Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g18 No. 1 lok. 3
  • Mpo na kozala na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na kozala na esengo
  • Lamuká!—2018
  • Masolo mosusu
  • Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ndenge ya kozwa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2018
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Lamuká!—2018
g18 No. 1 lok. 3

NINI EPESAKA ESENGO?

Mpo na kozala na esengo

YO MOKO OMONAKA ETE OZALAKA MOTO YA ESENGO? Soki ezali bongo, nini epesaka yo esengo yango? Libota na yo, mosala na yo, to bindimeli ya lingomba na yo? Mbala mosusu ozali kozela likambo moko oyo ekopesa yo esengo, na ndakisa kosilisa kelasi, kozwa mosala ya malamu, to kosomba vuatire ya sika.

Bato mingi bayokaka esengo soki bakokisi mokano moko oyo bamityelaki to bazwi eloko moko oyo bazalaki na mposa na yango. Kasi esengo yango eumelaka ntango boni? Mbala mingi, eumelaka mingi te, mpe koyeba bongo ekoki kolɛmbisa nzoto.

Moto azalaka na esengo ntango azali komiyoka malamu, ntango azali kosepela na bomoi ata soki azali na biloko mingi te, mpe ntango alingi kokoba kozala na bomoi.

Lisusu, lokola moto azalaka na esengo na ntango azali komiyoka malamu, tokoki kokokanisa esengo na mobembo, kasi te na esika oyo moto akómi to na mokano oyo akokisi. Na yango, koloba ete: “Nakozala na esengo soki . . .” ezali lokola kopusa esengo mosika.

Na ndakisa: tókokanisa esengo ná kozala na sante malamu. Tosalaka nini mpo tózala na sante malamu? Esɛngaka tólyaka malamu, tósalaka mwa ngalasisi, mpe tózala na bokatikati na bomoi. Ndenge moko mpe, esengo eutaka nde na makambo ya malamu oyo tosalaka na bomoi mpe na ndenge oyo tosalelaka batoli oyo ebongi.

Batoli nini to bomoi ya ndenge nini epesaka esengo? Atako batoli mosusu ezali na ntina mingi koleka mosusu, batoli mpe bizaleli oyo elandi esalisaka mingi:

  • KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO MPE KOKABA

  • KOZALA NA SANTE MALAMU MPE KOYEBA KOKANGA MOTEMA

  • BOLINGO

  • KOLIMBISA

  • KOZALA NA BOMOI OYO EZALI NA NTINA

  • ELIKYA

Buku moko oyo etondi na bwanya elobi: “Esengo na bato oyo bazangi mbeba na nzela na bango.” (Nzembo 119:1) Sikoyo, tótalela makambo oyo epesaka esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto