Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/10 lok. 32
  • Nguya ya maloba ya boboto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nguya ya maloba ya boboto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/10 lok. 32

Nguya ya maloba ya boboto

“Bojito na motema na moto ekokitisa yango, nde liloba malamu ekosepelisa yango!”​—Masese 12:25.

BAKLISTO babatelami te na mikakatano. Na bantango mosusu bazalaka na mitungisi mpamba te tozali kobika “na ntango ya mpasi.”​—2 Timoté 3:1.

Wana bazali kokutana na mikakatano motindo yango, oyo nde mapamboli koyoka maloba ya boboto oyo mauti na moninga moko! Biblia elobi ete: “Moninga ya solosolo akolingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17, NW) Mobali ya sembo Yobo ayebanaki lokola moninga ya motindo wana. Ata Elifaza alobaki na ntina na ye ete: “Maloba na yɔ matomboli ye oyo abɛti libaku mpe opɛsi makolo makumbami nguya.”​—Yobo 4:4.

Nzokande, ntango Yobo ye moko azalaki na mposa ya elendiseli, Elifaza mpe baninga na ye babimisaki maloba ya boboto te. Bapamelaki Yobo mpo na mikakatano na ye, komonisáká ete mbala mosusu asalaki lisumu na nkúku. (Yobo 4:8) Búku The Interpreter’s Bible elobi ete: “Oyo Yobo azali na yango mposa ezali mawa oyo euti na motema ya moto. Oyo azwi ezali bobele masukúlu likoló na ‘solo’ ndenge na ndenge mpe mateya mpamba ya lingomba mpe makambo mazangi ntina.” Yobo atungisamaki mingi na koyoka maloba ya Elifaza mpe baninga na ye na boye ete apusamaki na konganga ete: “Kino ntango nini bokotungisa molimo na ngai mpe bokobukabuka ngai na maloba?”​—Yobo 19:2.

Tiká te ete tópusa mosaleli moko ya Nzambe na kolela na mawa mpo na maloba na biso oyo mazangi ntina mpe mazangi boboto. (Kokanisá na Deteronome 24:15.) Lisese moko ya Biblia ekebisi ete: “Maloba na yo makoki kobatela bomoi to koboma yango; bongo osengeli kondima mbuma ya maloba na yo.”​—Masese 18:21, TEV.

Awa eyebi biso nguya ya maloba, tiká ete tólanda ndakisa ya ntoma Paulo. Wana azalaki na Makɛdɔnia, “aléndisi bandeko na maloba maiké.”​—Misala 20:2, Biblia, Liloba lya Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto