Oyo botosi epai na Nzambe ezali kosenga na biso
“Na bongo, botosaka Nzambe.”—YAKOBO 4:7
1. Tokoki koloba nini mpo na lolenge ya Nzambe oyo biso tozali kosambela?
JÉHOVAH azali solo Nzambe ya kokamwa! Aleki monene, akokani na mosusu te, azali bobele ye moko kati na makambo mingi! Azali Oyo Aleki-likoló, Moyangeli na Molongo mobimba; bokonzi nyonso ya solo bozali kati na ye. Azali libela na libela, aleki na nkembo na boye ete moto akoki te komona ye mpe kotikala na bomoi. (Exode 33:20; Baloma 16:26) Aleki na nguya mpe na mayele, boyengebene na ye eleki na kokoka mpe azali bolingo. Azali Mozalisi na biso, Mosambisi na biso, Mopesi na mibeko mpe Mokonzi na biso. Makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi mokoutaka epai na ye.—Nzembo 100:3; Yisaya 33:22; Yakobo 1:17.
2 Botosi epai na Nzambe ezali kosenga makambo nlni?
2 Mpo na bantina nyonso wana, ntembe ezali te ete tosengeli kozala na botosi epai na ye. Kasi yango ezali kosenga nini? Ezali kosenga makambo mingi. Lokola tokoki te komona Jéhovah Nzambe, mpo na kozala na botosi epai na ye esengeli na biso koyoka mongongo ya lisosoli liteyami, kosala elongo na lisanga na Nzambe oyo ezali awa na mabele, kotosa bakonzi ya mokili oyo mpe komemya mitinda mitali bokonzi kati na libota.
Tobatela lisosoli malamu
3. Mpo na kobatela lisosoli malamu, bipekiseli nini tosengeli kotosa yango?
3 Mpo na kobatela lisosoli malamu, tosengeli kotosa bipekiseli oyo bato bakoki kokengela yango te. Na ndakisa, bakonzi ya bato bakoki te kokengela ete bato bamemya mobeko ya zomi kati na Mibeko Zomi, oyo epekisi kolula. Na yango, likambo oyo limonisi ete Mibeko Zomi miutaki epai na Nzambe, mpo ete ezali te na bato oyo basalaka mibeko baoyo bakokaki kondima mobeko moko oyo bakoki te kotosisa yango, na kopesaka bitumbu na baoyo bakozanga kotosa yango. Na mobeko wana, Jéhovah Nzambe apesaki na Moyisraele moko na moko mokumba ya kozala polisi ya nzoto na ye moko—soki alingi kozala na lisosoli malamu. (Exode 20:17) Bobele bongo, kati na misala ya nzoto oyo mizali kopekisa moto na kosangola Bokonzi na Nzambe tozali kokuta “zuwa” mpe “bilulela,” makambo oyo basambisi na bato bakoki te kopesa etumbu ata moko. (Bagalatia 5:19-21) Nzokande, mpo na kobatela lisosoli malamu, tosengeli kobwaka yango.
4. Mpo na kobatela lisosoli malamu, mitinda nini ya Biblia tosengeli kolanda yango na bomoi na biso?
4 Ee, tosengeli kozala na bomoi na komemyaka mitinda ya Biblia. Mitinda yango mikoki kokangisama na mokuse kati na mibeko mibale oyo Yesu Klisto atangaki ntango batunaki ye mobeko oyo molekaki monene kati na Mibeko na Moize. “Osengeli kolinga Jéhovah Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na elimo na yo mobimba.... Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:36-40, MN) Maloba na Yesu mazwami kati Matai 7:12 mamonisi oyo mobeko ya mibale kati na mibeko yango ezali kosenga: “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo. Mpo ete Mibeko mpe basakoli ezali bongo.”
5. Lolenge nini tokoki kobatela boyokani malamu elongo na Jéhovah Nzambe?
5 Bato mosusu bayeba to bayeba yango te, tosengeli kosala oyo toyebi ete ezali malamu mpe toboya oyo toyebi ete ezali mabe. Etinda wana ezali na ntina mingi ata soki tokokaki kosala likambo oyo tokozwa na yango etumbu te, to na kozangaka kosala oyo tosengeli kosala, to na kosalaka oyo epekisami na biso. Mpo na yango, esengeli na biso kobatela boyokani malamu elongo na Tata na biso ya likol6 mpe kozanga kobosana likebisi oyo ntoma Paulo apesi biso kati na Baebele 4:13, ete: “Ekelamu moko ezali te oyo ebombami na miso na Nzambe, kasi nyonso ezali bolumbu mpe emonisami polele na miso na ye oyo tosengeli kozongisa monoko.” Soki tozali kosala malamu na kolendendela, tokozala na makasi mingi mpo na kotemela mayele mabe ya Diable, mpo na kotemela mimekamo mizali kouta na mokili mpe mpo na kobundisa bamposa oyo tobotamaki na yango oyo ezali kotinda biso na kozala na moimi. —Tala Baefese 6:11.
Tozala na botosi na lisanga na Nzambe
6. Banani Jéhovah asalelaki na ntango ya kala mpo na kopesa malako na ye na bato mosusu?
6 Jéhovah Nzambe atikelaki te moto na moto bonsomi nyonso ya kozwa bikateli na lolenge ya kosalela mitinda na Biblia kati na bomoi na ye. Uta ebandeli ya lisoló na bato, Nzambe asalelaki bato lokola nzela mpo na kopesa malako na ye epai ya bato mosusu. Ezali motindo yango nde Adam azalaki molobeli na Nzambe epai na Eva. Mobeko mopekisaki kolya mbuma mopesamaki na Adam liboso ete Eva azalisama; na yango, Adam asengelaki koyebisa Eva nini ezalaki mokano na Nzambe epai na ye. (Genese 2:16-23) Noa azalaki mosakoli na Nzambe epai na libota na ye mpe mokili oyo ezalaki liboso ya mpela. (Genese 6:13; 2 Petelo 2:5) Abalayama, ye mpe azalaki molobeli na Nzambe epai na libota na ye. (Genese 18:19) Moize azalaki mosakoli na Nzambe mpe molobeli na Nzambe epai na libota na Yisraele. (Exode 3:15, 16; 19:3, 7) Nsima na ye kino na Yoane Mobatisi, Nzambe asalelaki basakoli, banganga mpe bakonzi mingi mpo na koyebisa mokano na ye na libota na ye.
7, 8. (a) Ntango Masiya ayaki, nani asalelamaki lokola Molobeli na Nzambe? (b) Botosi epai na Nzambe ezali kosenga nini na ba Témoins de Jéhovah ya lelo?
7 Ntango Masiya, Yesu Klisto ayaki, Nzambe asalelaki ye mpe bantoma na ye mpe bayekoli na ye ya penepene ete bazala balobeli na Ye. Na nsima, bayekoli bapakolami baoyo bakangamaki ntango nyonso na Yesu Klisto babyangamaki na kosala “moombo na sembo mpe na mayele” mpo na kopesa na basaleli na Jéhovah boyebi etali lolenge ya kosalela kati na bomoi na bango mitinda ya Biblia. Baoyo bamonisaki botosi na Nzambe bandimaki moombo wana lokola esaleli oyo Jéhovah azalaki kosalela.—Matai 24:45-47; Baefese 4:11-14.
8 Makambo mamonisi ete lelo oyo “moombo na sembo mpe na mayele” asangani na ba Témoins de Jéhovah mpe amonisami na Collège central ya Batemwe yango. Collège yango, ezali kopona bakengeli mpo na misala mikeseni—na ndakisa, bankulutu, bakengeli ya zongazonga—mpo na kotambwisa mosala na mboka moko na moko. Botosi epai na Nzambe ezali kosenga na Temwe moko na moko ete azala na botosi epai na bakengeli wana na boyokani na maloba mazwami na Baebele 13:17 ete: “Botosa bango bakokambaka bino mpe bomisokisa liboso na bango. Mpo ete bazali kokengela [ntango nyonso mpo na] milimo na bino, lokola bato oyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango. Tika ete basala mosala na esengo, nde na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.”
Tondima kosembolama
9. Botosi epai na Nzambe ezali mbala mingi kosenga nini?
9 Botosi epai na Nzambe ezali kosenga mbala mingi kondima kosembolama oyo epesami na bakengeli. Soki ekómeli biso na kozanga komisembola lokola esengeli, ekoki kozala ete tozali na mposa ya kozwa toli mpe kosembolama na baoyo, lokola bankulutu ya lisanga na biso, bazali na eksperianse mpe na lotomo ya kosala yango. Kondima kosembolama yango ezali kolanda nzela ya mayele.—Masese 12:15; 19:20.
10. Mokumba nini baoyo bazali kosembola basusu bazali na yango?
10 Ya solo, bankulutu oyo bazali kosembola basusu basengeli kozala bango moko bandakisa ya botosi na Nzambe. Lolenge nini? Engebene Bagalatia 6:1, basengeli te bobele kopesa toli na lolenge malamu, kasi basengeli lisusu kozala bandakisa: “Bandeko, soko moto moko asali libunga liboso ete ye moko asosola yango, bino bato bozali na makoki na elimo, bomeka kosembola moto motindo wana kati na elimo ya bopolo; omisenzela yo moko ete yo mpe omekama te.” Na maloba mosusu, batoli ya nkulutu esengeli kozala na boyokani na ndakisa oyo azali kopesa. Yango eyokani na masengami mayebisami kati na 2 Timote 2:24, 25 mpe kati na Tite 1:9. Ya solo, baoyo bazali kopesa mpamela to bazali kosembola basusu basengeli kokeba ete bazala na makambo makasi te. Basengeli ntango nyonso kozala na bopolo mpe na boboto, na kokangamaka makasi na mitinda mizali kati na Liloba na Nzambe. Basengeli koyeba koyokamela makambo kozanga koponapona, mpe kopesa libondisi na baoyo batungisami mpe bazali na bozito.—Tala Matai 11:28-30.
Tozala na botosi epai na bakonzi baleki liboso
11. Nini esengami na baklisto kati na boyokani na bango elongo na bakonzi ya mokili oyo?
11 “Botosi epai na Nzambe ezali kosenga lisusu ete tozala na botosi epai na bakonzi ya mokili oyo. Tozali kokuta kati na Baloma 13:1, toli oyo ete: “Tika ete moto na moto atosaka bakonzi baleki liboso, mpamba te bokonzi bozali te soki mpo na Nzambe te; mpe oyo ezali etelemi boye mpo na ndingisa na Nzambe.” Maloba oyo, kati na makambo mingi, mazali kosenga ete totosa mibeko ya nzela mpe kofuta mpako na lisosoli malamu, lokola ntoma Paulo alobeli yango na sikisiki kati na Baloma 13:7.
12. Na ndimbola nini botosi na biso epai na Kaisala ezali na ndelo?
12 Nzokande, ezali polele ete botosi wana epai na Kaisala ezali na ndelo. Tosengeli te kobosana etinda eyebisamaki na Yesu Klisto kati na Matai 22:21 ete: “Pesa epai na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.” Na ntina na Baloma 13:1, tala oyo tokoki kotanga na maloba na nse ya lokasa kati na libongoli moko ya Biblia (Segond, elongo na komantere ya Scofield) ete: “Yango ezali kosenga te botosi na makambo ya mbindo to oyo eyokani te na bizaleli ya moklisto, oyo mokumba na ye [ya moklisto] ezali ya kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato. (Mis. 5:29; cp. Dan. 3:16-18; 6:10 ss).”
Botosi epai na Nzambe kati na libota
13. Botosi epai na Nzambe kati na libota ezali kosenga nini epai na moko na moko?
13 Kati na libota, mobali mpe tata azali mokonzi. Yango ezali kosenga na mwasi na ye ete alanda toli epesami kati na Baefese 5:22, 23 ete: “Tika ete basi botosaka mibali na bango lokola epai na Nkolo, mpo ete mobali azali mokonzi na mwasi lokola Klisto azali mokonzi na lisangá.”a Mpo na bana, basengeli te kosala makambo ndenge balingi, kasi basengeli kobanga Nzambe na kotosaka tata na bango mpe mama na bango, lokola ntoma Paulo alimboli yango kati na Baefese 6:1-3: “Bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, mpo ete yango ezali sembo: ˈKumisa tata na yo mpe mama na yo,ˈ oyo lilako na liboso lizali na elaka ete: ˈBongo ezala malamu mpo na yo ete oumela ntango molai na mokili.ˈ”
14. Botosi epai na Nzambe ezali kosenga nini epai na batata ya mabota?
14 Ya solo, ekozala petee na basi mpe na bana na kopesa botosi wana epai na mibali mpe na batata oyo bazali bango moko komonisa botosi epai na Nzambe. Mibali bakolónga na komonisa yango na kosalelaka bokonzi na bango na boyokani na mitinda ya Biblia, lokola oyo ekomami kati na Baefese 5:28, 29 mpe 6:4 ete: “Bongo ekoki na mibali ete balinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. Ye oyo alingi mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ete moto te akoyina mosuni na ye moko; kasi akoleisa yango mpe akobatela yango, lokola Klisto epai na lisanga.” “Batata, boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bolanda kobokola bango kati na malako mpe mpamela na Jéhovah.”
Lisalisi mpo na komonisa botosi epai na Nzambe
15. Mbuma nini ya elimo oyo ekosalisa biso na komonisa botosi epai na Nzambe?
15 Nini ekosalisa biso na komonisa botosi na Nzambe na makambo wana makeseni? Ya liboso, bolingo ya solo mpo na Jéhovah Nzambe mpe mpo na baoyo atyaki ete bakamba biso. Tozali kotanga kati na 1 Yoane 5:3 ete: “Bolingo na Nzambe ezali boye ete tokokisa malako na ye. Malako na ye mazali na bozito te.” Yesu amonisaki likanisi yango moko kati na Yoane 14:15 ete: “Soko bolingi ngai, bokotosa malako na ngai.” Ya solo, bolingo—mbuma oyo eleki ntina kati na bambuma ya elimo—ekosalisa biso na kosepela na nyonso oyo Jéhovah asalaki mpo na biso mpe yango ekosalisa biso na komonisa botosi na Nzambe. —Bagalatia 5:22.
16. Na nini kobanga Nzambe ekoki kosalisa biso na komonisa botosi epai na Nzambe?
16 Ya mibale, kobanga Nzambe. Kobanga kosala makambo oyo mazali kosepelisa Nzambe te ekosalisa biso, mpo ete yango “elimboli koyina mabe.” (Masese 8:13) Na ntembe te, kobanga kosala makambo oyo mazali kosepelisa Jéhovah te ekopekisa biso na kobuka mitinda mpo na bobangi ya bato. Ekosalisa biso lisusu na kotosa malako ya Nzambe ezala liboso ya mikakatano ya lolenge nini oyo tokoki kokutana na yango. Lisusu, ekosalisa biso na kokwea te na masenginya to na bamposa na biso ya mabe. Makomami mamonisi ete soki Abalayama andimaki kopesa mwana na ye molingami Yisaka lokola mbeka mpe soki Yosefe azwaki makasi ya kotemela makanisi ya mbindo ya mwasi na Potifare, ezali mpo ete bazalaki kobanga Jéhovah. —Genese 22:12; 39:9.
17. Kondima ezali na ntina nini mpo na oyo etali komonisa botosi epai na Nzambe?
17 Lisalisi ya misato ezali bongo kondima epai na Jéhovah Nzambe. Kondima ezali kosalisa biso na kolanda toli oyo epesami kati na Masese 3:5, 6 ete: “Talela [Jéhovah] na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Na nzela na yo nyonso, ndima ye mpe ye akotambolisa yo.” Kondima ekosalisa biso mingimingi soki emonani ete tozali konyokwama kozanga ntina to soki bato bazali koboya biso na ntina na mposo na biso, ekolo na biso to kozanga koyokana na ntina na bomoto na biso. Bamoko mpe bazali kokanisa ete babosana bango mpo ete batindaki nkombo na bango te mpo na koponama lokola bankulutu to basaleli na misala. Soki tozali na kondima, tokozela ete Jéhovah abongisa makambo na ntango na yango. Kozelaka ntango yango, ekosengela na biso mbala mosusu kolona motema molai mpe koyika mpiko.—Bileli 3:26.
18. Lisalisi nini ya minei tozali na yango mpo na komonisa botosi epai na Nzambe?
18 Komikitisa ezali lisalisi ya minei. Ye oyo azali na komikitisa azalaka na mpasi te mpo na komonisa botosi na Nzambe mpamba te lokola ˈazali na kosokema, azali kotalela bato mosusu ete baleki ye.ˈ Andimaka komitambwisa lokola “mwana moke.” (Bafilipi 2:2-4; Luka 9:48) Nzokande, moto na lolendo alingaka te ete moto mosusu azala likoló na ye; yango ezali kosilikisa ye. Lokola elobamaka, akolingaka lokumu oyo ekomema ye na libebi na esika ete alinga kosembolama oyo ekopesa ye lobiko.
19. Ndakisa nini malamu ya komikitisa prezida moko ya la Societe Watch Tower apesaki na ntango ya kala?
19 Ndakisa malamu ya komikitisa mpe ya botosi na Nzambe epesamaki kala na Joseph Rutherford, prezida ya mibale ya la Société Watch Tower. Ntango Hitler apekisaki mosala ya ba Témoins de Jéhovah na Allemagne, bandeko ya mboka wana bakomelaki ndeko Rutherford mpo na kotuna ye nini basengelaki kosala, mpo ete bazalaki lisusu na ndingisa te ya koyangana to ya kosakola. Ndeko Rutherford alobelaki likambo yango na basangani ya libota ya Bethel mpe andimaki na bosolo nyonso ete ayebaki te eyano asengelaki kopesa na bandeko ya Allemagne, mingimingi wana akanisaki na bitumbu makasi oyo bazalaki kozwa. Abakisaki ete soki moto moko ayebi eloko nini basengelaki koyebisa bango, akozala na esengo ya koyoka yango. Oyo nde komikitisa!b
Bolamu oyo ezali kozwama na baoyo bazali komonisa botosi epai na Nzambe
20. Bolamu nini baoyo bazali komonisa botosi epai na Nzambe bazali kozwa?
20 Bamoko bakoki komituna: bolamu nini baoyo bazali komonisa botosi epai na Nzambe bazali kozwa? Bazali kozwa bolamu mingi. Tokozala te na mitungisi mpe na mawa oyo ezali komonana epai na baoyo bazali kosala makambo na elimo ya lipanda. Tozali na boyokani malamu elongo na Jéhovah Nzambe mpe tozali na baninga malamu kati na bandeko na biso baklisto. Lisusu, na kotosaka mibeko, tokopengola kotungisama pambapamba na bakonzi ya mokili oyo. Tozali mpe kosepela na bomoi ya libota ya esengo, ezala mibali mpe basi, ezala baboti mpe bana. Na nsuka, na kozalaka ntango nyonso na botosi na Nzambe, tokomonisa ete tozali kolanda toli epesami kati na Masese 27:11, ete: “Mwana na ngai, zala na mayele mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazongisa eyano na ye oyo azali kotumola ngai.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Pionnier moko alobelaki mokolo mosusu na pionnier oyo azalaki monzemba limemya mpe lisalisi litondi na bolingo oyo mwasi na ye azalaki kopesa ye. Pionnier oyo [ya monzemba] amonaki malamu ete moninga na ye mbele asengelaki mpe kolobela ye bizaleli mosusu ya mwasi na ye. Kasi mwa bambula na nsima, ntango pionnier wana abalaki, ayaki komona ete lisalisi litondi na bolingo ya mwasi na libala ezali na ntina mingi mpo na kozala na libala ya esengo.
b Nsima na kobondela mingi mpe koyekola Liloba na Nzambe, Joseph Rutherford ayebaki eyano oyo asengelaki kopesa na bandeko ya Allemagne. Mokumba ya koyebisa bango oyo basengelaki kosala to oyo basengelaki kosala te ezalaki ya ye te. Bazalaki na Liloba na Nzambe oyo ezalaki koyebisa bango polele lolenge basengelaki kosala mpo na oyo etali makita mpe mosala ya kosakola. Na yango, bandeko ya Allemagne babandaki koyangana na bituluku mike mpe kosakola na polele te, na kotosaka mitinda na Jéhovah mitali makita mpe litatoli mpo na nkombo mpe Bokonzi na ye.
Bozongeli
◻ Banani Nzambe asalelaki mpo na koyebisa malako na ye na bato mosusu, mpe basaleli na ye basengelaki komonisa nini epai na bango?
◻ Kati na makambo nini tosengeli komonisa botosi epai na Nzambe?
◻ Bizaleli nini bikosalisa biso na komonisa botosi epai na Nzambe?
◻ Bolamu nini botosi epai na Nzambe ezali kopesa?
[Elilingi na lokasa 16]
Nzambe asalelaki tempelo ya Yelusaleme mpo na koyebisa mokano na ye na libota na ye
[Bililingi na lokasa 18]
Makambo kati na yango tokoki komonisa botosi na Nzambe