Baboti, bana na bino bazali na mposa ya likebi lisengeli na mwana moko na moko
“Bana na yɔ bakojingela mɛsa na yɔ lokola mwa njete na sika [ya olive, NW].”—NJEMBO 128:3.
1. Lolenge nini mosala ya kolona banzeté ekokani na mosala ya kobɔkɔla bana?
NA MAKAMBO mingi, kokóla ya bana ekokani na oyo ya nzeté. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te soki Biblia ezali kolobela mwasi ya moto lokola “nkamba na vinyo na kobota mbuma mingi” mpe ekokanisi bana na ye na “mwa njete na sika [ya olive, NW] ejingeli mɛsa [na ye].” (Njembo 128:3) Mosáli-bilanga akoyebisa yo ete kokólisa nzeté mike na elanga ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mingi mpenza soki bileko mpe mabelé ezali malamu te. Bobele bongo, na “mikolo ya nsuka” oyo ya mpasi, ezali pɛtɛɛ te mpo na kobɔkɔla bana ete bákóma mikóló oyo babongi, baoyo bazali kobanga Nzambe.—2 Timoté 3:1-5.
2. Nini esengeli mpo na kobuka mbuma mingi?
2 Mpo na kobuka mbuma malamu, mosáli-bilanga azalaka na mposa ya mabelé malamu, ya mwa molungé ya moi mpe ya mai. Longola likambo ya kobongisa mabelé mpe ya kolongola matiti mabe, asengeli kosalela nkisi mpo na kobatela nzeté na nyama mikemike mpe kozala na myango misusu ya kobatela nzeté. Mikakatano mikoki kobima uta ntango ya kolona, kino na ntango ya kobuka mbuma. Oyo nde mawa soki nzeté ebongi te! Nzokande, mokoni akozala mpenza na esengo soki akobuka mbuma kitoko, nsima na mosala makasi oyo ye asalaki!—Yisaya 60:20-22; 61:3.
3. Motuya ya nzeté oyo ezali kokóla ekokani na oyo ya mwana, mpe likebi ya lolenge nini bana basengeli kozwa?
3 Ya solo, bomoi ya moto oyo abɔkwami malamu, oyo azali kosala mosala malamu, ezali na motuya mingi koleka mbuma ya nzeté. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete kobɔkɔla mwana malamu ezali kosɛnga ntango mpe milende mingi koleka kosala elanga malamu. (Deteronome 11:18-21) Mwana moke, oyo akonami kati na elanga ya bomoi, soki bakomwangisela ye mai mpe bakoleisa ye na bolingo, mpe soki bakotyela ye bandelo ya malamu, akoki kokóla mpe kobota mbuma na elimo ata kati na mokili oyo esili kotonda na bizaleli mabe. Kasi soki bakosalela ye malamu te mpe bakonyokola ye, akolemba kati na ye mpe akoki kokufa na elimo. (Bakolose 3:21; Kokanisá na Yilimia 2:21; 12:2.) Ya solo, mwana na mwana azali na mposa ete bátyela ye likebi libongi na ye mpenza!
Likebi ya mokolo na mokolo uta bomwana mpenza
4. Likebi ya lolenge nini bana bazali na yango mposa “longwa na bomwana mpenza”?
4 Baboti basengeli ntango nyonso kotyela mwana oyo abotami sika likebi. Nzokande, mwana moke azali na mposa ete bátyela ye likebi ya mokolo na mokolo bobele mpo na biloko bitali nzoto to mosuni? Ntoma Paulo akomaki epai na Timoté, mosaleli ya Nzambe ete: “Longwa na bomwana na yɔ, osili koyeba Makomi na bulɛɛ, makoki kopɛsa yɔ boyebi mpɔ na kobika.” (2 Timɔtɛ 3:15) Na yango, likebi oyo baboti ya Timoté batyelaki ye, uta na bomwana mpenza, etalelaki mpe makambo ya elimo. Kasi ntango nini bomwana ebandaka?
5, 6. (a) Biblia elobi nini na ntina na mwana oyo abotami naino te? (b) Nini ezali komonisa ete baboti basengeli komibanzabanza mpo na bolamu ya mwana oyo abotami naino te?
5 Liloba ya Greke oyo Paulo asaleli awa (breʹphos) ezali kosalelama lisusu mpo na mwana oyo abotami naino te. Elisabɛta, mama ya Yoane Mobatisi, alobaki na ndeko na ye Malia ete: “Wana eyokani mongongo na mbɔtɛ na yɔ kati na matoi na ngai, mwana [breʹphos] na kati na libumu na ngai apombwi na esɛngɔ.” (Luka 1:44) Na yango, ata mwana oyo abotami naino te abyangami ete mwana, mpe Biblia ezali komonisa ete akoki kozwa bopusi na makambo oyo mazali kosalema na libándá ya libumu. Boye, likebi oyo esengeli kotyelama na mwana liboso ya kobotama, likambo oyo lilendisami mingi na mikolo na biso, lisengeli mpe kotalela bolamu ya elimo ya mwana oyo abotami naino te?
6 Ebongi ete tótalela malamu likambo oyo, mpamba te bilembeteli bizali komonisa ete mwana oyo abotami naino te akoki kozwa litomba to kozwa bopusi mabe longwa na makambo oyo azali koyoka. Mokambi moko ya babɛti miziki amonaki ete banzembo mingi oyo azalaki komimekisa na yango emonanaki na ye lokola ete asilaki koyoka yango liboso, mingimingi biteni bibɛtami na nzɛ́nzɛ. Mokolo moko, atángelaki mama na ye, mobɛti monene ya nzɛ́nzɛ, nkombo ya banzembo yango, mama na ye alobaki ete wana ezalaki banzembo oyo ye azalaki koyemba mingi ntango azalaki na zemi na ye. Bobele bongo, mwana oyo abotami naino te akoki mpe kozwa bopusi mabe soki mama na ye azali na momeseno ya kotala masano ya televizyó oyo mazali kolakisa mobulu. Na yango, zulunalo moko ya makambo ya monganga elobelaki “komesana ya mwana oyo abotami naino te na masano malakisami na televizyó.”
7. (a) Lolenge nini baboti mingi batyaki likebi mpo na bolamu ya mwana na bango oyo abotamaki naino te? (b) Makoki nini mwana azali na yango?
7 Koyebáká ete makambo mosusu makoki kozala na bopusi malamu likoló na mwana, baboti mingi babandaka kotángela mwana na bango, kosolisa ye mpe koyembela ye liboso nkutu ete abotama. Bino mpe bokoki kosala bongo. Atako mwana na bino akoki kososola maloba yango te, nzokande akozwa mpenza matomba na elobeli na bino ya boboto mpe na mongongo oyo ezali komonisa bolingo. Nsima ya kobotama na ye, mwana akobanda kosimba maloba na bino, mbala mosusu nokinoki koleka ndenge bino bokanisaki. Bobele nsima na mibu mibale to misato, mwana akoyekola monoko oyo mozali na makambo ndenge na ndenge bobele na koyokáká baoyo bayebi yango ntango bazali koloba. Mwana moke akoki mpe kobanda koyekola “monoko na peto” ya solo ya Biblia.—Sofoni 3:9, NW.
8. (a) Biblia elingi mpenza komonisa nini ntango ezali koloba ete Timoté ayebaki Makomi na bulɛɛ “longwa na bomwana mpenza”? (b) Likambo nini limonanaki solo epai na Timoté?
8 Paulo alingaki komonisa nini wana alobaki ete Timoté asilaki ‘koyeba Makomi na bulɛɛ longwa na bomwana’? Emonani lokola ete, alingaki komonisa ete Timoté alakisamaki malamu na elimo longwa na ntango oyo azalaki elɛzi, kasi te bobele na boumeli ya bomwana na ye. Likambo yango liyokani na ndimbola ya liloba na Greke breʹphos, oyo mbala mingi esalelamaka mpo na mwana oyo abotami sika. (Luka 2:12, 16; Misala 7:19) Timoté akokaki komikundola ete alakisamaki makambo ya elimo epai na mama na ye Yunike mpe epai na nkɔ́kɔ na ye Loidi uta azalaki elɛzi mpenza. (2 Timoté 1:5) Uta bomwana na ye, mwana akoyebanaka soki akozala mokóló ya lolenge nini; yango ekokanaki solo epai na Timoté. ‘Abokwamaki na njela ekoki na ye kotambola,’ mpe, lokola mbano, akómaki mosaleli malamu ya Nzambe.—Masese 22:6; Bafilipi 2:19-22.
Likebi lisengeli na mwana na mwana
9. (a) Baboti basengeli koboya kosala nini, mpe mpo na nini? (b) Ntango mwana azali kokóla, baboti basengeli kosala nini, mpe basengeli kolanda ndakisa ya nani?
9 Bana bakokani lisusu na nzeté na boye ete bango nyonso bazali na bizaleli ndenge moko te, mpe bango bakoyanolaka lolenge moko te na makambo oyo bakutani na yango. Baboti ya mayele bakotalela bokeseni oyo bozali kati na bana mpe bakoboya kokokanisa mwana moko na mwana mosusu. (Kokanisá na Bagalatia 6:4.) Mpo ete bana na bino bakoka kokóla mpe kokóma mikóló oyo babongi, bosengeli kososola mitindo mikeseni ya bomoto na bango, kokólisa oyo ya malamu mpe kopikola oyo ya mabe lokola bakopikolaka matiti mabe. Bokosala nini soki bomoni mwa bolembu to mposa ya kokólisa momeseno mabe, ndakisa kozanga kolongobana, mposa ya bozwi to moimi? Bosembola yango na boboto nyonso, motindo moko Yesu asembolaki na boboto nyonso bolembu ya bantoma na ye. (Malako 9:33-37) Mingi mpenza, pesá longonya na mwana nyonso mbala na mbala mpo na makambo na ye ya malamu mpe mpo na bizaleli na ye ya malamu.
10. Bana bazalaka mpenza na mposa ya nini, mpe lolenge nini yango ekoki kopesamela bango?
10 Mwana nyonso azalaka mpenza na mposa ete bátyela ye likebi libongi na ye mpe litondi na bolingo. Yesu azalaki kozwa ntango ya kotyela bana mike likebi ya sikisiki ya motindo yango, ata na mikolo ya nsuka ya mosala na ye atako azalaki na makambo mingi ya kosala. (Malako 10:13-16, 32) Baboti, bólanda ndakisa yango! Na bolingo nyonso, bózwa ntango ya kofanda elongo na bana na bino. Mpe bóyoka nsoni te na komonisela bango bolingo ya solosolo. Bózinga bango na mabɔkɔ na bino, lokola Yesu asalaki yango. Bózinga bango ekɔ́pi ya motema mpe bópwɛpwa bango. Ntango batunaki baboti ya bana oyo bauti kokóma mikóló kala mingi te, baoyo basembolamaki malamu, soki toli nini bakoki kopesa na baboti mosusu, biyano oyo bizalaki kozongelama mingi bizalaki oyo: ‘Bólinga bango makasi,’ ‘bólekisa ntango elongo,’ ‘bókólisa limemya kati na bino,’ ‘bóyokaka bango mpenza,’ ‘bópesa batoli oyo ebongi na esika ya kosuka bobele na kolobaloba,’ mpe ‘bótalela makambo lolenge yango ezali.’
11. (a) Lolenge nini baboti basengeli kotalela likambo ya kotyela bana na bango likebi libongi na mwana moko na moko? (b) Ntango nini baboti bakoki kosolola malamu elongo na bana na bango?
11 Kotyela bana na yo likebi libongi na moko na moko motindo yango ekoki solo kozala esengo. Moboti moko oyo alóngaki kobɔkɔla bana na ye malamu akomaki ete: “Ntango bana na biso mibale ya mibali bazalaki naino mike, ezalaki esengo mingi mpo na biso kobongisa bango mpo na kolalisa bango, kotángela bango masoló, kozipa bango na bolangiti, kosala libondeli elongo na bango.” Ntango motindo wana ya kofanda esika moko ezali kopesa libaku malamu ya kosolola oyo ekoki kolendisa bana mpe baboti lokola. (Kokanisá na Baloma 1:11, 12.) Mobali moko mpe mwasi na ye bazalaki koyoka wana mwana na bango ya mbula misato azalaki kosɛnga Nzambe ete apambola “Wally.” Abondelaki mpo na “Wally” na boumeli ya butu mingi oyo elandanaki, mpe baboti na ye balendisamaki mingi ntango bayaki koyeba ete azalaki kolobela bandeko ya Malawi, oyo na eleko yango bazalaki na minyoko. Mwasi moko alobaki ete, ‘ntango nazalaki bobele na mibu minei, mama na ngai asalisaki ngai na kokanga mikapo ya Makomami na motó mpe koyemba nzembo ya Bokonzi wana namataki na kiti moko mpo na kopangwisa basaani ntango mama azalaki kosukola yango.’ Bokoki nde kobongisa ntango oyo bokoki kofanda esika moko mpo na kosepela na masoló elongo na bana na bino?
12. Eloko nini baboti baklisto bakosala na mayele nyonso mpo na bana na bango, mpe myango nini bakoki kosalela?
12 Baboti baklisto ya bwanya bazalaka na ebongiseli ya boyekoli ya libota oyo elandami malamu. Atako bokoki kosalela lolenge ya boyekoli na mituna mpe biyano, bokoki mpe kolendisa bosololi ya esengo mingi, na koyokanisáká boyekoli yango na ezaleli na bango, mingi mpenza mpo na bana mike? Bokoki kosalela bililingi ya makambo malobelami kati na Biblia, kobetɛla bango masoló ya Biblia, to koyoka makambo oyo bopesaki mwana moko mokumba ya kobongisa. Bósala nyonso oyo bokoki mpo na kokómisa Liloba ya Nzambe kitoko mpenza mpo na bana na bino ete bákoka koyoka mposa na yango. (1 Petelo 2:2, 3) Tata moko alobaki ete: ‘Ntango bana bazalaki mike, tozalaki konguluma na nsé esika moko na bango mpe tozalaki kosala masano mazangi maloba mpo na kokundola masoló ya bato na kala oyo balobelami mingi kati na Biblia. Bana bazalaki kolinga yango mingi.’
13. Ntina ya bibongiseli ya komimekisa ezali nini, mpe makambo nini bokoki komimekisa na boumeli na yango?
13 Bibongiseli ya komimekisa ememaka mpe na bosololi malamu mpamba te bizali kosalisa bilenge na komilɛngɛla mpo na makambo ya bomoi. Mwana mwasi moko ya libota Kusserow—oyo basangani na yango nyonso 11 batikalaki sembo epai na Nzambe liboso na minyoko ya ba Nazi—alobaki na ntina na baboti na ye ete: “Balakisaki biso lolenge ya kosala mpe ya komilóngisa biso moko na lisalisi ya Biblia. [1 Petelo 3:15] Mbala mingi tozalaki na bibongiseli ya komimekisa, bamoko kotunáká mituna mpe basusu kopesáká biyano.” Mpo na nini bokoki te kosala motindo moko? Bokoki komimekisa na masoló mpo na mosala ya kosakola wana moboti moko azwi esika ya molobani. To ebongiseli ya komimekisa ekoki kotalela masenginya oyo bana bakutanaka na yango. (Masese 1:10-15) Mwasi moko alimbolaki ete: “Komimekisa mpo na ntango ya mpasi ekoki kolendisa makoki ya bana mpe kopesa bango nguya mingi. Kati na komimekisa yango bokoki kozwa esika ya moninga oyo azali kopesa mwana na yo likaya, masanga to elangwiseli ete amela yango.” Bibongiseli wana bikoki kosalisa yo na kososola lolenge mwana na yo akosala ntango akokutana na masenginya motindo yango.
14. Mpo na nini masoló ya bolingo mpe ya boboto elongo na bana na bino mazali na ntina mingi?
14 Na masoló na bino elongo na mwana na bino, bósala makasi na kosimba motema na ye, na komonisáká motema mawa motindo moko na oyo emonisamaki na mokomi na maloba oyo: “Mwana na ngai, bosana mobeko na ngai tɛ; kasi tika ete motema na yɔ mobatela malako na ngai. Jambi ikobakisela yɔ mikɔlɔ mingi mpe bomɔi molai mpe kimia.” (Masese 3:1, 2) Motema ya mwana na bino mokosimbama soki bolimbweli ye na bolingo nyonso ete bozali kosɛnga botosi epai na ye mpo ete yango ekomemela ye kimya mpe mikolo mingi—oyo ezali mpenza bomoi ya seko kati na mokili ya sika mpe ya kimya oyo Nzambe akosala, boye te? Bótalela bomoto ya mwana na bino wana bozali kokanisa elongo na ye kati na Liloba ya Nzambe. Bósala yango kati na libondeli, boye Yehova akopambola milende na bino. Masoló motindo oyo matóngami likoló na Biblia, masalemi na bolingo mpe na komitya na esika na ye makopesa mpenza matomba malamu oyo makoumela.—Masese 22:6.
15. Lolenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango na kosilisa mikakatano na bango?
15 Ata soki kosolola na motindo oyo esalemi te na ngonga oyo bosilaki kobongisa mpo na boyekoli, bosengeli kotika eloko moko te ete epɛngwisa likebi na bino. Bótya likebi na oyo mwana na bino azali koloba, kasi lisusu na lolenge oyo azali komonisa makanisi yango. Moto moko ya mayele alobaki ete: “Talá mwana na yo. Tyelá ye likebi na yo nyonso. Osengeli kososola, kasi bobele koyoka te. Baboti oyo bazali kosala milende mingi lolenge oyo bakoki kosala mingi mpo na kobongisa bomoi ya bana na bango.” Bana bazali lelo oyo kokutana na mikakatano minene na biteyelo mpe bipai mosusu. Lokola bozali baboti, bótikela mwana nzela ete aloba na bonsomi nyonso, mpe bósalisa ye na komona makambo lolenge Nzambe azali komona yango. Soki boyebi te lolenge nini kosilisa mokakatano moko, bósala bolukiluki kati na Makomami mpe kati na mikanda mibongisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Na meko nyonso, bótyela mwana na bino likebi libongi na ye oyo azali na yango mposa mpo na kosilisa mokakatano na ye.
Bósepelaka kofanda elongo
16, 17. (a) Mpo na nini bilenge bazali lelo na mposa ya likebi libongi na moko na moko? (b) Bana basengeli koyeba nini wana baboti na bango bapesi bango etumbu?
16 Bilenge bazali na mposa ya likebi mingi lelo oyo mpo ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” yango ezali “ntango ya mpasi.” (2 Timoté 3:1-5; Matai 24:3-14) Baboti mpe bana bazali na mposa ya kobatelama oyo ekozwamaka na nzela ya mayele ya solo oyo “ekobatela bomoi ya baoyo bazwi yango.” (Mosakoli 7:12) Lokola mayele mauti na Nzambe elimboli kosalela boyebi ya Biblia, bana bazali na mposa ya kolakisama mbala na mbala kati na Liloba ya Nzambe. Na yango, bóyekola Makomami elongo na bana na bino. Bósolola na bango na ntina na Yehova, bólimbola masɛngami na ye malamumalamu mpe bókólisa mposa makasi ya komona kokokisama ya bilaka na ye monene. Bólobela makambo wana na ndako, wana bozali kotambola elongo na bana na bino—na mokuse, bósala yango na libaku nyonso oyo emonani—Deteronome 6:4-7.
17 Basáli-bilanga bayebi malamu ete nzeté nyonso ekólaka lolenge moko te. Nzeté na nzeté ekosɛngaka ete bátyela yango likebi libongi na yango mpenza. Bobele bongo, mwana moko na moko akeseni na bana mosusu mpe azali na mposa ya likebi, ya kolakisama mpe ya kosembolama ebongi na ye mpenza. Na ndakisa, mwana moko akoyoka bobele na miso mpamba, soki tata to mama atali ye na miso mabe, nzokande mpo na mwana mosusu esengeli etumbu makasi. Kasi bana na bino nyonso basengeli koyeba mpo na nini bosepelaka te na elobeli boye to na likambo boye, mpe baboti nyonso mibale basengeli kosala na bomoko mpo ete etumbu ezala ntango nyonso lolenge moko. (Baefese 6:4) Ezali na ntina mingi ete baboti baklisto bápesa batoli ya polele oyo eyokani na Makomami.
18, 19. Mokumba nini baboti baklisto bazali na yango epai na bana ya bango, mpe mbano nini bakozwa soki basali malamu mosala yango?
18 Mosáli-bilanga asengeli kolona na ntango malamu. Soki alekisi ntango to soki abateli milona na ye malamu te, akobuka bobele moke to ntango mosusu eloko mpe te. Ee, bana na bino bazali “nzeté mike” oyo ezali kokóla oyo bosengeli kotyela bango likebi libongi na mwana na mwana uta sikawa, kasi kozela te sanza ezali koya to mbula ezali koya. Bóbungisa te mabaku ya kolendisa bokóli na bango ya elimo na boyokani na Liloba ya Nzambe mpe kopikola makanisi mabe ya mokili oyo makoki kolembisa mpe koboma bango na elimo. Bópesa motuya mingi na bangonga mpe na mikolo oyo bozwi libaku ya kolekisa yango elongo na bana na bino, mpamba te bantango yango ekolekaka nokinoki mpenza. Bósala makasi mpo na kolona epai na bana na bino bizaleli bisengeli ya moto na kobanga Nzambe mpo na kozala na bomoi ya esengo lokola basaleli ya sembo ya Yehova. (Bagalatia 5:22, 23; Bakolose 3:12-14) Yango ezali mosala ya moto mosusu te; ezali mokumba na bino, mpe Nzambe akoki kosalisa bino na kokokisa yango.
19 Bópesa na bana na bino libula kitoko ya elimo. Bóyekola Liloba ya Nzambe elongo na bango, mpe bólekisa elongo bantango ya kominanola ya malamu. Bómema bana na bino na makita ya boklisto, mpe bózala elongo na bango kati na mosala ya kosakola Bokonzi. Bókólisa kati na bana na bino lolenge ya bomoto oyo ezali kosepelisa Yehova, mpe na ntembe te bakomemela bino esengo monene na mikolo mizali koya. Ya solo, “tata na moyɛngɛbɛni akosepela mingi; ye oyo aboti mwana na mayɛlɛ akomɔna esɛngɔ mpɔ na ye. Tata na yɔ mpe mama na yɔ bakosepela mpe mama oyo aboti yɔ akoyoka esɛngɔ.”—Masese 23:24, 25.
Mbano eleki monene
20. Wapi sɛkɛlɛ́ ya bolóngi mpo na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana oyo bakómi bilenge?
20 Kobɔkɔla bana ezali mosala makasi, mosala ya bambula mingi. Kokólisa ‘mwa njete na sika [ya olive, NW] oyo ejingi mɛsa na yɔ’ ete bákóma mikóló oyo bakobangaka Nzambe, baoyo bazali kobota mbuma mpo na Bokonzi, ebéngamaki ete mosala mpo na mibu 20. (Nzembo 128:3; Yoane 15:8) Mosala wana mokómaka makasi ntango bana bakɔti na mibu na bango ya bolenge, wana bakómi kokutana na bopusi mingi mpe baboti bamonaka ete basengeli kokɛngɛla bango mingi koleka liboso. Kasi nzela ya kolónga ebongwani te—kotya likebi mingi, kozala na bolingo mpenza mpe na bososoli. Bómikundola ete bana na bino bazali na mposa ete bótyela bango likebi libongi na moko na moko. Bokomonisela bango likebi motindo wana na nzela ya komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bolamu na bango. Mpo na kosalisa bango, bosengeli komipesa bino mpenza mpo na bango, kopesáká bango ntango, bolingo mpe komibanzabanza oyo bazali na yango mposa mpenza.
21. Nini ekozala mbano ya baoyo bazali kotyela bana na bango likebi libongi na mwana moko na moko?
21 Mbano mpo na milende na bino ya kobatela mbuma ya motuya mingi oyo Yehova apesi na mabɔkɔ na bino ekoki kopesa bino esengo mingi koleka ebele ya mbuma oyo mosali-bilanga abuki. (Nzembo 127:3-5) Na bongo, baboti, bólanda kotyela bana na bino likebi libongi na mwana moko na moko. Bósala bongo mpo na bolamu na bango mpe mpo na nkembo ya Tata na biso ya likoló, Yehova.
Okopesa eyano nini?
◻ Lolenge nini mosala ya kolona banzeté ekokani na mosala ya kobɔkɔla bana?
◻ Likebi ya motindo nini mwana azali na yango mposa mokolo na mokolo longwa na bomwana na ye mpenza?
◻ Mwana na mwana azali na mposa ete básalela ye nini, mpe lolenge nini yango ekoki kopesamela ye?
◻ Mpo na nini bosengeli kotyela mwana na mwana likebi libongi na ye?