Oyo boklisto ya lokutá elonaki na Afrika
NA MOBU 1867, Charles Lavigerie, mokatolike ya mboka France, ayaki na Afrika; atindamaki na engumba ya Alger lokola episkopo ya sika. Episkopo yango alobaki ete: “Nzambe asili kopona France mpo ete Algérie ezala moboko ya libota moko monene, ya boklisto.”
Ndoto ya Lavigerie etalelaki bandelo koleka oyo ya Algérie. Atindaki bamisionere na nzela na esobe mpo na “kokangisa Afrique centrale mpe Afrique du nord na bomoi bosangisi boklisto [ya lokutá].”
Na ntango yango, bamisionere ya protestá bazalaki kosala mosala na bango epai na ouest, na sud mpe ya est na Afrika. Bakutanaki na mikakatano mingi, lokola malaria oyo bazalaki kobela mbala na mbala oyo ezalaki kolɛngisa nzoto bango, kotokisa bango mpe kobulunganisa bango makanisi. Bamaladi ya bamboka epai moi ezali makasi elembisaki bango noki, mpe mingi baumelaki te na kokufa nsima na bokomi na bango. Kasi basusu balandaki koya. Adlai Stevenson alobaki ete: “Mpiko ya bamisionere elobelami mbala na mbala epai na moto nyonso oyo azali kosala mobembo na Afrika. . . . Bakutanaki na bamaladi lokola fièvre jaune, pulupulu ya makila, banyama na libumu; mpe namonaki mabanga ya mayita na bango . . . ezalaki bipai nyonso na Afrika.”
Mbuma oyo mosala ya bamisionere ebotaki
Ntango bamisionere bakotaki na Afrika, bamonaki ete bikólo mingi biyebaki kotanga te. Na mokanda na ye La Chrétienté en Afrique vue par les Africains (angl.), Ram Desai akomaki ete: “Kati na nkotá pene na 800 [ya Afrika], bobele nkotá minei ezalaki kokomama na mikanda liboso ete bamisionere baya.” Mpo na yango bamisionere babimisaki lolenge ya kokoma nkotá oyo liboso, ezalaki kokomama na mikanda te. Babimisaki mikanda mpe bayekolisaki bato kotanga. Mpo na yango, batongaki biteyelo bipai nyonso na Afrika.
Bamisionere batongaki mpe balopitalo. Ram Desai alobaki ete “ebongiseli moko te esili kosala misala oyo bamisionere basalaki mpo na kosalisa bato.” Longola mwango ya kosalisa maladi, bato ya Afrika bazalaki koluka biloko oyo bizalaki kouta Mpótó. Bamisionere mosusu bafungolaki bisika ya kotekisa biloko. Bazalaki na elikya ete yango ekobenda bato na kobongwana. Na ndakisa, Mission Basel ya mboka Suisse afungolaki kompanyi ya mombóngo na Ghana. Bamonaki ete nzete ya cacao ezalaki kobota malamu na mabelé ya mboka yango, mpe lelo Ghana ezali na esika ya misato na mokili mpo na oyo etali kobimisa cacao.
Mosala moko ya monene oyo bamisionere ya boklisto ya lokutá basalaki, ezali oyo ya kobongola Biblia na nkotá mosusu. Nzokande, mosala ya kopalanganisa nsango malamu ezwami kati na Biblia ezali kobenda mokumba mosusu ya ntina mpenza. Ntóma Paulo, oyo azalaki moklisto, amonisaki yango na mituna oyo ete: “Yo okolakisaka moto mosusu, ozali komilakisa yo moko te? Ezali yo kosakola ete, ‘Yiba te!’ yo moko ozali koyiba?” Biblia epesi likebisi oyo ete: baoyo bazali koteya boklisto ya solo, basengeli komiyokanisa na mitinda kitoko mizwami kati na Liloba na Nzambe.—Baloma 2:21, 24.
Tokoki koloba nini na ntina na mosala oyo boklisto ya lokutá esili kosala na Afrika? Yango ekumisi Nzambe ya Biblia, to ebebisi mateya ya boklisto ya solo?