Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/1 lok. 32
  • Okoki kozwa matomba mpo na yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozwa matomba mpo na yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/1 lok. 32

Okoki kozwa matomba mpo na yango?

ZULUNALO oyo osimbi na maboko na yo ezali kosala milende mpo na kozala liziba ya elendiseli, ezali komonisa mitinda ya Biblia mpo na kosalisa mabota mpe kobatela bizaleli malamu. Ezali komonisa ete mpasi ya mikolo na biso esilaki kosakolama na Biblia, mpe ezali kolakisa mwango bobele moko ya kobongisa makambo​—boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. Okoki kozwa matomba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe na Lamuká! zulunalo oyo ebimaka elongo na yango?

Longwa na Philippines, mwasi moko na nkombo Vilma, akomaki ete: “Soki ezali na liloba moko mpo na kolobela mikanda na bino, nakanisi nakopona liloba ‘ya kokamwa.’ Namonaki mpe natangaki mpo na mbala ya liboso bazunalo na bino, Lamuka! mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ntango nazalaki kati na bísi mpo na kozonga na ndako wana nautaki na Manille. Nazalaka na momeseno ya komema bazulunalo mpo na kotanga wana nazali kosala mobembo, kasi mbala wana nazalaki na yango te.

“Mobali moko mokóló oyo afandaki penepene na ngai na boumeli ya mobembo azalaki kotanga mikanda na bino. Nsima na kotanga Lamuká! abimisaki zulunalo mosusu, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nazwaki libaku ya kosenga Lamuká! Na bosembo nyonso, nasepelaki mpenza kotanga bazulunalo wana, mpo ete masoló na yango mazalaki kitoko, makambo ya ntango na biso, mpe ya kolendisa.”

Mwasi yango asukisaki ete: “Nalingi mpenza kozwa bazunalo na bino. Boyebisa ngai lolenge nini nakoki kozwa yango.” Biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Philippines ezalaki na esengo ya kotya mwasi wana na molɔngɔ́ na bato oyo bazwaka bazunalo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto