Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/12 lok. 32
  • ‘Bazalaki na momeseno ya koseka baninga’“

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bazalaki na momeseno ya koseka baninga’“
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/12 lok. 32

‘Bazalaki na momeseno ya koseka baninga’

Mobali moko oyo azali kosala kati na limpinga ya mboka hongrie alobi ete kala mingi te, bato bazalaki na momeseno ya koseka baoyo bazalaki kolobela Biblia. Kasi makambo masili kobongwana. Kala mingi te soda yango atindaki mokanda moko na biro ya la Société Watch Tower na mboka Budapest, kati na yango akomi boye:

“Eleki mwa mikolo, natangaki mokanda na bino Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Moto moko adefisaki ngai yango kino ntango nakosilisa kotanga yango. Makambo makomami na mokanda yango masimbaki motema na ngai mingi mpe etindaki ngai na kokanisa.” Mobali oyo alingaki kozwa Biblia moko mpe alingaki koyeba makambo mosusu. Bomonisami ya mposa motindo wana ekomi mingi na Europe de l’Est.

Biro ya mboka Budapest ezwaki mokanda mosusu, oyo kati na yango ekomami boye: “Natangaki mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Mokanda yango esalaki bopusi makasi likoló na ngai mpe nakomeli bino mpo na kosɛnga ete Témoin de Jéhovah moko aya epai na ngai mpo na koyekola na na ngai Biblia mbala na mbala.”

Mokanda oyo mozali kolobelama na bato oyo mibale ezali kopesa elikya, mpamba te ezali kolakisa epai wapi okoki kozwa biyano na mituna oyo bato bazali komituna kati na Biblia. Esili kobongola bomoi ya bato ebele. Soki olingi kozwa ekzamplere moko, tuna na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.

[Elilingi na lokasa 32]

Na ntina malamu, maman akotika nzela ete mwana na ye azwa opération ata ya mpasi. Nzambe mpe azali na bantina malamu na kotika nzela ete bato banyokwama mpo na ntango moke.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto