Likita ya nsuka na mbula—5 octobre 1991
LIKITA YA NSUKA NA MBULA ya basangani ya la Société Watchtower likosalema na mokolo ya 5 Octobre 1991, na Salle d’assemblées ya ba Témoins de Jéhovah oyo ezali na boulevard Kennedy No. 2932 na mboka jersey city, na eteni na mokili New Jersey. Ekobanda na likita moko likoyanganisa bobele basangani ya la Société na 9h30, nsima nde elandani na likita ya nsuka na mbula liye likosalema na 10h00.
Tolingi ete basangani ya la Société baoyo basili kosanzé ba adresses na bango na boumeli ya mbula eleki, bakoka koyebisa yango uta sikawa na biro ya sekretere mpo ete nkasa ya libyangi mpe bakarte oyo ekotindama nokinoki nsima na mokolo ya 1er Août, ekoka kokómela bango.
Nkasa ya libyangi mpe bakarte oyo etindami epai na basangani ya la Société esengeli kozongisama na biro ya sekretere na mokolo ya 15 Août. Mosangani moko na moko asengeli kotondisa karte na ye mpe kotinda yango kozanga koumela na koyebisáká malamumalamu soko akoyangana na likita to mpe te. Makambo oyo okokoma makotikala bongo, mpamba te yango nde ekosalisa biso na koyeba liboso motuya na basangani oyo bakoya na likita.
Ebongisami ete programme mobimba, kati na yango likita moke likosalema na ebandeli mpe rapport oyo ekopesama, ekosuka na 13h00 to nsima mwa moke. Likita mosusu na nsima na nzangá, ekozala te. Na kotalela bisika bibongisami, moto oyo azwi lokasa ya libyangi te, akokɔta te. Programme oyo ya likita ya nsuka na mbula ekolekisama na telefone te.