Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/11 lok. 32
  • Mpo na nini bato mabe bazali kokóma na bozwi mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bato mabe bazali kokóma na bozwi mingi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/11 lok. 32

Mpo na nini bato mabe bazali kokóma na bozwi mingi?

“MPO na nini bato mabe bazali kokóba kozala na bomoi?” Oyo ezali motuna mosembwi Yobo atunaki uta kala, mpe kobanda na eleko na ye, motuna yango mozali sé kozongelama mbala na mbala. Ekoki mpenza kozala bongo kati na makanisi ya ebele ya bafandi ya oyo ebéngamaki kala ete Yougoslavie (lokola mwasi oyo amonisami na lokasa na biso ya ezipeli) oyo bazali na mawa mpo na baoyo bazali konyokwama na etumba ya nsɔ́mɔ. Mpo na nini bato mabe bazali koumela mpe bazali nkutu kokóma na bozwi mingi? Lokola Yobo alobaki yango, mingimingi, “ndako na bango ijali na kimia, kobanga ejali kuna tɛ; mpimbo na Njambe ejali likolo na bango tɛ.”​—Yobo 21:7, 9.

Yango elimboli ete ezali na ntina te kosalela Nzambe, kolinga mozalani na yo, mpe koboya mabe? Ntina ezali mpenza! Biblia ezali kopesa biso elikya kitoko ntango elobi ete: “Omitungisa tɛ mpɔ na bato na masumu; yokela basali na mabe jua tɛ. Mpɔ ete bakolimwa mbango lokola matiti; bakokaoka lokola matiti mobesu. Jala na elikia epai na [Yehova] mpe sala malamu.”​—Njembo 37:1-3.

Ee, oyo emonani lokola bozwi mingi oyo bato mabe bazali na yango ezali bobele mpo na ntango moke. Ya solo, bomoi na bango ezali mokuse, nzokande baoyo bazali kosalela Yehova bazali na elikya kitoko mpo na mikolo mizali koya. Mosika te, elaká ya Nzambe ekokokisama: “[Nzambe] akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe tɛ; mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.” (Emɔnisɛli 21:4) Bobele bato ya sembo nde bakomona yango, kasi bato mabe te. Oyo nde elendiseli ya kobɛlɛma pene na Yehova mpe ya koyekola kosala mokano na ye, atako bato mabe bazali zingazinga na biso!

Soki olingi koyeba makambo mosusu to olingi ete moto moko aya kolakisa yo Biblia kozanga kofuta mbongo, tuná Batatoli ya Yehova ya mboka oyo yo ofandi to tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto