Lisungi oyo emonisi bolingo ya boklisto
“BOLINGA libota mobimba ya bandeko.” (1 Petelo 2:17) Wana ezali likambo ntoma Petelo alendisaki na yango baninga na ye baklisto. Bolingo motindo yango ezali te koponapona mposo, lolenge ya bomoi mpe bikólo, kasi ezali kosangisa bato kati na bolingo ya solo ya bondeko. Wana bamoko kati na baklisto ya ekeke ya liboso bakomaki na bosenga, bolingo ya boklisto epusaki basusu kati na bango na kopesa makabo ya bolingo epai na bantoma mpo ete bakabola yango na baoyo bazalaki na bosenga. Lisolo limonisi ete “bazalaki na biloko na bango nyonso na lisanga.”—Misala 2:41-45; 4:32.
Bolingo lolenge yango emonanaki polele na nsuka ya mobu 1991, ntango Collège central ya ba Témoins de Jéhovah esengaki na ba filiales mingi ya la Société Watch Tower oyo ezali na Europe de lˈOuest ete etinda bilei mpe bilamba mpo na bandeko oyo bazalaki na bosenga na Europe de lˈEst, mpe na oyo ebengamaki kala ete Union soviétique. Kati na lisolo oyo tozali kopesa ba rapports mingi oyo euti na ba filiales yango.
Suède
Mokolo ya le 5 décembre 1991, mokanda moko oyo ezalaki kolimbola mposa ya lisungi etindamaki na masanga 348 na mokili ya Suède. Ezwaki nokinoki eyano na yango. Bobele mwa mikolo na nsima, motuka mokobendamaka (remorque) oyo etindamaki liboso, ezwaki nzela ya Saint—Petersbourg, na Russie, komemaka ba tonnes 15 ya farine, ya margarine, ya ngombe ya linzanza, ya miliki ya putulu, mpe biloko bisusu ya lolenge yango. Ba Témoins de Jéhovah ya mbaka yango bakitisaki biloko na motuka mpe bakabolaki nokinoki maboke 750 epai na baoyo bazalaki na bosenga. Na nsima, mituka mikobendamaka misusu mibale ya mike ememaki bilei na Russie. Biloko nyonso biutaki na Suède bizalaki koleka 51,5 tonnes.
Bolingo oyo bandeko bamonisaki mpo na kopesa bilamba mpe sapato elekaki lolenge oyo bazalaki kokanisa. Maboke matondaki nokinoki na ba Salles du Royaume. Baklisto mingi bapesaki bilamba na bango moko. Basusu basombaki yango. Temwe moko asombaki bakazaka mitano. Na kokamwa nyonso, ntango moteki ayebaki mokano na ye, apesaki ye bakazaka mosusu mitano. Temwe mosusu asombaki karto mobimba ya basosɛti, ya ba gants mpe matambala. Ntango ayebisaki na motekisi ntina oyo azalaki kosomba biloko yango, motekisi apesaki ye bakazaka 30 mpo na motuya ya mbongo ya bakazaka mibale. Nkolo magazini moko ya biloko ya masano apesaki basapato mpe basapato milai 100 ya sika.
Biloko yango nyonso ememamaki na filiale mpo na kopona yango, kokanga mpe kotya yango na motuka. Bilamba—oyo bikokaki kotondisa mituka mikobendamaka 40—bizwaki bisika minene na filiale. Bandeko basi mpe mibali basalaki na boumeli ya baposo mingi mpo na kopona bilamba yango, kokabola yango na maboke ya bilamba ya mibali, ya basi mpe ya bana, liboso ete etyama kati na bakarto. Basalelaki mituka mikobendamaka 15 mpo na komema yango kino na Russie, na Ukraine mpe na Estonie.
Temwe moko oyo asalaki mobembo mbala mwambe na motuka ya la Société na mikili oyo mibengamaki kala Union soviétique, alobaki ete: “Na bokomi, boyambi ya bandeko na biso ezalaki mbano monene. Bazingaki biro na maboko na bango mpe bapepwaki biso, mpe atako bazali babola, bapesaki biso liteya monene ya bokabi ya boklisto.”
Finlande
Na Finlande, atako kobeba ya motuya ya mosolo, kozanga mosala mpe mikakatano ya nkita, ba Témoins de Jéhovah 18 000 ya Finlande basalaki nokinoki mpo na kosunga bandeko na bango ya oyo ebengamaki kala Union soviétique. Batindaki ba tonnes koleka 58 ya bilei oyo ekangisamaki kati na bakarto 4 850 mpo ekende na Saint—Petersbourg, na Estonie, Lettonie, Lituanie, mpe na Kaliningrad. Batondisaki bisika oyo bitikalaki mpamba kati na mituka na 12 mètres cubes ya bilamba. Bapesaki lisusu bavuatire mpe bapikopi (camionnettes) 25 mpo na mosala ya Bokonzi.
Bakarto mosusu ya bilei ekomaki na lisanga moko ya basakoli 14, na Slantsy, kati na etuka ya Saint-Petersbourg. Bandeko yango bamonisaki botondi na bango na nzela na mokanda. “Na lisanga na biso, tozali na bandeko basi 10 ya mibange. Kati na biso mingi bazali na bokono makasi mpe bakoki te kotelema na molongo bangonga mingi mpo na koluka bilei. Nzokande, Tata na biso ya makoló azali kopesa biso ntina ya kolemba ata moke te na ntango ya mikakatano: azali kotondisa mitema na biso na esengo. Tozali kotambwisa boyekoli ya Biblia 43 na bandako ya bato.” Ndeko mwasi moko ya Saint-Petersbourg azalaki na maoki ya mozindo ntango azwaki liboke oyo epesamaki na ye, alelaki na boumeli ya bangonga mibale liboso ete afungola liboke na ye.
Danemark
Kati na mboka moke wana na ekoteli ya mer Baltique, ba Témoins de Jéhovah 16 000 basanganaki na kotinda na Ukraine mituka 19 oyo ezalaki na ba tonnes 64 ya bilei etyami na bakarto 4 200, bakarto ya bilamba kitoko 4 600 mpe basapato ya sika 2 269. Ndeko moko ya Allemagne apesaki filiale nzela ya kosalela mituka na ye ya minene mitano oyo na nsima apesaki yango mpo na bandeko ya Ukraine. Ntango azongaki epai na ye, moko na bakumbi mituka alobaki: “Tomoni ete tozongi na biloko mingi koleka oyo tomemaki. Bolingo mpe elimo ya komipesa ya bandeko ya Ukraine elendisi kondima na biso mingi.”
Na nzela ya oyo ebengamaki kala Union soviétique, bakumbi mituka basengelaki kokeba mpo na miyibi. Bobele mwa mikolo liboso ete moko na mituka ya Danemark ekende, moyibi esalemaki na nzela yango. Molongo ya mituka mitano ya bilei ya lisanga moko mpo na kopesa lisungi ekamatamaki na miyibi oyo bazalaki na hélicoptère mpe na minduki ya makasi. Miyibi bazwaki mituka wana mitano batikaki bakumbi mituka pembeni ya nzela. Atako makama motindo yango, bilei biutaki na filiale ya Danemark bikomaki malamu epai na bandeko. Na bozongi, bandeko basengaki na moko na bakumbi mituka ete amema mokanda moke oyo bakakatanaki mpo na kokoma yango na Lingelesi: “Bandeko ya bolingo mibali mpe basi ya Danemark, tosili kozwa lisungi na bino. Jéhovah akopesa bino lifuti.”
Pays-Bas
Filiale ya Pays-Bas etindaki maboke 2 600 oyo nyonso ezali na ba tonnes 52 ya bilei. Esengelaki milongo mibale ya mituka mpo na kokómisa bilei yango na Ukraine. Na mbala nyonso, esengelaki kotika mituka yango motoba kuna, mpo ete bandeko ya Allemagne bapesaki yango lokola makabo mpo na mosala ya Bokonzi na mikili ya Est. Bandeko ya Ukraine batindaki eteni monene ya bilei na Moscou, na Sibérie mpe na bisika mosusu epai mposa ezalaki monene. Lisusu, bandeko ya Hollande bapesaki 736 mètres cubes ya bilamba mpe sapato. Lisungi wana ekendeki kino Lviv na Ukraine, na lisalisi ya molongo ya mituka 11 oyo etambolaki elongo na vuatire moko.
Nsima ya mobembo molai mpo na kokatisa Allemagne mpe Pologne, mituka yango milekaki douane ya Ukraine kozanga nkaka, mpe ekómaki na ebandeli ya engumba Lviv na ngonga ya misato ya ntongo. Bakumbi mituka balobi ete: “Na mwa ntango moke, limpinga ya bandeko 140 lizalaki wana mpo na kokitisa biloko na mituka. Liboso ya kobanda mosala, bandeko wana ya kosokema basanganaki kati na libondeli mpo na komonisa elikya na bango epai na Jéhovah. Bobele bongo, nsima ya kosilisa mosala, bayanganisaki biso lisusu mpo na kotonda Jéhovah. Nsima na kosepela na boyambi ya bandeko, baoyo bapesaki biso na bokabi nyonso moke oyo bazalaki na yango, bakendeki kotika biso kino na nzela monene, mpe nsima ya kosala libondeli, bandeko bazongaki epai na bango.
“Na boumeli ya mobembo molai na bozongi tozalaki na makambo mingi ya kokanisa mozindo: boyambi ya bandeko ya Allemagne mpe ya Pologne, bakisa mpe boyambi ya bandeko ya Lviv; kondima na bango mpe ezaleli na bango ya kobanga Nzambe; boyambi na bango—bapesaki biso esika ya kolala mpe bilei atako bango moko bazalaki kati na bosenga; elimo na bango ya bomoko mpe boyokani na bango ya penepene; mpe botondi na bango. Tokanisaki mpe na bandeko basi mpe mibali ya etuka na biso baoyo bapesaki biloko na bokabi nyonso.”
Suisse
Filiale ya Suisse ebandi rapport na yango na maloba ya Yakobo 2:15,16: “Soko ndeko mobali to ndeko mwasi azali bolumbu mpe na bosenga ya bilei ya mokolo na mokolo, mpe moko na bino alobi na ye bongo ete: ˈBokenda na kimya, boyoka mótɔ, botondaˈ; nde bopesi bango yango ezangi bango na nzoto te, wapi litomba?” Na nsima rapport elandaki na maloba oyo: “Tokanisaki na ntina na mokapo oyo ya Makomami ntango collège central ya ba Témoins de Jéhovah esengaki ete topesa lisungi ya mosuni epai na bandeko oyo bazalaki kati na bosenga.
“Bato nyonso bamipesaki nokinoki! Bobele nsima na mikolo mibale, ba tonnes 12 ya bilei ebongisami na maboke 600 etindamaki na Ukraine kati na mituka misato oyo miutaki na Allemagne, oyo epesamaki mpo na kosunga mosala na mokili wana. Awa, bandeko basepelaki na koyoka ete biloko yango nyonso bikomaki malamu. Na ntango wana, masanga mazalaki koyanganisa bilamba, mpe nokinoki filiale etondaki na bakarto, bavalisi mpe basaki oyo ezalaki na bilamba ya bana mpe biloko ya masano biuti na bana ya Suisse mpo na baninga na bango bayebani nkombo te oyo bazali kuna mosika na Grand Nord. Bitanda ya chocolat mingi bizalaki kati na maboke ya bilamba wana.”
Lolenge nini biloko yango elingaki kotindama? Rapport elobi ete: “Filiale ya France esalisaki biso na kopesaka biso mituka mikobendamaka mibale mpe bakumbi mituka minei. Motuka moko ya filiale mpe mituka misusu minei ya bandeko ya Suisse esalelamaki mpo na komema ba tonnes 72 ya bilei mpe bilamba na Ukraine.” Molongo ya mituka (na bolai ya bametele 150) ekómaki malamu na ebombelo ya biloko na Lviv epai bandeko ebele bazalaki kozela mpo na kokitisa biloko na mituka. Bakumbi mituka balobaki ete bokeseni ya minoko ezalaki epekiseli te, mpo ete bilongi na bango bizalaki na botondi ya mozindo.
Autriche
Batemwe ya Autriche batindaki ba tonnes 48,5 ya bilei, bakarto 5 114 ya bilamba mpe basapato 6 700 na Lviv mpe na Oujgorod, na Ukraine. Batindaki lisusu ba tonnes 7 ya bilei, bakarto 1 418 ya bilamba mpe basapato 465 na Belgrade, Mostar, Osijek, Sarajevo mpe Zagreb, na oyo ebengamaki kala Yougoslavie. Filiale elobi ete: “Mituka mikobendamaka 12 mitondi na biloko misalaki mobembo ya bakilometele 34 000. Ndambo monene ya bomemi biloko yango esalemaki na ndeko moko mpe mwana na ye, baoyo bazali na kompanyi ya komema biloko na mituka.”
Na ntina na makabo ya bilamba, rapport elandi ete: “Tosalelaki Salle ya assemblée moko lokola esika ya kosangisa bilamba nyonso. Tokitisaki biloko na mituka moko nsima na mosusu kino esika ezangaki. Ezalaki lokola na mikolo na Moize wana basengelaki kopekisa ete bato bapesa lisusu makabo. (Exode 36:6) Ata bato oyo bazali ba Témoins de Jéhovah te bapesaki mbongo, balobaki ete: ˈToyebi ete na nzela na bino biloko bikokoma epai na baoyo bazali na yango mposa.ˈ Bakompanyi ya mokili bapesaki biso bakarto ya mpamba oyo tozalaki na yango mposa.” Bandeko mibali mpe basi oyo basalaki mpo na kopona mpe kosala maboke bazalaki na mibu longwa 9 kino 80. Bamekaki nkutu kotya esika moko ba cravates mpe basimisi oyo ebongi na kazaka moko na moko.
Rapport eyebisi na sikisiki ete: “Bakonzi ya mboka Autriche mpe baoyo ya ndelo ya bamboka basalisaki biso mingi na kopesaka nzela na bomemi lisungi mpe na kopesaka mikanda ya ntina; na yango kotindama ya biloko esalemaki kozanga mikakatano.”
Italie
Milongo minene mibale ya mituka ememaki ba tonnes 188 ya bilei longwa na Rome kino na oyo ebengamaki kala Union soviétique, na nzela ya Autriche, ya Tchécoslovaquie mpe ya Pologne. Molongo moko na moko ya mituka ezalaki na bakumbi mituka motoba, mecanicien moko, electricien-auto moko, molimboli na maloba moko, molekisi biloko na douane moko, molambi moko, monganga moko, mokambi mobembo moko kati na jeep moko, mpe ndeko moko kati na motuka oyo ezali na bisika ya kolala.
Bilei biutaki na batekisi nsambo. Filiale elobi ete: “Ntango bankolo magazini epai tosombaki biloko bayebaki ntina oyo tozalaki kosomba biloko yango, basusu kati na bango bamonisaki mposa ya kopesa lisungi. Bato ya mokili oyo bazali batekisi bapesaki ebele ya bakilo ya makaroni mpe loso, mpe bakarto ya kotya yango. Basusu bapesaki bapiné ya mituka minene mpo na mbula mpembe, to mpe mbongo.
“Bandeko ya Italie basepelaki na libaku oyo epesamaki na bango na kotinda lisungi. Bana mpe basepelaki kosangana na ebongiseli yango. Mwana mobali moko ya mibu mitano atindaki mwa mosolo mpo na kosomba ˈlinzanza ya mbisi oyo ebengami thon oyo ekozala na molai kino na lola mpo na bandeko na Russie.ˈ Mwana mwasi moko oyo azwaki bapwɛ malamu na kelasi, azwaki likabo epai na bankoko na ye mpo akoka kosomba eloko moko mpo na kosepelisa baboti na ye. Akomaki ete, ˈKasi ntango nayebaki ete bandeko na ngai mingi bazangi biloko kitoko oyo nazali kolya, nakanisaki ete likabo lileki kitoko oyo nakoki kopesa na baboti na ngai ezali ya kosunga bandeko yango.ˈ Atyaki mosolo mingi kati na sanduku ya makabo. Alobaki ete ˈNazali na elikya ete nakozwa lisusu bapwɛ malamu, boye, nakokoka kotinda lisusu mosolo mingi.ˈ “Rapport ya filiale esukisi na koloba ete mikanda ya botondi ya bandeko ya Ukraine, elembo ya matondi ya bandeko ya Italie mpo na likambo wana, mpe makambo mingi ya kitoko oyo malekaki na ntango ya kobongisa mpe kokabola lisungi ezalaki mpenza ya kosimba motema, ya kolendisa mpe ya koyeisa bomoko.
Bilei mpo na bankoto ya bayangani na assemblée
Assemblée intenationale ya liboso ya monene oyo esalemaki na ba Témoins de Jéhovah ya oyo ebengamaki kala Union soviétique esalemaki na stade Kirov na Saint-Petersbourg na Russie, kobanda le 28 kino le 30 juin 1992. Bayangani 46 200, bautaki na mikili 28 bazalaki na assemblée wana ya monene oyo ezalaki na moto na likambo “Bamemi na Pole.” Assemblée yango epesaki libaku ya sika ya komonisa bolingo ya boklisto epai na “libota mobimba ya bandeko.”—1 Petelo 2:17.
Ba tonnes ya bilei eutaki na Danemark, na Finlande, na Suède, mpe na mikili misusu ya Europe de lˈOuest epesamaki na bankoto ya bayangani oyo bautaki na oyo ebengamaki kala U.R.S.S., mpo ete balya yango na boumeli ya assemblée kozanga ete bafuta mbongo. Nsima ya eteni ya nsuka ya assemblée, bandeko bazwaki lisusu liboke moko ya bilei mpo na mobembo na bango ya bozongi.
Ba rapports oyo epesami awa na likolo ezali komonisa ete makabo makendeki te bobele epai ya mikili ya Est. Makabo mazalaki kopesama epai na epai. Bilei mpe bilamba ekendeki na Est, nzokande epai ya Ouest, ezalaki na ebele ya bilembo ya kobondisa ya bolingo mpe makambo ya kolendisa mamonisi bokangami mpe bosembo ya bankoto ya basambeli ya Jéhovah na boumeli ya mibu mingi ya komekama. Na yango, na bipai nyonso mibale, bosolo ya maloba na Yesu emonanaki: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—Misala 20:35.
[Etanda/Elilingi na lokasa 21]
1. Longwa na Finlande: Saint-Petersbourg, Russie; Tallinn mpe Tartou, Estonie; Riga, Lettonie; Vilnius mpe Kaunas, Lituanie; Kaliningrad, Russie; Petrozavodsk, Carélie
2. Longwa na Pays-Bas: Lviv, Ukraine
3. Longwa na Suède: Saint-Petersbourg, Russie; Lviv, Ukraine; Nevinnomyssk, Russie
4. Longwa na Danemark: Saint-Petersbourg, Russie; Lviv, Ukraine
5. Longwa na Autriche: Lviv, Ukraine; Belgrade, Mostar, Osijek, Sarejavo, Zagreb (na oyo ebengamaki kala Yougoslavie)
6. Longwa na Suisse: Lviv, Ukraine
7. Longwa na Italie: Lviv, Ukraine
[Bililingi na lokasa 23]
Bakarto ya bilamba na filiale ya Suède
Kotondisa biloko na motuka
Bilei bikeseni kati na liboke moko
Bacon mpe jambon ya Danemark
Molongo ya mituka 11 mpe vuatire moko
Maboke mpe bavalisi etindami na filiale ya Autriche
Kokitisama ya biloko na motuka na Lviv, na Ukraine