Bakufi bakoki komona biso?
MWASI moko abomi mobali na ye. Mbula nsambo na nsima abulungani na nsɔ́mɔ ya ndɔ́tɔ oyo akanisi ete ezali elembo ya nkanda ya mobali na ye. Mpo na kobondela “elimu” na ye, atindi mwana na ye ya mwasi mpo na kosopa libonza ya masanga likoló ya nkunda na ye.
Mwana yango ya mwasi ayebaki te soki akoloba nini na elimu ya tata na ye, mpamba te libonza yango liutaki na mama na ye oyo abomaki tata na ye. Lɛki na ye ya mobali azalaki komona ye, longwa na esika moko ya kobombama. Abɛlɛmaki penepene, mpe elongo na ndeko na ye ya mwasi babondelaki tata na bango ete asalisa bango na kobekola liwa na ye.
Lisoló oyo lizwami na búku The Libation Bearers (Bapesi mabonza), lisano ya Bagreke oyo ekomamaki esili koleka mibu 2 400. Na biteni mosusu ya mokili, mingi mpenza na Afrika, kopesa mabonza motindo oyo likoló ya nkunda ezali kosalema kino lelo.
Na ndakisa, talá lisoló ya Ibe, oyo afandaka na Nigeria. Nsima ya kokufisa bana misato, akendeki epai ya nganga-nkisi, oyo ayebisaki Ibe ete kufa ya bana na ye wana nyonso ezalaki mpamba te—tata ya Ibe oyo asilá kokufa azalaki na nkanda mpo ete bakundaki ye na lolenge lobongi te.
Kolandáká toli ya nganga-nkisi wana, Ibe abomaki ntaba mpe asopaki libonza ya lotoko mpe ya masanga ya mbila likoló ya nkunda ya tata na ye. Abelelaki elimu ya tata na ye, asɛngaki bolimbisi, amonisaki bolingo na ye, mpe asɛngaki mapamboli.
Ibe andimisamaki mpenza ete tata na ye akokaki komona mpe koyoka ye. Azalaki kondima ete tata na ye azali ntango nyonso na bomoi; kasi nsima ya liwa na ye “atikaki” mokili oyo mozali komonana mpo na kokende na mokili oyo mokomonanaka te. Ibe akanisaka ete tata na ye atikaki mokili oyo ya nzoto mpe ya makila mpo na kokende na mokili ya bilimu, mboka ya bankɔ́kɔ.
Ibe akanisaka boye: ‘Atako Tata azali lisusu na mokili oyo te, akanisaka ngai ntango nyonso mpe azali komibanzabanza mpo na bolamu na ngai. Mpe lokola azali sikawa elimu na nguya mingi, azali mpenza na etɛlɛmɛlo malamu mpo na kosalisa ngai koleka ntango azalaki moto awa na mabelé. Lisusu, akoki kosolola mbala moko elongo na Nzambe mpo na bolamu na ngai, mpamba te Nzambe mpe azali elimo. Tata akoki kosilika sikawa, kasi soki namoniseli ye limemya oyo ebongi, akolimbisa ngai mpe akopambola ngai.’
Na Afrika, bindimeli oyo ete bakufi bamonaka bato ya bomoi awa na mabelé mpe ete bazali na bopusi likoló na bomoi na bango epalangani mingi epai na baoyo balandaka lingomba ya bonkɔ́kɔ. Ezali mpe komonana mingi epai na baoyo bazali komitánga baklisto. Na ndakisa, nsima wana mwasi auti kosala milulu ya libala na ye na ndakonzambe, mbala mingi akozonga lisusu na ndako ya baboti na ye mpo na kozwa mapamboli. Kuna, bakobelela bankɔ́kɔ, mpe bakosopa libonza ya masanga mpo na bango. Bato mingi bakanisaka ete likámá ekoki kobima na libala yango soki basali bongo te.
Bakanisaka ete bankɔ́kɔ, to bilimu ya bankɔ́kɔ, bakɛngɛlaka bomoi mpe bomɛngo ya mabota na bango awa na mabelé. Engebene likanisi wana, bazali baninga ya nguya mingi, bazali na makoki ya kobotisa milóna malamu, kopesa bolamu, mpe kobatela bango na makámá. Babondelaka mpo na bolamu ya bato. Nzokande, soki babosani bango to basilikisi bango, bakomema makámá—bokɔnɔ, bobólá, ata mpe kufa. Na yango, na nzela ya mabonza mpe ya milulu, bato bazali kosala makasi mpo na kobatela boyokani malamu elongo na bakufi.
Okanisaka ete bakufi bazalaka na bopusi monene kati na makambo ya bato na bomoi? Osilá kotɛlɛma penepene na nkunda ya molingami na yo mpe koyebisa ye mwa makambo, bobele mpo na komeka soki akoki koyoka yo? Ya solo, likambo oyo lisalemaka na ntango ya liwa ya moto nde lizali kokata soki bakufi bamonaka mpe bayokaka biso. Tótala oyo Biblia ezali koloba likoló na likambo wana ya ntina mingi.