Batisimo “na nkombo ya”
BOYEKOLI ya makomi ya kala likoló ya papyrus ezwami na zelo ya Ezipito na ebandeli ya ekeke oyo ezali kopesa mbala mingi engengiseli kitoko likoló na Makomami ya Greke ya boklisto. Lolenge nini? Na botaleli lolenge maloba mosusu mazalaki kosalelama, tozali kokoma na bososoli malamu ya maloba wana ntango tokutani na yango kati na Makomami.
Ndakisa moko ezali na maloba “na nkombo ya” oyo Yesu asalelaki, liboso ya kobuta na likoló, ntango apesaki na bayekoli na ye etinda oyo: “Bokende kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya mwana mpe ya elimo santu.” Yesu alingaki koloba nini?—Matai 28:19.
Bato na mayele basili komona ete, kati na mikanda ya mokili, elobeli “na nkombo ya,” to “kati na nkombo ya” (engebene Kingdom Interlinear), esalelami kati na makambo matali bofuti mosolo mpo “na litomba na moto moko.” Na kotalela matatoli mapesami na makomi ya kala ya papyrus, molakisi moko ya teoloji, Adolf Deissmann, akanisaki ete “likanisi ya moboko . . . ya maloba kobatisa na nkombo ya Nkolo to kondima kati na nkombo ya Mwana na Nzambe ezali ete batisimo to kondima elimboli kozala moto ya Nzambe to ya Mwana na Nzambe.”
Tokoki kotalela na likebi nyonso ete na mikolo na Yesu Bayuda bazalaki kosalela maloba motindo yango, lokola mokanda Theological Dictionary of the New Testament elimboli yango: “Kokatama ngenga ya moto oyo andimi losambo ya Bayuda ezalaki kosalema . . . ‘na nkombo ya moto yango,’ mpo ete ayambama kati na lingomba na Bayuda. Kokatama ngenga wana ezalaki kosalama . . . ‘na nkombo ya kondimana,’ mpo ete ayambama kati na kondimana.” Boyokani ezali kotyama na motindo yango mpe mopaya azalaki kokoma mosambeli na nse ya kondimana.
Bobele bongo mpo na moklisto, batisimo oyo azali kozwa nsima ya komipesa na ye ezali kotya ye na boyokani ya penepene elongo na Nzambe mpe Mwana na ye mpe elimo santu. Moto yango oyo abongoli motema azali kondima bokonzi na bango kati na lolenge ya bomoi na ye ya sika. Totala lolenge likambo yango lizali kokokana mpo na moko na moko ya bango misato.
Na kondimaka bokonzi ya Nzambe, tozali kobelema pene na ye mpe tozali kosala boyokani malamu elongo na ye. (Baebele 12:9; Yakobo 4:7, 8) Tokomi bato na ye, baombo na ye, oyo basombami na motuya ya mbeka na lisiko ya Yesu Klisto. (1 Bakolinti 3:23; 6:20) Na ekeke ya liboso, ntóma Paulo alobaki lisusu na baklisto ete bazalaki bato na Yesu Klisto, kasi bazalaki te bato na baoyo bateyaki bango solo. (1 Bakolinti 1:12, 13; 7:23; tala Matai 16:24.) Batisimo na nkombo na Mwana elimboli kondima likambo yango, kondima Yesu lokola “Nzela, mpe solo, mpe bomoi.”—Yoane 14:6.
Elimo santu ezali mpe na ntina monene kati na boyokani malamu na biso elongo na Jéhovah mpe Yesu Klisto. Batisimo na nkombo na elimo santu ezali komonisa ete tondimi mokumba ya elimo kati na boyokani na biso elongo na Nzambe. Tozali kosala makasi mpo na kolanda litambwisi na yango, kozanga kotyola yango to kosala na lolenge mosusu, soki bongo te mbele tokopekisa mosala na yango epai na biso. (Baefese 4:30; 1 Batesaloniki 5:19) Atako elimo ezali moto te, elobeli oyo esalelami mpe ndimbola oyo epesami na ntina na yango ezali kopesa nkaka moko te, motindo moko kosalelama ya elobeli “na nkombo ya kondimana” ezalaki kopesa nkaka moko te kati na losambo ya Bayuda.
Mpo na yango, wana tozali komipesa epai na Nzambe mpe tozali kozwa batisimo, tosengeli kokanisa kati na libondeli na ntina na makambo oyo boyokani na biso wana ya sika ezali kosenga. Lokola emonisami na ndakisa na Yesu Klisto, mpe lisiko oyo apesaki, ezali kosenga ete botosi na mokano ya Nzambe, na lisalisi ya elimo santu oyo ezali kotambwisa basaleli nyonso ya Nzambe kati na bolingo mpe bomoko na mokili mobimba.