Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/3 lok. 32
  • “Naino Ngomba ezalaki te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Naino Ngomba ezalaki te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/3 lok. 32

“Naino Ngomba ezalaki te”

“YO OZALAKI ebombelo na biso longwa na ntango nyonso. Naino ngomba ezalaki te mpe naino nse mpe mokili te, longwa bobele na liboso mpenza mpe lobiko na lobiko, yo ozali Nzambe.” (Nzembo 90:1, 2,) Maloba oyo mayebisami na Mozalisi na biso, mazali solo kobondisa​—mingi mpenza lelo, na ntango oyo eloko moko te emonani ete ezali koumela!

Na ntango oyo makambo ya nkita mazali kobeba, bobele bato moke bazali kotalela avenir na elikya. Kobakisama monene ya mobulu mpe ya komela drogue esili kokomisa bingumba mosusu bisika ya etumba. Ata libota, ebongiseli wana ya kala, ezali kotengatenga. Kobalana mibali na mibali ezali makambo ya sika oyo tozali koyoka. Motuya na mabota oyo ezali bobele na moboti moko ezali kokola, moboti yango asengeli ntango nyonso kobika kati na mikakatano. Kimya na mabota mingi esili kobebisama na makambo ya nsomo, lokola kobunda kati na babalani mpe kobebisama ya bana.

Nani oyo akokamba biso kati na eleko oyo ya mpasi? Mpo na koloba solo, batoli ezangi te oyo ba psychologues, bateyi mpe bato mosusu bazali kopesa, kasi batoli yango ezali bongolabongola. Mpo na bambula mingi, Monganga Benjamin Spock azalaki mopesi toli monene mpo na oyo etali kobokola bana na Mpoto. Na nsima andimaki ete azalaki kati na libunga!

Oyo nde likambo ya mayele soki tokamati Nzambe lokola “ebombelo” na biso! Na ntango oyo ya mobulu, azali libanga litelemi ngwi, oyo azali “longwa lobiko na lobiko.” Alobi na ntina na ye moko na nzela na mosakoli Malaki ete: “Ngai Jéhovah nakobongwana te.” (Malaki 3:6) Mitinda na Nzambe, oyo mizali na Biblia mibongi mpenza na kotyela motema. Ye azalaki “naino ngomba ezalaki te,” mpe batoli na ye, oyo ezwami kati na Makomami Mosantu, ezali na moboko kati na mayele na ye ya seko. Ezali mpenza yango oyo tozali na yango mposa mpo na kozala na esengo mpe kolonga.

Na bongo, ezali likambo ya mayele na kotya motema na Liloba na Nzambe, Biblia. Yekola yango mpo ete ozwa litomba na mayele na Nzambe. Zala na kondima na makambo ozali koyekola, mpe tika ete boyebi yango ezala pole mpo na kotambwisa yo na nzela ya bomoi. (Nzembo 119:105) Bobele baoyo bazali kosala bongo nde bazali na bantina ya kozala na elikya mpo na mikolo mizali koya mpe kimya ya solo ya elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto