Kobanga bakufi epalangani mingi
Moi mosilaki kolala kala. Ozali kozonga na ndako mwa moke na nsima ya ngonga oyo omeseni kozonga. Lokola nzela na yo eleki kati na malita ya mboka na bino, motema na yo ebandi kobɛta nokinoki. Kimya ya butu esali ete oyoka ata makɛlɛlɛ ya moke. Na mbala moko, oyoki mongongo moko makasi, ya kobangisa, oyo engangi mosika. Obandi kotambola mbangumbangu—makila mpe ekómi koleka nokinoki—wana ozali kokende na ndako mpo na kozwa libateli.
OYOKÁ naino nsɔ́mɔ te wana ozalaki na kati ya malita to penepene na yango? Soki ee, ekoki kozala ete opusamaki na mateya ya lingomba oyo epalangani na mokili mobimba—ete bilimu ya bakufi ekoki kosalisa bato na bomoi to kosala bango mabe.
Biyambayamba mingi biuti na bindimeli oyo ete bakufi bazali na mposa ya lisalisi ya bato na bomoi to ete bakoki kosala bato na bomoi mabe soki babondeli bango te. Na ndakisa, kati na mikili misusu ya Amérique Latine, bato mingi bazali na momeseno ya kotonga mwa ndako moko moke oyo ezali na ekulusu, esika moto moko akufaki na likámá. Bato bapelisaka buzí mpe batyaka bafololo kuna, wana ezali bango kosala milende mingi mpo na komonisa komibanzabanza to mpo na koluka kosalisa molimo to elimu ya mokufi. Na bantango mosusu, nsango ya “bikamwiseli” oyo ezali biyano na mabondeli ezali kopalangana, na boye ete bato bakobanda koya mingi na animita, mwa ndako moke mpo na molimo to elimu ya mokufi yango. Kuna bapesaka mandas, to bilaka, ete soki mokufi asungi bango na kokokisa likambo moko to na kozwa eloko boye—ekoki kozala kobikisama na lolenge ya ekamwiseli—bakomonisela ye botɔ́ndi na bango na motindo moko ya sikisiki. Epai mosusu, nsango ekoki kotambola ete molimo ya moto moko ebimaka na butu, mpe ebangisaka bato oyo bazali na esika yango. Elobamaka mbala mingi ete milimo motindo yango mizali penando, baoyo bazali kotungisa bato na bomoi mpo na makambo oyo masilaki koleka.
Kati na mikili mingi, bato basalaka molende mpenza mpo na kobɔndisa “bilimu” ya bakufi. Basalaka bilambo minene, bapesaka mbeka, balobaka maloba ya kokitisa motema—nyonso wana mpo na komeka kopɛngola nkanda ya bilimu ya bakufi. Ekanisami ete, kobondela bilimu epesaka mbano mpe mapamboli epai na baoyo batikali awa na mokili.
Lapólo moko euti na Afrika elobi ete: “Mingi bandimaka ete ezali na likambo moko te oyo ebimaka ‘mpamba to ete esalamaka se bongo.’ Makambo nyonso—ezala bokɔnɔ, mpasi monene, bokomba, mikakatano ya nkita, mpela monene to molungé makasi, makámá, bokabwani ya libota, kufa—ekanisamaka ete euti na bilimu bizangi komonana, oyo bizali na nguya mingi koleka.” Lapólo mosusu elobi ete: “Bato bandimaka ete bilimu ya bankɔ́kɔ na bango bizali kuna na likoló mpe bizali ntango nyonso kobatela bandeko na bango oyo bazali na bomoi awa na mabelé. Bandimaka ete bankɔ́kɔ bazali na nguya oyo eleki ya bato, oyo bakoki kosalela mpo na kopambola mpe kobatela bandeko na bango oyo bazali na mabelé to mpo na kopesa bango etumbu, engebene ezaleli ya bandeko na bango, soki bakumisaka bakufi to soki bamonisaka bopotu epai na bango.”
Kasi yango ezali na boyokani na Liloba ya Nzambe? Likanisi na yo lizali nini?
[Elilingi na lokasa 4]
“Animita” moko na mboka Chili