Mposa na ngai ekokisami kati na mosala na Nzambe
LISOLÓ YA JOSHUA THONGOANA
Na 1942, nazwaki mobulungano monene. Nazalaki koyekola mikanda mibisami na ba Adventistes du septième jour mpe mikanda misusu minyatami na la Société Watch Tower. Lokola Bayisraele na ntango ya kala, “nazalaki kotambolatambola na nzela mibale ekeseni.”—1 Mikonzi 18:21.
BA ADVENTISTES du septième jour bazalaki kotindela ngai mikanda ya mateya na bango mibengami “Elimo ya esakweli.” Nazalaki kosepela mingi koyanola na mituna na bango, mpe balakaki ngai ete soki nalongi na mimekamo na ngai nyonso bakopesa ngai certificat moko kitoko. Kasi namonaki ete “Elimo ya esakweli” mpe mikanda ya la Société Watch Tower ezalaki kotindama na poste ya Cap, na Afrique du Sud. Nazalaki komituna: ˈMasanga wana mibale mayebani nde moko na mosusu? Mateya na yango mazali nde na boyokani? Soki te, oyo wapi ezalaki na elonga?ˈ
Mpo na kokata likambo, natindaki mikanda mibale ya lolenge moko na masanga yango mibale. Bongo, nakomelaki la Société Watch Tower boye: “Boyebi bakomi ya ˈElimo ya esakweli,ˈ soki bongo, bakanisi nini na mateya na bango?” Na nsima, nazwaki biyano ya masanga yango mibale. Mokanda ya la Société Watch Tower elobaki ete bayebi “Elimo ya esakweli” kasi balimbolaki ete mateya na yango, lokola Bosato mpe koya na Klisto kati na mosuni, mayokanaki na Biblia te. Mokanda [oyo la Société Watch Tower atindaki] ezalaki na mikapo ya Makomami oyo ezalaki kokweisa mateya yango.—Yoane 14:19, 28.
Eyano ya “Elimo ya esakweli” elobaki bobele ete eyebi “bato ya Watch Tower,” kasi ezalaki kondima mateya na bango te. Ntina moko te epesamaki. Mpo na yango nazwaki ekateli ya kolanda la Société Watch Tower, esaleli endimami na mibeko ya mboka oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela. Esili koleka sikawa mibu 50 kobanda nakomaki Temwe, mpe nazali na esengo ete nazwaki ekateli wana ya malamu!
Mangomba na ngai ya kala
Nabotamaki na 1912 na etuka moko ya mboka ebengami Makanye, na est ya engumba Pietersburg na Afrique du Sud. Makanye ezalaki na nse na bopusi ya lingomba libengami Eglise anglicaine, bongo nakomaki mosangani ya lingomba yango. Wana nazalaki na mibu motoba, libota na biso ekendeki kofanda na esika oyo lingomba libengami Eglise de la Mission luthérienne de Berlin eyebanaki mingi, na yango baboti na ngai bakotaki na lingomba yango. Naumelaki te kozwa lotomo ya koyangana mpe kolya limpa mpe komela mwa moke vinyo, kasi yango ekokisaki mposa na ngai ya elimo te.
Ntango nasilisaki mobu na ngai ya mwambe na kelasi, tata na ngai atindaki ngai na Eteyelo ya Kilnerton oyo ekobimisaka balakisi, mpe na 1935, nsima ya mibu misato ya boyekoli, nazwaki dipolomi ya molakisi. Moko ya bateyi oyo tozalaki kosala na bango esika moko azalaki elenge mwasi moko na nkombo Caroline. Tobalanaki mpe na nsima Caroline abotaki mwana mwasi oyo topesaki ye nkombo Damaris. Nsima na mwa bambula, nakómaki directeur na eteyelo Sehlale, na engumba moke ya Mamatsha. Lokola eteyelo ezalaki na nse ya bokonzi ya lingomba libengami Eglise réformée hollandaise, tokotaki na lingomba yango mpe tozalaki ntango nyonso kosangana na makita na yango. Tozalaki kosala yango, mpo ete bato nyonso bazalaki kosala bongo, kasi ezalaki te kokokisa mposa na ngai.
Mbongwana monene
Mokolo moko ya dimanche ya mobu 1942, wana tozalaki koyekola banzembo ya lingomba, elenge mobali moko oyo azalaki mondele atelemaki na ekuke elongo na mikanda misato minyatami na la Société Watch Tower: Création, Justification mpe Préparation. Nakanisaki ete mikanda yango mikozala malamu mpo na bibliothèque na ngai, yango wana nazwaki yango na motuya ya ba shillings misato. Nayaki koyeba na nsima ete mobali yango, Tienie Beznidenhout, azalaki Témoin de Jéhovah, bobele ye moko na etuka wana. Ntango azongaki, Tienie amemaki fonó oyo asalelaki mpo na koyokisa biso masolo ya Mosambisi Rutherford. Ngai nasepelaki mingi na moko na yango oyo ezalaki na motó na likambo “Motambo mpe Bokosi,” kasi ezalaki lolenge moko te mpo na Caroline mpe Priscilla, ndeko na ngai ya mwasi oyo azalaki kofanda epai na biso. Na boyei na ye ya misato, Tienie apesaki ngai fonó mpo ete nayokisa masoló yango epai na baninga na ngai.
Mokolo moko nazalaki kotalatala kati na mokanda Création mpe nakómaki na mokapo “Bakufi bazali wapi?” Nabandaki kotanga yango na elikya ete nakokuta bisengo oyo milimo ya bakufi bazalaka na yango kuna na likoló. Kasi, na bokeseni na elikya na ngai, mokanda mozalaki komonisa ete bakufi bazali kati na nkunda mpe bayebi eloko moko te. Mikapo ya Biblia, lokola Mosakoli 9:5, 10, mipesamaki mpo na kondimisa likanisi wana. Mokapo mosusu, oyo ezalaki na motó na likambo “Lisekwa ya bakufi,” ezalaki kotanga maloba ya Yoane 5:28, 29 mpo na kondimisa ete bakufi bayebi eloko moko te mpe bazali kozela lisekwa. Ezalaki likanisi ya mayele mpe ekokisaki mposa na ngai.
Ezalaki na eleko wana, na 1942, nde nakataki boyokani elongo na “Elimo ya esakweli” mpe nabandaki kolobela makambo oyo nazalaki koyekola kati na mikanda ya la Société Watch Tower. Moko kati na bato ya liboso oyo bandimaki nsango yango ezalaki moninga na ngai moko, Judah Letsoalo, oyo totangaki elongo na ye na Eteyelo ya Kilnerton oyo ebimisaka balakisi.
Ngai mpe Judah totambolaki bakilometele 51 na velo mpo na kosangana na assemblée ya Batemwe ya Afrika na Pietersburg. Nsima ya mikolo, bandeko ya Pietersburg bakómaki koya mbala mingi na Mamatsha mpo na kosalisa ngai na kosakola nsango ya Bokonzi epai na baninga tofandi na bango. Na décembre 1944, na assemblée oyo esalemaki na Pietersburg, nazwaki batisimo mpo na komonisa elembo ya komipesa na ngai epai na Jéhovah.
Libota na ngai mpe bato mosusu bandimi
Caroline, Priscilla, mpe mwana na ngai ya mwasi Damaris bakobaki kokende na Eglise réformée hollandaise. Na nsima likambo ya mawa ekómelaki biso. Caroline abotaki mwana na biso ya mibale, oyo amonanaki lokola ete azalaki na nzoto kolongono mpe topesaki ye nkombo Samuel. Kasi azwaki bokono pwasa mpe akufaki. Baninga ya lingomba ya Caroline bapesaki ye libondisi te, bazalaki bobele koloba ete Nzambe alingaki ete mwana na biso azala elongo na ye na likolo. Kati na mpasi na ye Caroline azalaki ntango nyonso komituna ete: “Mpo na nini Nzambe akokaki kokamata mwana na biso?”
Ntango Batemwe ya Pietersburg bayokaki nsango ya mpasi na biso, bayaki kopesa biso kobondisama ya solo na lisalisi ya Liloba na Nzambe. Na nsima Caroline alobaki ete: “Oyo Biblia elobaki likolo na ebandeli ya liwa, ezalela ya bakufi mpe elikya ya lisekwa emonani ete ezali solo. Nazwaki mpenza libondisi. Naokaki mposa ya kozala kati na mokili ya sika mpo na kokutana na mwana na ngai ntango akobima na nkunda.”
Caroline atikaki kokende na ndakonzambe, na yango na 1946, ye elongo na Priscilla mpe Judah bazwaki batisimo. Mwa moke nsima na batisimo na ye, Judah akendeki kobanda mosala ya kosakola na etuka moko ya mboka ebengami Mamahlola, mpe kino lelo oyo azali naino kati na mosala ya ntango nyonso.
Lokola Judah akendaki, mobali oyo azalaki mpo na kobatela lisanga na biso ya Boyne ezalaki bobele ngai. Na nsima Gracely Mahlatji ayaki kofanda na teritware na biso, mpe abalaki Priscilla. Poso na poso ngai mpe Gracely tozalaki kopesa ba discours ya bato nyonso na lokota Sepedi, lokota moko ya afrika ya mboka wana. La Société asengaki ngai lisusu ete nakoka kobongola mikanda na Sepedi mpo ete bato bakoka kosalela yango. Nazalaki na esengo ya komona lolenge bato bazalaki kozwa matomba na mikanda yango.
Mpo na kokolisa mwango ya kobyanga bato na makita ya bato nyonso, tosombaki fonó mpe haut-parleur ya monene mpo ete bato bakoka koyoka masolo ya Biblia na teritware na biso mobimba. Todefaki likalo moko oyo lisengelaki kobendama na bapunda mpo na komema bisaleli yango ya bozito mingi. Mpo na yango baninga na biso ya penepene bapesaki biso nkombo “Bato na lingomba ya mpunda.”
Na ntango wana, lisanga na biso ya moke etikaki te kokola. Bayaya na ngai mibale ya basi mpe mibali na bango bakomaki Batemwe, mpe bango nyonso minei batikalaki sembo kino liwa na bango. Lisusu, basakoli mingi ya lisanga ya Boyne (oyo ebengami sikawa Mphogodiba) babandaki mosala ya kosakola lokola pionnier, mpe basusu bazali naino kolendendela kino lelo kati na mosala yango. Lelo oyo, masanga mazali mibale na etuka wana monene epai bamboka mike epalangani, mpe basakoli nyonso ya molende bazali koleka 70.
Mosala ya sika
Na 1949, natikaki mosala ya molakisi mpe nakomaki pionnier permanent. Mokumba na ngai ya liboso ezalaki ya kokende kotala basali bilanga baindo baoyo bazalaki kofanda na ba fermes ya mindele zingazinga ya Vaalwater, na etuka ya Transvaal. Bankolo fermes mosusu bazalaki bakoteli ya politike ya apartheid (kokabola mposo) oyo eutaki kobima kala mingi te mpe bazwaki ekateli ete Baindo basengelaki kondima ete bazali na nse ya MindeIe mpe basengelaki kosalela bankolo na bango Mindɛle. Yango wana, ntango nasakolaki epai na basali baindo, MindeIe misusu bakanisaki ete nazalaki kopusa bango na komonisa kozanga botosi. Mpe bafundaki ngai ete nazali communiste mpe bakanaki koboma ngai.
Nayebisaki likambo yango na filiale ya la Société Watch Tower, oyo etindaki ngai na etuka mosusu ebengami Duiwelskloof. Ezalaki penepene na eleko yango nde mwasi na ngai atikaki mosala na ye ya molakisi mpo na kolanda ngai na mosala ya pionnier. Mokolo moko na 1950 na nsima ya nzanga, na bozongi na biso na mosala ya kosakola, tokutaki enveloppe moko monene euti na la Société. Ezalaki libyangi oyo epesamaki na ngai mpo na kolanda formation ya mosala ya mokengeli ya zongazonga. Totalaki masanga ya Afrique du Sud na boumeli ya mibu misato, na nsima na 1953, totindamaki na Lesotho, mokili oyo ezali na kati ya Afrique du Sud.
Mosala na Lesotho mpe na Botswana
Ntango tobandaki mosala na biso na Lesotho, nungunungu ezalaki kotambola ete mbala mingi bapaya babomamaka engebene milulu ya banamboka. Ngai mpe mwasi na ngai tozalaki komitungisa, kasi bolingo mpe boyambi ya bandeko na biso ya Lesotho esalisaki biso na kolongola nsomo wana.
Mpo ete nakoka kotala masanga na Lesotho oyo ezali na bangomba ya Maluti, nazalaki komata na mpepo, mwasi na ngai azalaki kotikala mpo na kolanda mosala na ye ya pionnier kino bozongi na ngai. Bandeko bazalaki komema ngai na bolingo nyonso longwa na lisangá moko kino na mosusu mpo ete nabunga te kati na bangomba.
Mokolo moko, bayebisaki ngai ete mpo na kokóma na lisangá oyo elandi esengelaki kokatisa ebale Orange likoló ya mpunda. Bayebisaki ngai ete mpunda na ngai ezalaka na mobulu te, kasi bakebisaki ngai ete soki mai makomi makasi mingi bampunda bakolukaka kobwaka mikumba na bango. Nazalaki komitungisa, mpo ete nayebaki malamu te kotambola na mpunda mpe kokata mai. Mosika te tokómaki na ebale, mpe mai mazalaki kokóma kino na efandeli ya mokongo ya mpunda. Nazalaki na nsomo mingi na boye ete natikaki kosimba nsinga ya mpunda mpe nakangamaki na nkunge ya mokongo ya mpunda. Oyo nde kosepela ntango tokomaki kozanga likama na ngambo mosusu ya ebale!
Na butu wana, nazwaki mpongi noki te, mpamba te nzoto mobimba ezalaki mingai mpo na mobembo likoló na mpunda. Kasi bandeko bamonisaki mpenza botondi mingi na vizite na boye ete esengelaki koyikela mpasi yango mpiko. Ntango nabandaki mosala ya circonscription na Lesotho, motuya ya basakoli ezalaki 113. Lelo oyo, esili kokola kino 1 649.
Na 1956 batindaki biso epai mosusu. Batindaki biso na protectorat ya Bechuanaland, oyo ebengami lelo Botswana. Botswana ezali mokili moko monene, mpe ezalaki kosenga kosala na bantaka molai mpo na kokutana na basakoli. Mbala mingi tozalaki kosala mibembo na engbunduka, to na mituka ya polele. Bifandelo bizalaki te, mpo na yango tozalaki kofanda na nse elongo na mikumba na biso. Tozalaki mbala mingi kokóma tosili kobeba na mputulu mpe tolembi makasi. Bandeko na biso baklisto bazalaki ntango nyonso koya mpo na koyamba biso, mpe bilongi na bango ya esengo ezalaki kolendisa biso.
Na eleko yango, mikanda ya la Société mipekisamaki na Botswana, mpo na yango tosengelaki kozala na ekenge kati na mosala na biso ya kosakola ndako na ndako mpe tosengelaki kosalela mikanda ya la Société te. Mokolo moko, bakutaki biso tozali kosakola pene ya mboka moke Maphashalala, mpe bakangaki biso. Ntango tozalaki kosamba, totangaki makambo mazali kati na Biblia, tomonisaki ete mokumba na biso moyebisami kati na Matai 28:19, 20. Atako bapesi na toli bakamwaki mingi, kasi mokonzi ya mboka apesaki etinda ete Batemwe ya mboka wana babetama fimbo. Na nsima, tokamwaki komona pasteur ya lingomba kobondela mokonzi na mboka ete ayokela biso mawa mpe alimbisa biso. Mokonzi na mboka ayokaki ye, mpe batikaki biso.
Atako minyoko mpe kopekisama ya mikanda, mosala ya Bokonzi elandaki se kokola. Wana nakómaki na Botswana, basakoli bazalaki 154. Nsima na mbula misato, ntango bipekiseli elongwaki, motuya ezalaki 192. Lelo oyo, Batemwe ya molende 777 bazali kati na mboka wana.
Kolakisa mpe kobongola mikanda
Na nsima, nasalaki lokola moteyi na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi mpo na bankulutu. Na nsima lisusu, nazwaki libaku ya esengo ya kozala moteyi na Eteyelo mpo na ba pionniers. Ngai mpe mwasi na ngai tosalaki na mabaku mosusu na filiale ya Afrique du Sud. Na mabaku yango, napesaki lisalisi na bobongoli ya mikanda, mpe Caroline azalaki kosala na kuku.
Mokolo moko na 1969, mokengeli ya filiale, Frans Muller, abelemaki na ngai mpe alobaki na ngai ete: “Ndeko Thongoana, nalingi komona bino, yo mpe mwasi na yo na biro na ngai.” Wana ekómaki biso kuna, ayebisaki biso ete toponami kati na baoyo bakokende na Londres mpo na assemblée “Kimya na mabele.” Tosepelaki na boyambi mpe na bolingo ya bandeko na biso ya Angleterre mpe ya Ecosse, mpe yango ekolisaki mingi bolingo na biso mpo na libota ya bandeko na mokili mobimba.
Na boumeli ya mibu 40, Caroline azalaki moninga moko ya sembo mpo na ngai kati na mosala na biso ya bapalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Tozalaki na bisengo mingi mpe tokutanaki na mwa makambo ya mawa. Ya solo, tobungisaki bana na biso mibale, kasi mwana na biso ya mwasi Damaris, akomaki Temwe moko ya malamu mpe asanganaki na mosala ya kobongola mikanda na filiale ya Afrique du Sud.
Kolongono ya nzoto epesaki biso nzela lisusu te ya kosala na mosala ya zongazonga; yango wana uta bambula mingi tozali kosala lokola ba pionniers speciaux na lisanga ya Seshego, quartier moko ya bato moindo pene na Pietersburg. Nazali mokengeli mokambi. Biblia elobi ete “esengo mingi mpe kotonda ezali liboso na Jéhovah,” mpe nazalaki na esengo mpe mposa na ngai ekokisami na kosalela Nzambe na Afrique du Sud.—Nzembo 16:11.
[Elilingi na lokasa 26]
Mosala ya kosakola na quortier ya Baindo ya Seshego, na Afrique du Sud