Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/8 nk. 3-4
  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—okoki mpenza kozwa yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—okoki mpenza kozwa yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—olenge nini kozwa yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bato bazali koluka bomoi ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mpo na kozala na esengo
    Lamuká!—2018
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/8 nk. 3-4

Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—okoki mpenza kozwa yango?

UTA bazali na bomoi, mibali mpe basi bazangi kokoka bazali koluka kolongono ya nzoto mpe bolamu. Atako yango ezali makambo mibale ya liboso mpenza mpo na bato, bilikya yango bisili komonana lokola ndoto mpamba.

Bato basili kokanisa mingi mpe basili kopesa batoli mingi na ntina na likambo yango. Monganga Dennis Jaffe amonisi ete: “Sekele ya kolongono malamu na nzoto to ya kobikisama ekangisami mbala mingi na ezalela na biso.” Mokolo mosusu, Abraham Lincoln amonisaki likanisi oyo ete: “Bato basili mpenza komizwela kolongono ya nzoto oyo bazalaki koluka.” Yo mpe ondimi likanisi wana? Ozali mpenza na mposa ya kozala na esengo? Na meko nini bolamu na biso botaleli kolongono na biso ya nzoto?

Bato basili komeka makambo nyonso mpo na kozwa bolamu, mpe emonani lokola ete molongo ya makambo oyo basili kososola ezali na nsuka te. Basili koyekola filozofi, pisikoloji, mpe métaphysique (mateya mataleli bizaleli na bato).

Kati na bolukiluki na bango ya bolamu, bamosusu basili komikotisa mobimba kati na sianse, na misala ya ntóki (arts) to mpe na miziki. Tobosana ata moke te ete bolamu ekangisami mingi mpenza na kolongono ya nzoto. Lokola yango elobami na bato banso ete: “Likambo ya ntina mpenza, ezali nde kozala na nzoto kolongono.”

Na kolanda likanisi oyo, bato mingi basili koyekola mateya ndenge na ndenge oyo mazali kolobela kolongono ya nzoto. Babibliotɛke mingi ezali na mikanda ndenge na ndenge oyo ezali kolobela bilei mpe lolenge ya kosilisa bamaladi. Tala oyo elobaki monganga Paul White, moto na mayele na lokumu mingi oyo ayekoli lolenge ya kosalisa bamaladi ya motema: “Mikanda mingi misili kokomama mpo na kolongono ya nzoto, mpe yango uta Kalakala. Moko na oyo eleki malamu, ebengami Du régime, eumeli penepene na mibu nkɔto.”

Nzokande, bolukiluki ya kolongono na nzoto mpe ya bolamu esili kopesa mawa epai na bato mingi. Yango ezali kokamwisa yo te, nzokande elobami ete mayele na bato ya ntango na biso masili kokola? Emonani polele ete, sianse esilisi ata maladi te, ata bonunu te, ata mpe liwa te.

Mbala mosusu okokamwa mingi lisusu na koyoka ete toyebi naino kososola bolamu te soko mpe komeka kolimbola yango malamumalamu te. Kati na mokanda na ye “Sur le bonheur,” Pierre Teilhard de Chardin asukisaki boye ete: “Mpo na likambo oyo mikanda, bolukiluki, makambo oyo moto na moto to mpe bato mingi bakutani na yango mazali, uta bikeke mingi, kobima moko nsima na mosusu na lolenge ya kokamwisa, kozanga ete yango nyonso ekokana. Mpe, nsuka na yango, mpo na mingi kati na biso, bosukisi malamu ya masoló nyonso wana ezali ete, ntina moko ezali te na kolukaluka makambo mosusu.”

Yango ezali nde likanisi na yo mpo na oyo etali kozwa bolamu? Kanisa malamu mpenza na mwa mituna oyo mitaleli yo. Ozali mpenza na esengo sikawa? To ozali kokanisa ete bolamu ekoki kozwama bobele na likoló? Tozali na bantina malamu ya kolikya kozwa kolongono ya nzoto mpe bolamu, mingi mpenza awa na mabelé?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto