Tosala makasi mpo na kobatela libota na biso ete likɔta na mokili ya sika molakami na Nzambe
“Ɛ Jéhovah, yo moko okobatela bango, okosunga bango kati na libota oyo libela na libela.”—NZEMBO 12:7.
1, 2. (a) Ezalela nini mabota mosusu mazali na yango liboso ya mikakatano ya mikolo ya nsuka? (b) Mabota ya boklisto masengeli kosala nini mpo na kobika?
MOKƐNGƐLI moklisto moko nkombo na ye Jean, alobaki ete: “Lelo, motema na ngai motóndi na esengo!” Nini epesaki ye esengo wana? Alobi ete: “Mwana na ngai ya mobali ya mibu 14 mpe mwana na ngai ya mwasi ya mibu 12, bazwi batisimo.” Kasi esengo na ye esuki wana te. Abakisi ete: “Mwana na ngai ya mobali ya mibu 17 mpe mwana na ngai ya mwasi ya mibu 16, bango nyonso mibale bazalaki ba pionniers auxiliaires na mbula oyo.”
2 Kati na biso, mabota mingi mazali mpe kozwa matomba kitoko na kosaleláká mitinda ya Biblia. Kasi, mabota mosusu mazali na mikakatano. Moklisto moko akomaki ete: “Tozali na bana mitano, mpe tozali kotungisama mingi na ntina na bango. Tosili kobungisa moko oyo akei na ebongiseli oyo enuni. Sikawa, emonani ete bana na biso ya mike bazali mpenza komekama na Satana.” Ezali mpe na babalani oyo bazali kokutana na mikakatano makasi, oyo mbala mosusu ezali komema na kokabwana to na koboma libala. Atako bongo, mabota oyo mazali kolona bizaleli ya boklisto makoki kobika na “bolózi monene” mpe kokɔta kati na mokili ya sika molakami na Nzambe. (Matai 24:21; 2 Petelo 3:13) Bongo, bino bokoki kosala nini mpo ete libota na bino libatelama?
Bongisa lisusu lolenge ya kosolola
3, 4. (a) Kosolola ezali na ntina nini kati na bomoi ya libota, mpe mpo na nini mikakatano mizali kobima mbala mingi na ntina na likambo wana? (b) Mpo na nini mibali asengeli kosala makasi mpo na kozela bayoki malamu ya basi na bango?
3 Kosolola malamu ezali na ntina mingi mpo na bolamu ya libota; soki yango ezali te, mikakatano mikobakisama. Totangi na Masese 15:22 (MN), ete: “Myango mikobeba wana masolo na nkuku mazali te.” Mwasi moko mopesi na toli na makambo ya mabala, amonisaki likanisi oyo kitoko ete: “‘Alobisaka ngai te,’ ‘ayokelaka ngai te.’ Wana ezali maloba na komilela oyo nayokaka mbala mingi epai na basi oyo napesaka toli. Mpe na ntango nazali koyebisa makambo yango epai na mibali na bango, bazali kondima yango soko moke te.”
4 Kozanga kosolola ezali kouta na likambo nini? Libosoliboso, mibali mpe basi bakeseni; mpe emonanaka ete lolenge na bango ya kosolola ekeseni. Zulunalo moko ekomaki ete mobali “akolukaka mbala moko koyeba ntina ya likambo mpe kotalela motindo nini kosala yango,” nzokande, “oyo [mwasi] alingaka mingi koleka makambo nyonso ezali, moto oyo akoyoka ye na komityaka na esika na ye.” Soki libala na bino lizali na mokakatano wana, bosala makasi mpo na kobongisa yango. Mbala mosusu mobali oyo azali moklisto asengeli kosala milende mingi mpo na kozala moyoki malamu. Yakobo alobi ete: “Esengeli na moto na moto ete azala na koyoka noki nde awela na koloba te.” (Yakobo 1:19, MN) Yekola komipekisa mpo na kopesa mitinda, makebisi to batoli na ntango oyo mwasi na yo alingi ete ‘omitya na esika na ye.’ (1 Petelo 3:8) Totangi na Masese 17:27 (MN) ete: “Ye oyo ayebi kopekisa maloba na ye, azali na bososoli.”
5. Lolenge nini mibali bakoki kobongisa lisusu motindo na bango ya komonisa makanisi mpe mayoki?
5 Lisusu, ezali “na ntango mpo na koloba,” na yango osengeli mbala mosusu koyekola kobimisa makanisi na yo mpe mayoki na yo. (Mosakoli 3:7) Na ndakisa, ozalaka na momeseno ya kokumisa mwasi na yo mpo na makambo malamu oyo asalaka? (Masese 31:28) Omonisaka botɔndi mpo na lisungi oyo azali kopesa mpe na mosala makasi oyo azali kokokisa kati na ndako? (Tala Bakolose 3:15.) To mpe osengeli nde kobongisa lisusu lolenge oyo ozali “komonisela ye bolingo” na maloba na yo? (Loyembo ya Salomo 1:2) Na ebandeli, makambo oyo makozala ntango mosusu mpasi mpo na yo, kasi yango ekoki kobimisa matomba malamu mpo ete mwasi amiyoka ete olingi ye.
6. Basi bakoki kosala nini mpo na kobongisa boyokani malamu mpe kosolola kati na libota?
6 Ezali boni mpo na basi baklisto oyo basila kobala? Mwasi moko alobaki ete: ‘Mobali na ngai ayebi ete nasepelaka na ye, mpe ntina ezali te ete nayebisa ye yango.’ Nzokande, mibali mpe balingaka ete bamonisela bango botɔndi, bapesa bango longonya mpe bakumisa bango. (Masese 12:8) Ozali nde na mposa ya kosala mingi kati na likambo wana? Mpe, osengeli mbala mosusu kotya likebi mingi na motindo oyo ozali koyoka. Soki mobali na yo azalaka na nkaka ya kolobela mitungisi na ye, mikakatano na ye to mpasi na ye polele, osila koyekola lolenge ya kobenda ye ete abimisa makambo na ye ya nkuku na boboto mpe na mayele?
7. Likambo nini likoki kobimisa matata kati na mobali mpe mwasi, mpe lolenge nini bakoki kopɛngola yango?
7 Na lolenge eyebani, ata babalani oyo bazali na boyokani malamu bakoki ntango mosusu kozala na nkaka mpo na kosolola. Ekómaka ete mayoki mazwa esika ya bososoli, to lisoló malamu libongwani koswana. (Masese 15:1) Lokola “biso nyonso totutaka mabaku mbala mingi,” koswana kati na mwasi mpe mobali esengeli te koboma libala. (Yakobo 3:2, MN) Nzokande, ‘konganga mpe maloba na kotuka’ mabongi te, mpamba te makobebisaka boyokani nyonso kati na bato. (Baefese 4:31) Soki bozongisanaki maloba mabe, bosala noki mpo na kozongisa kimya. (Matai 5:23, 24) Mbala mingi, koswana ekoki kopɛngolama soki moto na moto asaleli maloba ya Paulo oyo mazwami na Baefese 4:26 ete: “Tika te ete moi molimwa naino bozali na nkanda na bino.” Ee, bolobela mikakatano na bino na ntango ezali naino mike mpe wana bokoki kosilisa yango; bozela te kino ekokóma makasi. Na kolekisaka mwa minute mpo na kosolola makambo ya ntina mingi mokolo na mokolo, bokoki mpenza kobatela boyokani malamu mpe bokopɛngola mikakatano.
“Malako ya Jéhovah”
8. Mpo na nini bilenge mosusu bazali kotika solo?
8 Emonani ete baboti mosusu bazali kotika ete bana na bango balanda solo lolenge ya bongo na bongo. Bana bazali koyangana na makita mpe bazali mbala mosusu kosangana na mosala ya kosakola, kasi mbala mingi bazali te kolendisa boyokani na bango elongo na Nzambe. Na nsima, ekómaka ete “mposa ya nzoto” mpe “mposa ya miso” ezali komema mingi kati na bilenge wana na kotika solo. (1 Yoane 2:16) Oyo nde mawa soki baboti babiki na Armagedon, kasi bana na bango bakufi likoló na bopotu na bango!
9, 10. (a) Esengeli kosala nini mpo na kobɔkɔla bana “na toli mpe na malako ya Jéhovah”? (b) Mpo na nini ezali ntina ete bana bamonisa mayoki na bango na bonsomi nyonso?
9 Yango wana Paulo akomaki ete: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bolanda kobɔkɔla bango kati na toli mpe na malako ya Jéhovah.” (Baefese 6:4, MN) Mpo na yango, bino moko bosengeli koyeba mitinda ya Jéhovah na bozindo. Bosengeli kopesa ndakisa malamu na likambo litali kopona lolenge ya kominanola, boyekoli ya moto na moto, koyangana na makita mpe na kosangana na mosala ya kosakola. Maloba ya Paulo mamonisi lisusu ete baboti basengeli (1) kozala bato oyo bayebi kotalela bana na bango na bososoli mpe (2) kobatela boyokani malamu elongo na bango. Bobele na likambo wana nde bokoyeba na makambo nini bazali na mposa ya “malako.”
10 Eyebani malamu ete bilenge balukaka kozala na mwa lipandá. Kasi, bosengeli kozala pene na koyeba bilembo nyonso biuti na bopusi ya mokili; ezala na lolenge na bango ya koloba, ya kokanisa, ya kolata mpe ya kokata nsuki, to na motindo oyo bazali kopona baninga na bango. Tata moko ya mayele alobaki, lokola yango emonisami na Masese 23:26, ete: “Mwana na ngai, pesa ngai motema na yo.” Bana na yo bazalaka na bobangi te ya kolobela yo makanisi na bango mpe mayoki na bango? Soki bana bazali kobanga te ete bakopamelama nokinoki, bakoki mpenza kobimisa makanisi na bango na ntina etali masano mabongisami nsima na ngonga ya kelasi, kopesana bilaka mpo ya bokutani elongo na bato mosusu, kotanga na université to na oyo etali solo ya Biblia yango moko.
11, 12. (a) Lolenge nini kosalela ntango ya kolya mpo na kosolola kati na libota? (b) Nini ekoki kosalema soki baboti balandi komonisa milende ya kosolola elongo na bana na bango?
11 Na mikili mingi, momeseno esengi ete basangani ya libota balyaka esika moko. Na yango, eleko ya kolya na mpokwa ekoki kozala libaku moko malamu mpo ete moto na moto asangana na lisoló moko ya kolendisa. Kasi, mbala mingi, basangani ya libota bakolyaka esika moko te likoló ya kotala televizio to mpe masano mosusu. Nzokande, na boumeli ya ntango nyonso oyo balekisi na eteyelo, bana na bino bazalaki lokola bato bakangamaki mpe batyamaki liboso na bopusi ya mokili. Ntango ya kolya ebongi mpenza mpo na kosolola elongo na bango. Mama moko ayebisi ete: “Na ntango ya kolya, tolobelaka makambo oyo tokutanaki na yango na boumeli ya mokolo.” Kasi, ntango ya kolya esengeli kosalelama te mpo na kosala ankete to mpo na kotuna mituna mikookisaka mpasi. Bosala ete libaku wana lizala ntango malamu ya kominanola mpe ya esengo.
12 Mpo na kolonga ete bana na yo bayebisaka yo makambo na polele, ezali likambo moke te; mpe yango esɛngaka motema molai. Kasi, na nsima, mwango wana mokobimisa matomba kitoko. Mama moko oyo azalaki komitungisa mpo na likambo yango, amikundoli ete: “Mwana na biso ya mibu 14 azalaki konyokwama na makanisi mpe azalaki koyebisa makambo na ye te. Na nzela ya mabondeli na biso mpe na kolendendela, abandi koyebisa biso makambo na ye mpe kolobela yango!”
Boyekoli na libota oyo ezali kolendisa
13. Mpo na nini ezali ntina mingi na kolakisa bana na ntango bazali naino mike?
13 Kopesa “malako” epai na mwana, elimboli mpe kolakisa ye kati na Liloba na Nzambe. Lokola Timoté, kobongisama wana esengeli kobanda uta “bomwana.” (2 Timoté 3:15) Mateya oyo mapesami wana bana bazali naino mike, mazali kolendisa bango mpo na mimekamo oyo kondima na bango ekokutana na yango na boumeli ya bambula oyo bakozala na kelasi: kokumisa mikolo ya kobotama, milulu ya ekólo to bafeti ya mangomba. Kozanga kobongisama ekoki kobebisa kondima ya mwana. Na yango, tozwa litomba na bisaleli oyo la Société Watch Tower asili kobongisa mpo na bana mike, lokola mokanda Boyoka Moteyi monene mpe Mokanda mpo na masolo ya Biblia.a
14. Tokoki kosala nini mpo na kozala na boyekoli ya poso na poso kati na libota, bongo, yo mpenza osili kosala nini kati na likambo yango?
14 Esengeli kosɛnzɛla lisusu na likambo etali boyekoli ya libota, oyo ekoki mpenza kozanga kosalema mbala na mbala to ekoki kolɛmbisa, ekoki kokóma momeseno mpamba oyo ezali mpe motungisi mpo na baboti mpe mpo na bana lokola. Lolenge nini kobongisa yango? Libosoliboso, esengeli ‘kosomba ntango’ ekoki mpe kopesa nzela te ete televizio to misala misusu mizwa esika ya boyekoli. (Baefese 5:15-17) Tata moko ya libota ayebisi ete: “Tozalaki na mikakatano ya kosala boyekoli ya poso na poso kati na libota. Tomekaki bantango ekeseni, kino na nsima tozwaki ntango oyo ebongaki na biso, na mpokwa. Sikawa, boyekoli na biso ya libota ezali kosalema poso na poso.”
15. Lolenge nini bokoki koyokanisa boyekoli ya libota na bamposa ya basangani ya libota na bino?
15 Na nsima, botalela bamposa oyo etali mpenza libota na bino. Mabota mingi balingaka kozala esika moko mpo na kobongisa boyekoli ya Mosenzeli poso na poso. Atako bongo, libota na bino likoki mbala na mbala kosolola likoló na makambo mosusu ya ntina; na ndakisa, mikakatano oyo mizwami na eteyelo. Mokanda Les jeunes s’interrogent—Réponses pratiques, masoló ya Mosenzeli mpe ya Réveillez-vous! ekoki kosalisa mpo na kosilisa mikakatano yango. Tata moko ya libota ayebisi ete: “Soki tomoni ezaleli moko esɛngi ete bana na biso ya mibali basembolama, totalelaka mokapo ya mokanda Les jeunes s’interrogent, oyo elobeli likambo yango.” Mwasi na ye abakisi ete: “Tozali komeka komiyokanisa na yango. Soki tokanaki koyekola lisoló moko, nzokande esengeli ete tolobela makambo mosusu, na bongo, tokobongolaka lisoló engebene mposa oyo emonani.”
16. (a) Lolenge nini bokoki koyeba ete bana na bino bazali kokanga ntina ya makambo oyo bozali koyekola? (b) Likambo nini lisengeli kopɛngolama na ntango ya boyekoli ya libota?
16 Lolenge nini bokoki koyeba ete bana na bino bazali kokanga ntina ya makambo oyo bazali koyekola? Moteyi Monene, Yesu, azalaki kotuna makanisi ya bayoki na ye; na ndakisa, alobaki na moko na bango ete: “Okanisi boni?” (Matai 17:25) Na kosalaka bongo, bomeka koyeba oyo bana na bino bazali mpenza kokanisa. Bolendisa mokomoko kati na bango na koyanola na maloba na ye moko. Ya solo, soki bozali kosilika to kongala na ntango bazali koyebisa bino makambo nyonso polele, bakozala na nkaka mpo na koyebisa bino lisusu makambo. Na bongo, bozala nyee. Bosalela te ntango ya boyekoli na libota mpo na kopesa bana bitumbu. Esengeli kozala ntango ya esengo, ya kolendisa. Tata moko ya libota alobi ete: “Soki namoni ete moko kati na bana asali mabe, nakotalela likambo yango na ntango mosusu.” Mama moko abakisi ete: “Soki osololi yo moko na mwana na esika mosusu, akooka nsoni te mpe akoki koloba na yo polele, nzokande akoki kosala bongo te soki apesameli toli na ntango ya boyekoli ya libota.”
17. Tokoki kosala nini mpo ete boyekoli na libota ezala kitoko, mpe lolenge nini yo moko osili kolónga na likambo yango?
17 Ekoki kozala mpasi ete bana basangana na boyekoli, mingi mpenza soki bazali na bambula ekeseni. Mbala mingi bana mike bameseni te mpo na kofanda esika moko to mpo na koyokamela ntango molai. Bokoki kosala nini? Bomeka komonisa ezalela ya esengo na ntango ya boyekoli. Soki bana na bino bakoki te koyokamela na boumeli ya ntango molai, bomeka kosala boyekoli na ntango mokuse, kasi esalamaka mbala na mbala. Esengeli mpe komonisa mɔ́tɔ. “Ye oyo azali kokamba, asala yango na mobulu te.” (Baloma 12:8, MN) Bosala ete bato nyonso basangana na yango. Bana mike bakoki ntango mosusu kolimbola bililingi to koyanola na mituna ya pɛtɛɛ. Bokoki kosɛnga na bana oyo bakoli ete basala bolukiluki ya makambo mosusu to lolenge ya kosalela masolo oyo matalelami.
18. Lolenge nini baboti bakoki kokɔtisa Liloba na Nzambe epai na bana na bango na mabaku nyonso, mpe yango epesaka matomba nini?
18 Kasi, bosengeli te kosukisa kopesa malako ya elimo bobele ngonga moko na poso. Bokɔtisa Liloba na Nzambe epai na bana na bino na mabaku nyonso. (Deteronome 6:7) Bozwa ntango ya koyoka bango. Boyikisa bango mpiko mpe bobɔndisa bango soki yango esengeli. (Tala 1 Batesaloniki 2:11.) Bozala na mawa mpe na ngolu mpo na bango. (Nzembo 103:13; Malaki 3:17) Na bongo, ‘bokosepela’ na bana na bino mpe bokosala ete babatelama mpo na kokota na mokili ya sika molakami na Nzambe.—Masese 29:17.
“Ntango ya kosɛka”
19, 20. (a) Kominanola ezali na ntina nini kati na bomoi ya libota? (b) Tangá mwa mitindo ya kominanola oyo baboti bakoki kobongisa mpo na libota na bango.
19 Ezali “na ntango mpo na kosɛka . . . , [mpe] ntango mpo na kobina.” (Mosakoli 3:4) Liloba ya Liebele oyo libongolami na “kosɛka” likoki mpe kobongolama na “kozala na feti,” “kosakana,” “kominanola,” ata mpe “kosakana malamumalamu.” (2 Samwele 6:21; Yobo 41:5; Basambisi 16:25; Exode 32:6; Genese 26:8) Kosakana ekoki kozala na litomba, mpe ezali na ntina mpo na bana mike mpe mpo na bilenge. Na ntango ya kala, baboti bazalaki kobongisa masano mpe bantango ya kominanola na libota. (Tala Luka 15:25.) Bino mpe bosalaka yango?
20 Mobali moko moklisto alobi ete: “Tokendaka kotala ba parcs oyo epesameli nzela na bato nyonso. Tobyangaka bilenge mosusu ya lisangá, tobɛtaka ndembo mpe tolyaka na libanda. Basakanaka malamu mpe bazali na baninga malamu.” Tata mosusu abakisi ete: “Tobongisaka liboso makambo oyo tokosala elongo na bana na biso ya mibali. Tokendaka kosukola, tobɛtaka ndembo, tokendaka na mboka mosusu mpo na bopemi. Kasi tozali ntango nyonso kotya kominanola na esika ebongi na yango. Nalobelaka mingi na ntina etali kozala na bokatikati.” Kominanola malamu—ata kolekisa ntango moko na ndako, kokenda kotala lopango ya banyama to ya banzeté kitoko to kotala ebombelo ya biloko ya kala, mpe bongo na bongo—ekoki kopesa matomba malamu mpo na kopekisa bana ete babéndama na bisengo ya mokili te.
21. Lolenge nini baboti bakoki kopɛngola ete bana na bango bamiyoka te ete bazangi eloko mpo ete bazali kokumisa bafeti ya mokili oyo te?
21 Ezali lisusu na ntina ete bana na bino bamiyoka te ete bazangi eloko mpo ete bazali kokumisa te mikolo ya kobotama to bafeti mosusu oyo ezali ya boklisto te. Soki bozali na ebongiseli malamu, bakokoka kozala na esengo ya kozela bantango mingi kitoko na boumeli ya mbula. Mpamba te, baboti malamu bazali na mposa te ya feti moko ebongisami na manaka mpo na komonisa bolingo na bango na nzela na biloko ya mosuni. Lokola Tata na bango ya likoló, ‘bayebi kopesa makabo malamu epai na bana na bango,’ mpe yango na motema moko mpe ata na ntango nini.—Matai 7:11.
Bongisa libota na yo ete lizala na bomoi ya seko na ntango ekoya
22, 23. (a) Mabota oyo makobangaka Nzambe makoki kosala nini, awa bolózi monene ekómi penepene? (b) Mabota makoki kosala nini mpo na kobatelama mpe kokata na mokili ya sika molakami na Nzambe?
22 Mokomi na Nzembo abondelaki ete: “Ɛ Jéhovah, yo moko okobatela bango, okosunga bango kati na libota oyo libela na libela.” (Nzembo 12:7) Ezali solo ete Satana akoyeisa mpasi mingi na bomoi ya bato, mpe mingi mpenza epai na mabota ya ba Témoins de Jéhovah. Kasi, likoki lizali mpo na kotemela mimekamo na ye oyo mizali ntango nyonso makasi. Na lisalisi ya Jéhovah, na ekateli makasi mpe milende mingi, mibali, basi mpe bana, mabota—ya bino mpe lokola—bokoki kozala na elikya ya kobatelama na bomoi na boumeli ya bolózi monene.
23 Mibali mpe basi, boingisa kimya mpe boyokani malamu kati na libala na bino na kokokisáká mikumba oyo Nzambe asili kopesa bino. Baboti, bolanda kopesa ndakisa malamu epai na bana na bino, na kosombaka ntango mpo na kobongisa bango mpe kopesa bango toli oyo bazali na yango mposa mpenza. Bosololaka na bango. Boyokamela bango. Bomoi na bango ezali na likámá! Bana, boyokaka baboti na bino mpe botosaka bango. Na lisalisi ya Jéhovah, bokokoka kozala na bomoi malamu mpe kozala na bomoi ya seko kati na mokili ya sika molakami na Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yango ezali na bakasete kati na minoko misusu.
Bozongeli
◻ Lolenge nini mibali mpe basi bakoki kobongisa boyokani na bango?
◻ Lolenge nini boboti bakoki kobɔkɔla bana na bango kati “na malako ya Jéhovah”? (Baefese 6:4)
◻ Tangá mwa mitindo tokoki kosalela mpo ete boyekoli na libota ezala ya kolendisa mpe ya kitoko mingi.
◻ Baboti bakoki kosala nini mpo na kobongisa kominanola mpo na libota na bango?
[Etanda na lokasa 16]
BOPUSI MAKASI YA MIZIKI
Mokomi ya mokanda moko likoló na lolenge ya kobɔkɔla bana, alobaki ete: “Soki nazalaki koloba liboso ya bato . . . mpo na kotinda bango ete balangwa masanga, basala bilambo ya lokoso, bamela cocaïne, bangi to drogue nyonso mosusu, mbɛlɛ bakokamwa mpo na ngai. . . . [nzokande], mbala mingi baboti bapesaka bana na bango mbongo oyo bazali kosomba ba disques to bakasete oyo ezali kotinda bato na kosala makambo wana na polele mpenza.” (Raising Positive Kids in a Negative World, Zig Ziglar) Na ndakisa, na États-Unis, maloba oyo mazali kobima na miziki oyo babéngi rap, mpe oyo elobeli makambo ya kosangisa nzoto, malobelami mingi na bilenge. Bosalisaka bana na bino na koyeba kopona miziki oyo bazali koyoka ete bakwea te na bopusi ya bilimu mabe?
[Elilingi na lokasa 15]
Ntango ya kolya ekoki kozala libaku malamu mpo na kokolisa bomoko mpe kosolola kati na libela