Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/3 lok. 3
  • Elambo oyo ezali na ntina mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elambo oyo ezali na ntina mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Bolei ya Mpokwa ya Nkolo—Molulu oyo ekumisaka Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ekaniseli oyo etaleli mpe yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Batosaki maloba ya nsuka ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Elambo ya Nkolo ezali na ntina mingi mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/3 lok. 3

Elambo oyo ezali na ntina mpo na yo?

SANZA ezalaki ya mobimba mpe pole na yango kitoko ezalaki kongengisa mabele. Kati na eteni ya likolo ya ndako moko ya Yelusaleme ya kala, mibali 12 bayanganaki zongazonga na mesa moko. Bayekoli zomi na moko batyaki likebi monene ntango Molakisi na bango abandisaki molulu moko ya ntina mingi mpe alobaki makambo ya ntina mingi. Lisolo moko eyebisi ete:

“Yesu [Klisto] akamati limpa mpe atondi, abuki yango mpe apesi na bayekoli na ye; alobi ete: ˈBokamata, bolia. Oyo elimboli nzoto na ngai.ˈ Akamati mpe kopo mpe esili ye kotonda, apesi epai na bango, ye ete: ˈBomela na yango, bino nyonso. Mpo ete oyo ezali [elembo na] “makila na ngai na kondimana,” masopameli bato mingi mpo na kolimbisama ya masumu. Nazali koloba na bino solo ete, nakomela lisusu na mai na mbuma oyo na miwiti te kino mokolo yango wana nakomela yango sika kati na Bokonzi na Tata na ngai esika moko na bino.ˈ Esili bango koyemba loyembo, babimi kino Ngomba na Bilaya.”​—Matai 26:26-30.

Likambo wana lisalemaki na le 14 ya sanza ya Bayuda Nisan nsima ya kolala ya moi na mobu 33 ya ntango na biso. Yesu mpe bantoma na ye bautaki kokumisa Elekeli mpo na kokanisa kosikwama ya Yisraele na boombo na Ezipito na ekeke ya 16 L.T.B. Klisto abenganaki Yuda Mokeliota oyo azalaki pene ya koteka ye. Yango wana, bobele Yesu mpe bantoma na ye 11 ya sembo nde bazalaki wana.

Bolei wana ezalaki kolandana ya Elekeli ya Bayuda te. Ezalaki likambo moko ya sika mpe ezwaki nkombo ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Na ntina ya molulu yango, Yesu apesaki etinda oyo na bayekoli na ye: “Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” (Luka 22:19,20, 1 Bakolinti 11:24-26) Mpo na nini alobaki bongo? Mpe lolenge nini likambo wana ya kala oyo esili koleka uta bikeke mingi ekoki kozala na ntina mpo na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto