Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/1 nk. 2-4
  • Bitumba bikoki kopengolama te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bitumba bikoki kopengolama te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Masengami ya mibeko ya bozalisi?
  • Makambo mazali kobimisa bitumba
  • Bitumba
    Lamuká!—2017
  • Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka bitumba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/1 nk. 2-4

Bitumba bikoki kopengolama te?

ETUMBA ezali likambo ya nsɔmɔ mpe ya mawa, likambo oyo lizali koyokana mokolo na mokolo kati na bansango ya mokili. Na ntembe te, bansango wana ya mobulu ezali kopesa yo mpasi. Mbala mosusu yo mpe ozali komituna mpo na nini minduki mizali kosalelama mpo na kosilisa mikakatano. Bato bakoyekola mokolo mosusu kofanda na kimya kati na bango?

Mwango ya kolónga malɔzi ya etumba mozali mpasi koleka mwango ya kozwa nkisi ya kobikisa bokɔnɔ ya SIDA. Na boumeli ya ekeke oyo ya 20, bikólo mobimba bibongisamaki mpo na kosimba bitumba, bamilió ya bato batindamaki na bitumba, bankámá ya bingumba bibebisamaki nyee. Elikya moko te ezali ya komona nsuka ya kobomana wana. Mombongo ya minduki oyo ezali kosalama kati na mokili mobimba ezali kondimisa ete mampinga ya mokili mobimba mpe bituluku ya batomboki​—bikolanda ntango nyonso kozala.

Lokola minduki ya bitumba mizali ntango nyonso kokóma makasi, motango na bato babomami na bitumba mozali bobele kokóla. Koleka katikati ya bamilió 65 ya basodá baoyo babundaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba bakufaki to bazokisamaki. Mibu soko 30 na nsima, bobele babombi mibale esalemi na atomi ebebisaki bomoi ya basivili koleka 150 000 na mboka Japon. Kobanda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bitumba bikómi kosalema mingimingi na biteni bikeseni ya mokili. Nzokande, ezali naino koboma bato, mingimingi basivili, baoyo bazalaka ndambo monene ya ntuku mwambe kati na monkámá.

Likambo ya kokamwa, kobomama monene wana ezali kosalama na eleko oyo milende ya kopekisa bitumba lokola mwango ya kobongisa matata kati na mabota milobelami mingi koleka na bileko misusu nyonso. Na nsuka ya guerre froide, oyo euti kosila, bato bazalaki na elikya minene ete, ebongiseli moko ya mokili ya sika, ya kimya elingi kobanda. Nzokande, kimya ya mokili mobimba ezali naino ndoto mpenza. Mpo na nini?

Masengami ya mibeko ya bozalisi?

Bayekoli mosusu ya lisoló ya kala mpe bato na zébi ya koyekola moto bazali kokanisa ete bitumba bikoki kozanga te​—bizali nkutu na ntina​—bobele mpo yango ezali eteni ya kowelana ya évolution mpo na kobika. Wana apusamaki na makanisi yango, Friedrich von Bernhardi, moyekoli monene na makambo matali bitumba, alobaki na 1914 ete, etumba ebundami “mpo na bolamu ya bokóli ya bozalisi, ya bituluku ya bato mpe ya bizaleli malamu.” Mateya yango mazalaki komonisa ete ezali malamu kolongola bato to bikólo ya bolembu, mpo na kotika esika na baoyo bazali na makoki mingi mpo na kobika.

Maloba ya lolenge yango makobondisa soko moke te bamilió ya basi bakufeli mibali mpe bitíké. Longola likambo oyo ete eyokani te na bizaleli malamu, likanisi yango ezangi kotalela lolenge bitumba ya ntango na biso bizali kosalema. Masasi makoponaka te banani bazali bato na makoki mpo batikala na bomoi, mpe bombi ekobomaka bato ya makasi mpe na baoyo bazangi makasi.

Wana akebaki te na liteya ya nsɔmɔ oyo liutaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Adolf Hitler azalaki kolɔta kobimisa etuluku moko oyo ekoyangela mokili na nzela ya elónga ya bitumba. Kati na mokanda na ye Mein Kampf [elimboli: Etumba na ngai], akomaki ete: “Libota na bato ekólaki mingi kati na etumba ya ntango nyonso, mpe ezali bobele kati na kimya ya libela nde yango ekolimwa. . . . Bato ya makasi basengeli koyangela kasi kosangana te esika moko na bato na bolembu.” Na esika ya kotombola libota na bato, Hitler abomisaki bamilió ya bato mpe abebisaki mikili nyonso ya Mpótó.

Nzokande, soki etumba ezali mibeko na biloko bizalisami te, nini ezali kotinda bato na koluka komisilisa? Banguya nini ya makasi ezali komema mabota kati na “misala ya konyokola bato” lolenge yango?a Awa na bolandani ezali na molɔngɔ́ ya makambo oyo mazali kopekisa milende ya bato oyo bazali koluka kotya kimya.

Makambo mazali kobimisa bitumba

Bolingo ya ekólo. Mbala mingi bato ya politiki mpe bakonzi ya basodá basalelaka bolingo ya ekólo, oyo ezali moko na banguya makasi, mpo na kobimisa bitumba. Bitumba mingi bibandisamaki mpo na kobatela “matomba ya ekólo” to mpo na kokotela “lokumu ya ekólo.” Ata ekólo na ngai ezala na elónga to ezala na elónga te, mobulu mokoki kondimama lokola mwango ya kolongola monguna makoki ete azala moto ya yambo te ya kosalela bibundeli mpo na kobundisa biso.

Koyinana kati na bato na bikólo bikeseni. Bitumba mingi oyo bizali kosalema na bitúká bikeseni bizali kotumolama mpe kosimbama na koyinana ya kala oyo ezali kati na bato na mposo to ya bikólo bikeseni. Bitumba ya nsɔmo oyo bizali kati na banamboka na mokili oyo kala ezalaki Yougoslavie, na Liberia, mpe na Somalie bizali bobele bandakisa na oyo ezali kosalama na mikolo na biso.

Kowelana na makambo ya nkita mpe bibundeli. Na mikolo oyo mimonanaki lokola ete mizalaki na kimya liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, banguya ya Mpótó ezalaki mpenza koyanganisa mampinga minene. Allemagne mpe Grande-Bretagne bamikotisaki kati na kowelana mpo na kosala masuwa ya etumba. Lokola bikólo minene nyonso oyo ekotaki kati na kowelana bizalaki kokanisa ete etumba ekobakisa nguya na bango mpe ekokólisa nkita, etumba esengelaki mpenza kobima.

Koswana ya mangomba. Mingimingi ntango ekólisami na bokabwani ya mposo, kokesena ya mangomba ekoki kobimisa matata monene. Bitumba na Liban mpe na Irlande ya Nɔ́rdi, bakisa mpe bitumba kati na Inde mpe Pakistan, euti na koyinana ya mangomba.

Mobandisi ya etumba oyo azangi komonana. Biblia ezali komonisa ete Satana Zábolo, “njambe na mokili oyo,” azali sikawa kosala makasi koleka liboso. (2 Bakolinti 4:4) Lokola azali na nkanda monene awa ezali ye “bobele na elaka mokuse,” azali kotya yikiyiki, kati na yango kobandisa bitumba, oyo ezali kobakisa ezalela ya mpasi na mokili.​—Emoniseli 12:12.

Ezali petee te mpo na kosilisa bantina ya bitumba oyo touti kolobela yango. Esili koleka mibu 2 000, Platon alobaki ete “bobele bakufi nde bakomonaka nsuka ya etumba.” Maloba ya mawa oyo ye abimisaki mazali likambo ya malamu oyo tosengeli kondima? To tozali na bantina ya kolikya ete mokolo mosusu bitumba bikosila na mokili?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezali Napoléon nde alobelaki etumba lokola “mosala ya konyokola bato.” Lokola alekisaki eteni eleki molai ya bomoi na ye na mosala ya sodá mpe soko mibu 20 lokola mokonzi monene ya basodá, ayebaki malamumalamu minyokoli na ntango na etumba.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover: John Singer Sargent’s painting Gassed (detail), Imperial War Museum, London

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Instituto Municipal de Historia, Barcelona

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto