu oyo balingi ete bakonzi bátya mibeko makasi likoló na botekisi mandóki. Kasi ata nsango mabe oyo ete mobulu mozali koyikana mingi, ntina ezali te ya kozanga elikya. Ya solo, bafándi mingi ya bingumba minene lokola Johannesburg, Mexico, New York, Rio de Janeiro, mpe São Paulo bakweá nkutu te na mabɔ́kɔ ya miyibi. Tótalela lolenge nini bato balóngaka kati na bakartyé oyo ezali na makámá mingi.
Batelá elimo ya kolónga
Na ntina na esika moko oyo ezalaki na mobulu mingi, mokomi moko alobelaki “bwanya mpe kolendendela ya bankóto ya bato ya Brésil baoyo basili komisalela lolenge ya bomoi oyo ebongi mpe oyo ezali ya nsɔ́ni te atako ezalela ya bomoi ezali ntango nyonso kokóma mpasi mingi.” Nsima ya kolekisa mibu 38 na Rio de Janeiro, Jorge alobi ete: “Naboyaka kotambola na babalabála mosusu mpe bisika mosusu mpe nalingaka mpenza te koluka koyeba makambo oyo mazali kobenda likebi na balabála. Naboyaka mpe kotambola na balabála na butu mpe namonisaka te ete nazali mpenza na bobángi mingi. Atako nazalaka na bokɛngi, natalelaka bato nyonso lokola nde bazali bato ya kolongobana, kopesáká bango lokumu mpe limemya.”
Ee, esengeli koboya mitungisi oyo mizangi ntina. Komikɔtisa na makambo ya bato mosusu te. Kobosana soko moke te likambo oyo ete bobángi ya makasi ekoki kotungisa bɔɔngɔ́, kosaláká ete ata bato oyo bazali na etamboli malamu básala makambo ya bozoba. Na ntina na mosala na ye kati na bisika ya makámá mingi, Odair amonisi ete: “Namekaka kokanisa ete makambo makoleka malamu, nalukaka te kotondisa na makanisi na ngai bobángi ya makambo mabe oyo makoki kobima mpamba te yango ekopesa mitungisi mpe nsɔ́mɔ kozanga ntina. Nalukaka kopesa bato banso limemya.” Longolá likambo ya kozala na bokɛngi mpe ya kozala mosika na baoyo bamonani ete bakoki kozala bato mabe, abakisi lisalisi mosusu mpo na kopekisa maoki na ye: “Koleka makambo nyonso, nakólisaka elikya makasi epai na Yehova Nzambe, komikundoláká ete likambo moko te likoki kobombama na miso na ye mpe likambo moko te likoki kobima kozanga ete apesa yango nzela.”
Nzokande, moto moko te alingaka kozala ntango nyonso kati na bobángi. Lisusu, nani akoki kotya ntembe ete bobángi mpe komitungisa makasi na makanisi ekoki kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ ya mayoki mpe ya nzoto? Na yango, elikya nini ezali mpo na baoyo bazali kobanga ete bazali ntango nyonso na likámá ya kokwea na mabɔ́kɔ na bato mabe? Lokola mingi bazali kobanga ete mobulu monene mozali naino koya, tokoki mokolo mosusu komona nsuka ya mabe? Tosɛngi ete otánga lisoló lilandi, “Bobángi ekosila ntango nini?”