Bililingi ya mokili na ndaká
Kenda kotala mboka, mpe bampate na yango lokola!
BANKƆTO na baklisto basili kokenda kotala Mabelé na ndaká na likanisi ete, soki bamoni bisika oyo makambo mingi masalemaki, mbɛlɛ bazwi bososoli malamu mpe na mozindo na Biblia. Bazalaki komikosa te.
Ata osilá mpenza kosala mobémbo to osilá kotambola na makanisi kati na mikanda to na masoló oyo malobeli mboka wana, kasi osilá mpe kokenda kotala bampate? Mbala mosusu okomituna na likambo nini yango ezali na boyokani na Mabelé na ndaká. Esengeli koyeba ete bampate bazalaki na motuya mingi na ntango ya kala; bongo, soki bokutanaki na bampate te, boye mobémbo na bino mpo na kotala Mabelé na ndaká mozali bobele ndambo.
Okoki kobanda mobémbo na yo na bafotó oyo etyami na lokasa oyo, mpamba te bampate oyo tozali kokuta lelo na etuká wana, ekokani mpenza na oyo ezalaki na ntango na kala.a Mikila na bango milai mizali na kilo mpo na mafuta. (Levitike 7:3; 9:19) Nkungé na yango milai ezali mpenza mpɛmbɛ. Atako bongo, tozali lisusu komikundola ete, etonga monene na Yakobo ezalaki na ‘bampate na bilembo mpe na matɔnɔ, mpe na bampate moïndo.’—Genese 30:32.
Lisoló yango limonisi ete mobali oyo azalaki na etonga monene atalelamaki lokola mozwi. (Genese 30:43) Totangi na ntina na Yobo ete: “Bibwele na ye bizalaki bampate nkɔto nsambo, mpe bakamela nkɔto misato, mpe bangomba mibali mpe bangombe basi nkámá mitano, mpe bampunda basi nkámá mitano; . . , [ye] alekaki bato nyonso na monene na epai na ebimelo na ntango.” (Yobo 1:3; 42:12) Tozali lisusu komikundola ete Nabala azalaki na bampate 3 000 mpe bantaba 1 000. Mpo na yo, Nabala azalaki na molongó na bato nini mpe azalaki na bopusi nini na mikolo na Davidi? (1 Samwele 25:2) Kasi, mpo na nini etonga monene ezalaki mpenza bozwi monene?
Mpo ete bampate bazalaki kopesa biloko na motuya epai na babateli na mpate soko epai na nkolo na yango. Nkungé yango moko ezalaki ntango nyonso eloko na sika. Masese 31:13, 21, 22 ezali kosalisa mpo na komona lolenge nini mwasi na mayele mpe oyo akosalaka mingi akoki kotonga bilamba na nkungé, mpo na kolatisa libota na ye to mpo na kotɛka yango. (Yobo 31:20) Na zando, nkungé ezalaki eloko elekaki na motuya mingi. Ezali yango nde emonisami na maloba oyo ete mokonzi ya Moaba “akómaki mobɔkɔli na mpate, mpe lokola mpako, azalaki kofuta mpako ya bana na mpate nkɔto monkámá epai na mokonzi na Yisraele mpe bampate mibali nkɔto monkámá oyo ekɔkɔlami te.” (2 Mikonzi 3:4, MN) Na yango, ebele na nkungé ya banyama wana “ekɔkɔlami te” ebakisaki motuya na yango.
Bampate mibali ya etonga bakokaki kozala na maseké minene, lokola oyo tozali komona na fotó na lobɔkɔ na mobali. Yango ezali kokundola yo te ete bazalaki kosalela liseké ya mpate mobali mpo na kosakola Yubilé? (Levitike 25:8-10) Maseké na yango mazalaki na malusú motindo moko na maseké masalelamaki mpo na kobangisa to mpe na kosalela mayele na etumba.—Basambisi 6:34; 7:18, 19; Yoele 2:1.
Tokangi lisusu ntina ete moto oyo azalaki na etonga na bampate akokaki kozanga eloko na kolya te, mpo ete mpate atangamaki na molongó na banyama na pɛto oyo Bayisraele bakokaki kolya. (Deteronome 14:4) Mosuni (ya mpate soko ya mwana na mpate) ezalaki mpenza kotɛkisama to kotumbama. Mpate oyo atumbamaki azalaki eloko na ntina na Pasiká ya mbula na mbula. (Exode 12:3-9) Lisusu, bampate bazalaki liziba lizalaki mbala na mbala kobimisa mabɛlɛ, oyo ezalaki komelama to bazalaki kosalela na yango fromage.—1 Samwele 17:17, 18; Yobo 10:10; Yisaya 7:21, 22.
Kasi soki tomoni te boyokani malamu oyo bozalaki kati na etonga mpe mobateli na mpate, boye mobémbo na biso mpo na kotala bampate mozali naino ndambo.
Mobateli na mpate na sembo azalaki komibanzabanza mpo na bampate na ye. Lokola Yesu alobaki yango, bampate bayebaki mongóngó ya mobateli na bango mpe bazalaki koya wana ezalaki ye kobenga bango na nkombo na bango. (Yoane 10:3, 4) Soki nyama moko ebungaki, mobateli na mpate na bokɛngi azalaki kolukaluka yango. Wana azwaki yango, azalaki mbala mosusu kotya yango na mapeka mpo na kozongisa yango na etonga.—Luka 15:4, 5.
Ezali mpo ete ye moko amesenaki na bitonga nde Davidi amikokanisaki na mpate oyo Jéhovah azalaki mobateli na yango. Davidi abatelamaki lokola bampate oyo babatelamaki na miyibi. Bampate bakokaki komitika kotambwisama na mobateli na bango ya bokɛngi mingi. Soki bazokaki, ye azalaki mbala mosusu kobongisa bango na mafuta malamu. Oyo nde kokesena na misala ya moïmi ya bakonzi na Yisraele oyo bamonisami na Ezekiele 34:3-8!
Biblia ezali na ebele na maloba ya esakweli mpe na elilingi na ntina na bampate. Tala lolenge oya okoki kokólisa boyebi na yo na maloba lokola “etonga moke,” “Mwana na mpate na Nzambe” mpe “bampate mosusu,” na kosalaka mobémbo mpo na kotala bampate ya Mabelé na ndaka, na kolukáká koyeba yango malamu.—Luka 12:32; Yoane 1:36; 10:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okoki kolanda makanisi nyonso ya fotó ezali awa na likoló, oyo elakisi bampate kati na lisobé likauki na Yuda, na kotaleláká Calendrier des Témoins de Jéhovah 1992.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Garo Nalbandian