Yaka na ba assemblées ya districte “Bamemi na pole”
“TALA, molili mokozipa mokili, mpe molili tuu mokozipa mabota.” (Yisaya 60:2) Maloba oyo mazali mpenza kokokana lelo oyo. Soki totaleli motindo na losambo lozali kosepelisa Nzambe, tokoki te koboya kondima ete lingomba ya lokutá likangi bato kati na molili. Mpo na nini? Mpo ete Satana, nzambe ya mokili oyo, “asili kozimbisa elimo ya baoyo bazangi kondima.”—2 Bakolinti 4:4.
Ba Témoins de Jéhovah bakeseni mpenza na baoyo bazimbisami na Satana. Maloba oyo na mosakoli Yisaya makokani epai na bango, ete: “Jéhovah akongɛngɛla yo, mpe nkembo na ye ekozala likoló na yo.” (Yisaya 60:2) Bazali mpenza na botɔndi epai na Nzambe lokola basili kobima na molili mpo na kokɔta na pole monene! Ezali pole ya elimo, solo oyo ezwami kati na Liloba na Nzambe mpe oyo ezali kongɛngisa elimo, na motindo boye ete ata baoyo bakufi miso na mosuni bakoki komona solo.
Atako bongo, tozali na mposa ya lisalisi. Likoki ya kososola pole lizali mpenza te soki tokosuka bobele na kotanga Biblia kozanga kosalela lisalisi oyo Nzambe azali kopesa. Yango wana Jéhovah Nzambe asili kopesa “moombo na sembo mpe na mayele,” oyo alobelami na Matai 24:45-47. Lelo, “moombo” wana amonisami na Collège central ya ba Témoins de Jéhovah. Ezali na nsé na litambwisi ya collège wana nde ba assemblées ya distrike “Bamemi na pole” ebongisamaki
Mokano ya ba assemblées yango ezali mpo na kosalisa basaleli nyonso ya Jéhovah ete bazala bamemi malamu na pole, engebene maloba ya Paulo mazwami na Bafilipi 2:15. Kati na mokapo wana, baklisto balendisami na kongɛnga lokola “miinda kati na mokili.”—Matai 5:14, 16.
Ebongisami ete molongó ya ba assemblées ya distrike “Bamemi na pole” ebanda vendredi 5 juin na États-Unis. Na 10 h 20, programme ya miziki ekosalisa bayangani ete bamibongisa na motema mpe na elimo, mpe bamilɛngela mpo na programme ya elimo oyo ekolanda nsima. Mokolo moko na moko mozali na thème na yango, mpe oyo ya vendredi ezali, ete: “Tinda pole na yo mpe solo na yo.”—Nzembo 43:3, MN.
Na boumeli ya likita ya vendredi na ntɔngɔ, discours-clé “Bazali bamemi na pole mpo na ntina nini?” ekosalema. Baklisto bazali bamemi na pole mpo na mikano na bango moko te mpe na mokano na moómi te. Kasi, bantina oyo ezali kopusa bango, ezali bobele oyo epusaki Yesu Klisto ete aya awa na mabelé, ye Momemi na pole mokonzi: kotatola mpo na solo mpe kokumisa nkombo ya Mozalisi. Tala ntina oyo Yesu alobaki ye moko ete: “Ezali ngai naino kati na mokili, nazali pole ya mokili.” (Yoane 9:5) Asili bongo kotika ndakisa mpo ete tolanda matambe na ye malamu. (1 Petelo 2:21) Nsima na midi ya mokolo wana ya liboso, ekozala na diskur moko mpe drame ya Biblia elobeli mokonzi Yosiya, oyo ekosepelisa mingimingi bilenge.
Thème ya samedi ezali ete: “Bino bozali pole na mokili . . . Tika ete pole na bino engɛnga.” (Matai 5:14, 16, MN) Eteni na likita na ntɔngɔ ekozala na symposium na motó na likambo, “Bongɛngisa pole na biso.” Baoyo basili komipesa epai na Jéhovah bazali na likoki ya kozwa batisimo. Eteni na likita ya nsima na midi ekozala na symposium ekoteya mpenza na motó na likambo, “Topalanganisa pole na ntina na koya mpe komonana na Klisto.”
Thème eponami mpo na dimanche, mokolo ya misato mpe mokolo ya nsuka ya assemblée, ezali ete: “Botambolaka lokola bana na pole.” (Baefese 5:8, MN) Eteni na likita ya ntɔngɔ ekozala na symposium na motó na likambo “Tozalana na bobóto kati na libota na boklisto,” oyo ekolobela mikumba ya libota. Diskur mosusu ekopesa ndimbola ya kotósa Nzambe mpe Klisto.
Assemblée ekosuka dimanche na nsima na midi, na diskur piblike oyo ezali na motó na likambo ete, “Tolanda pole ya mokili.” Ekolobela Yoane 1:1-16, mpe ekomonisa ntina ya koyeba Biblia mpe ekolobela mingi likambo oyo ete Yesu Klisto azali pole ya mokili. Assemblée ekosuka na toli ya nguya oyo ete: “Totambolaka kati na pole.”
Tomonisa botɔndi na biso epai na Jéhovah mpo na feti ya elimo oyo apesi biso na nzela ya lisangá na ye lizali komonana. Tozala wana kobanda loyembo ya liboso vendredi na ntɔngɔ, kino libondeli ya nsuka dimanche na nsima na midi. Totya likebi na oyo nyonso ekolobama longwa na estrade. Tokamata ba notes mpo na kolanda yango malamu mpe mpo na kotalela yango lisusu na nsima. Na nsuka, tomilɛngela mpo na kosangana na motindo nyonso na mosala na bolingo na biso moko. Na bongo, tokozala na esengo bobele ya kozwa te, kasi lisusu esengo monene ya kopesa.—Misala 20:35.