Mpo na nini ebongi komilatisa ezaleli ya komikitisa?
EDGAR POE, mokomi moko ya Amerike, autaki kotangela bamoko na baninga na ye, lisoló ya sika oyo autaki kokoma. Baninga wana bamonisaki ye na lisɛki ete asalelaki mbala mingi nkombo ya moto oyo azali kokokisa misala na lisoló yango (héros). Poe asalaki nini? Moko na baninga na ye ayebisi ete: “Lolendo na ye ekokaki kondima te ete bamonisa ye libungá na polele motindo wana. Na nkanda makasi, mpe liboso ete baninga na ye bakoka kopekisa ye, Poe abwakaki papier oyo akomaki lisolo yango kati na mɔtɔ.” Ezali motindo wana nde lisoló libungaki, lisoló “kitoko mpenza na kosekisa, oyo na mobimba na yango elobelaki likambo moko ya mawa te . ezali lolenge oyo mokomi yango ameseni kokoma masolo na ye.” Mbɛlɛ komikitisa ekokaki kobatela lisolo wana.
Lolendo emonani bipai binso na mokili, atako yango ekomemaka bato na kosala makambo lokola zoba. Kasi basaleli na Jéhovah basengeli kozala bongo te. Esengeli na bango ete bamilatisa elamba kitoko oyo ete ezaleli ya komikitisa
Komikitisa ezali nini?
Na ntango Paulo akomaki mokanda epai na baninga na ye kati na kondima baoyo na engumba Kolose na kala, alobelaki elamba kitoko na boklisto oyo ete ezaleli ya komikitisa Tala toli na ye: “Na bongo, lokola baponami na Nzambe, babulami mpe balingami; bomilatisa mitema mawa, na malamu, na komikitisa, na bopɔlɔ mpe na motema molai.”—Bakolose 3:12.
Moto na ezaleli ya komikitisa azali na bopɔlɔ, akozalaka na lolendo te. Akomonisaka “limemya mingi.” (Tala Le Grand Robert.) Komikitisa ezali kobangabanga te, ezali mpe elembo ya bolɛmbu te. Lolendo nde ezaleli elembo ya bolɛmbu, nzokande ezaleli ya komikitisa ekosengisaka mpiko mpe makasi na komipekisa
Liloba moko na Liebele lisalelami kati na Makomami mpe libongolami na “omikitisa” elimboli na polele mpenza ete “ominyata.” Na yango, mokomi na mayele na Masese apesi toli oyo ete: “Mwana na ngai, . . . soko okangami mpo na maloba na monoko na yo, . . . omibikisa yo moko, mpamba te okwei na loboko ya mozalani na yo: kenda komisɔkisa [komikitisa] mpe bondela moninga na yo.” (Masese 6:1-3) Oyo elimboli ete: bwaka lolendo na yo, ndima libunga na yo mpe bongisa makambo elongo na ye.
Esengeli mpenza kouta na motema
Komikitisa na libándá ekoutaka mpenza na motema te. Bato mosusu bakomonanaka lokola ete bazali bato na komikitisa, nzokande batondi na lolendo mpe bazali pene na kosala nyonso mpo na kokokisa mikano na bango. Bamosusu bakolataka komikitisa ya lokutá mpo na kobénda likebi ya bato. Na ndakisa, ntoma Paulo akutanaki bato oyo bazalaki komonisa na “komikitisa na lokuta,” mpe alimboli ete bato motindo wana ‘babimbi mpenza na lolendo mpamba mpo na makanisi na bango na nzoto.’ Bato yango bakanisaki na libungá nyonso ete ngolu na Nzambe ekozwamaka na bilei to na bimeli, to na biloko oyo bazalaki kosimba, mpe kokumisa na bilambo mosusu ya lingomba Mbala mosusu bamonanaki lokola bato oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe na ezaleli ya komikitisa, kasi komikitisa ya lokuta ezalaki na ntina moko te. (Bakolose 2:18, 23) Ya solo, yango ememaki bango na kokanisa ete libonza, elingi koloba bomoi, likopesama nde epai na baoyo basili koboya biloko ya mosuni. Na bongo, mposa ya mosolo mingi ekólaki na lolenge na kobómbana; na yango, mibeko wana ya mangomba ezalaki kotya likebi likoló na biloko ya mosuni oyo bato yango bazalaki koloba ete baboyi yango.
Nzokande, komikitisa oyo euti na motema ekopekisa moto na komitalela na motuya mingi na lolenge oyo ye azali kolata, na motindo na ye na kokatisa nsuki, to na lolenge na bomoi na ye. (1 Yoane 2:15-17) Ye oyo amilatisi mpenza ezaleli ya komikitisa, akolukaka kobenda likebi te likoló na bomoto na ye to mpe likoló na makoki na ye. Na likeseni, komikitisa ekosalisa ye na kotalela bato mosusu na limemya mpe akomimona motindo oyo Nzambe azali komona ye. Yango elimboli nini?
Likanisi na Jéhovah
Wana ekendaki ye kopakola mokonzi ya sika mpo na libota na Yisraele, mosakoli Samwele akanisaki ete Jéhovah aponaki Eliaba, mwana na Yese. Kasi Nzambe alobaki na Samwele ete: “Kotala elongi na ye te mpe na molai na nzoto na ye te, mpo ete naboyi ye. Mpamba te Nzambe akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libanda nde Jéhovah akotalaka kati na motema.” Bana nsambo na Yese baboyamaki mpo na kozwa mokumba wana. Nzambe aponaki Davidi, ye oyo amonanaki sembo mpe na ezaleli ya komikitisa—1 Samwele 13:14; 16:4-13.
Elamba oyo ete komikitisa ezali kobatela biso longwa na lolendo mpe na komikumisa biso mpenza, mpe na nsuka, ezali kobatela biso na likámá ya koboyama na Nzambe. Ya solo, “Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo nde akopesaka ngolu na ye epai na bato na komikitisa.” (Yakobo 4:6) Likanisi oyo liuti na maloba na mokomi na nzembo, ete: “Jéhovah azali na likoló, nde akomonaka moto na bopɔlɔ; kasi akososolaka moto na ngambo longwa na mosika.” (Nzembo 138:6; 1 Petelo 5:5, 6) Motuna oyo motunami na Mika 6:8 (MN) emonisi polele eloko oyo Nzambe azali kozela epai na basaleli na ye: “Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete osala boyengebene mpe olinga malamu, mpe otambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo.”
Komikitisa emonisami na Nzambe mpe na Klisto
Ezali likambo na kokamwa te ete Nzambe asenga biso ete tomonisa ezaleli ya komikitisa! Yango ezali moko na bizaleli na ye. Nsima wana Nzambe abikisaki ye liboso na banguna na ye, Davidi ayembaki ete: “[jéhovah] Okopesa ngai nguba ya lobiko na yo, . . . mpe komikitisa na yo ekoyeisa ngai monene.” (Nzembo 18:35, MN; 2 Samwele 22:1, 36) Atako Jéhovah azali kuna na likoló, “akomikitisa mpo na kotala epai na likoló mpe na nsé, akotelemisa mobólá longwa na mputulu; akobimisa mozangi longwa na libulu kuna ebwakami ye, mpo na kofandisa ye esika moko na bazwi.” (Nzembo 113:5-8, MN) Nzambe akomonisaka ezaleli ya komikitisa wana ezali ye na motema mawa epai na basali na masumu. Lolenge oyo akosalaka mpo na bato na masumu mpe likabo ya mbeka ya masumu epesami na Mwana na ye, ezali elembo ya komikitisa, ya bolingo mpe bizaleli mosusu.—Baloma 5:8; 8:20, 21.
Yesu Klisto, ye oyo azalaki na “bopɔlɔ mpe na motema mosokɛmi,” apesaki ndakisa kitoko ya komikitisa epai na bato. (Matai 11:29) Alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Ye oyo akomitómbola, akokitisama; nde ye oyo akomikitisa, akotómbolama.” (Matai 23:12) Wana ezalaki maloba mpamba te. Na mpokwa oyo ezalaki liboso na kufa na ye, Yesu asukolaki makolo ya bantoma na ye, mosala oyo mozalaki mpo na moombo. (Yoane 13:2-5, 12-17) Liboso na koya awa na mabelé, Yesu asalelaki Nzambe na komikitisa nyonso, mpe azali komonisa ezaleli ya komikitisa uta lisekwa na ye kino etelemelo na ye oyo etómbwami na likoló. Paulo asengaki bongo na bandeko na ye kati na kondima ete ‘batalela bato mosusu ete baleki bango’ mpe bamekola elimo ya komikitisa na Yesu Klisto.—Bafilipi 2:3, 5-11.
Lokola Nzambe mpe Yesu Klisto bazali komonisa ezaleli ya komikitisa, baoyo balingi kondimama epai na Nzambe basengeli komonisa ezaleli wana. Soki nde tozalaki bato na lolendo, ebongi na biso komikitisa mpe kosenga na Nzambe ete alimbisa biso. (Tala 2 Ntango 32:24-26.) Na esika ete tomitalela na motuya mingi, tosalela nde toli oyo na Paulo, ete: “Bozala na makanisi na lolendo te kasi botambolaka na kosɔkɛma.” (Baloma 12:16) Etikali na kotalela na ndimbola nini komikitisa ekoki kozwila biso bolamu, mpe bazalani na biso lokola.
Bolamu ya komikitisa
Litomba ya komikitisa ezali oyo ete ezali kopekisa biso na komikumisa. Tokopengola kookisa bato mosusu nkanda mpe tokomibatela na nsoni wana lisoló oyo tozali kolobela makoki na biso esepelisi bango te. Tosengeli komikumisa kati na Jéhovah kasi kati na biso moko te.—1 Bakolinti 1:31.
Komikitisa ezali kosalisa biso na kozwa litambwisi na Nzambe. Jéhovah atindaki anzelu moko epai na Danyele mpo na kolakisa ye emonaneli, mpe yango mpo ete Danyele amikitisaki liboso na Nzambe na kolukaka litambwisi mpe mayele. (Danyele 10:12) Wana Esdrase azalaki komibongisa mpo na kokamba libota na Jéhovah longwa na Babilone, komemáká ebele na wolo mpe paláta mpo na kokembisa tempelo na Yelusaleme, Esdrase asengisaki kokila bilei, mpo ete Bayisraele bamikitisa liboso na Jéhovah. Likambo nini limonanaki na nsima? Jéhovah abatelaki bango longwa na banguna, na boumeli ya mobembo na bango ya mpasi. (Esdrase 8:1-14, 21-32) Lokola Danyele mpe Esdrase, tomonisa ezaleli ya komikitisa mpe toluka litambwisi na Jéhovah na esika ya komeka komema mikumba oyo ye apesi biso, na mayele na biso moko to na makasi na biso moko.
Soki tomilatisi ezaleli ya komikitisa, tokomemya bato mosusu. Na ndakisa, bana oyo bazali komikitisa bakomemyaka baboti na bango mpe bakotosaka bango. Bobele bongo, baklisto oyo bazali komikitisa bakomemyaka bandeko na bango kati na kondima baoyo ya bikólo mosusu, ya mposo mosusu to mpe bibólo mosusu, mpamba te ezaleli ya komikitisa ezangi koponapona.—Misala 10:34, 35; 17:26.
Komikitisa ezali na bolingo mpe na kimya. Moto na komikitisa akotombokaka te epai na bandeko na ye kati kondima mpo na komeka kolóngisa lotomo na ye. Paulo alingaki te kotungisa lisosoli ya moko kati na bandeko na ye, mpe misala na ye mizalaki ntango nyonso ya kolendisa. (Baloma 14:19-21; 1 Bakolinti 8: 9-13; 10:23-33) Komikitisa ezali mpe kopesa nzela na bolingo mpe na kimya na kolimbisáká masumu oyo bato mosusu basaleli biso. (Matai 6:12-15; 18:21, 22) Ekopusa biso na kokende kokutana na moto oyo tokozikisi ye na motema, na kondima libungá na biso, na kosenga ye lilimbisi mpe na kosala nyonso ekoki na biso mpo na kobongisa mabe oyo tosalaki. (Matai 5: 23, 24; Luka 19:8) Na ntango moto oyo tosaleli ye mabe azali koloba na biso, komikitisa ekopusa biso na kobongisa likambo na kimya mpe na bolingo.—Matai 18:15; Luka 17:3.
Lobiko na biso etaleli ezaleli ya komikitisa. Na ndakisa, elobami na ntina na Nzambe ete: “Okobikisa libota na yo linyokwami; nde miso na yo ekomona bato na lolendo ete okitisa bango.” (2 Samwele 22:28) Na ntango Mokonzi Yesu Klisto ‘akobuna mpo na solo, mpo na komikitisa mpe na boyengebene,’ akobikisa baoyo bakomikitisa liboso na ye mpe liboso na Tata na ye. (Nzembo 45:4) Baoyo bazali komonisa ezaleli ya komikitisa bakolendisama na maloba oyo ete: “Boluka Jéhovah bino basokemi nyonso na mokili, baoyo bakosalelaka malako na Ye; boluka boyengebene, boluka bopɔlɔ, soko nde bokobómbama na mokolo na nkanda na Jehovah.”—Sofoni 2:3.
Komikitisa mpe lisangá na Nzambe
Komikitisa ekosalisaka basaleli na Nzambe na kozala na likanisi malamu likoló na lisangá na ye mpe na komonisa bosembo na bango na kokangamáká na yango. (Tala Yoane 6:66-69.) Soki bapesi biso mokumba moko te oyo tozali na mposa ete tokokisa yango, komikitisa ekosalisa biso na kosalana elongo na baoyo bazali na mikumba kati na lisangá. Tokomonisa ndakisa kitoko, wana tokosalana elongo na komikitisa nyonso.
Epai mosusu, komikitisa ezali kopekisa biso ete tomikumisa te mpo na mikumba na biso kati na basaleli na Jéhovah. Ekopekisa biso ete toluka lokumu te mpo na mosala oyo tozali na esengo ya kokokisa yango kati na lisangá na Nzambe. Lisusu, soki tozali bankulutu, komikitisa ekosalisa biso na kosalela etonga na Nzambe na bolingo mingi.—Misala 20:28, 29; 1 Petelo 3:8.
Komikitisa mpe mpamela
Komikitisa ezali kosalisa biso na kondima mpamela. Bato na komikitisa bakeseni na
Oziase, mokonzi na Yuda, oyo motema na ye mokómaki na lolendo kino awelaki kokokisa mokuma ya banganga. ‘Amitambwisaki na kozanga sembo epai na Jéhovah mpe akɔtaki kati na tempelo mpo na kotumba mpaka na malasi na etumbelo na mpaka.’ Oziase asilikaki na banganga baoyo bapamelaki ye, mpe bobele na ntango wana azwaki maladi ya mába. Kozanga komikitisa ememaki ye kino kozwa etumbu motindo wana. (2 Ntango 26:16-21; Masese 16:18) Tomibatela ete tokokana na Oziase te na koboyáká, na lolendo, mpamela oyo Nzambe azali kopesa na nzela na Liloba na ye mpe na lisangá na Ye.
Na ntina yango, Paulo akomelaki baklisto Baebele, bapakolami na elimo, ete: “Bosili kobosana toli oyo epesameli bino lokola epai na bana, ete: ‘Mwana na ngai, kotyola mpamela na Jéhovah te, mpe kolɛmba te wana akosembola yo; mpo ete Jéhovah akopesaka etumbu na baoyo ye alingi; akobɛtaka baoyo nyonso ye akoyambaka lokola bana.’ Na ntango na yango, etumbu nyonso ekopesaka esengo te, kasi mawa; nde nsima ekobotisa mbuma na kimya, ete boyengebene, epai na bango balendisami na yango.” (Baebele 12:5-11, MN) Tomikundola lisusu ete “mpamela na kosembola ezali nzela na bomoi.”—Masese 6:23, MN.
Tobatela ezaleli na biso ya komikitisa
Ezali solo ntina mpenza mpo na baklisto ete balata ezaleli ya komikitisa. Ezaleli oyo ezali kopusa biso na kolendendela kati na mosala ya kosakola Bokonzi mpe na kopesa litatoli ndako na ndako mpo na koluka baoyo ‘babongi mpo na bomoi na seko’ na bopɔlɔ nyonso (Misala 13:48; 20:20, MN) Ya solo, mpo na komikitisa nde tozali kolanda kotosa Nzambe na makambo nyonso, ata soki banguna na lolendo bazali koboya etamboli na biso ya sembo.—Nzembo 34:21.
Jéhovah akosembolaka nzela na biso mpo ete ezaleli ya komikitisa ezali kopusa biso ete ‘tolikya epai na ye na motema na biso mobimba.’ (Masese 3:5, 6) Ya solo, bobele soki tolati ezaleli oyo nde tokoki mpenza kotambola elongo na Nzambe mpe kondimama na ye mpe kozwa mapamboli na ye. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bomikitisa liboso na Jéhovah mpe ye akotombola bino.” (Yakobo 4:10) Na bongo, tolata ezaleli ya komikitisa, elamba kitoko oyo emonisami na Jéhovah Nzambe.
LIKITA YA NSUKA NA MBULA
5 OCTOBRE 1991
LIKITA YA NSUKA NA MBULA ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ekosalema le 5 Octobre 1991, na Salle d’assemblée ya ba Témoins de Jéhovah, oyo ezali na boulevard Kennedy n 2932 na Jersey city, kati na ekolo ya New jersey. Likita moko ya ebandeli oyo likoyanganisa bobele basangani ya la Société ekosalema na 9 h 30, likolandana na likita ya nsuka na mbula na 1oh 00.
Tokozala na mposa ete basangani ya la Société oyo basili kosanzé ba adresses na bango na boumeli ya mbula eleki bakoka koyebisa yango uta sikawa na Biro ya Sekretere mpo ete lokasa ya libyangi mpe bakarte oyo ekotindama nokinoki nsima na 1 Août ekoka kokómela bango.
Libyangi mpe bakarte oyo etindami epai na basangani ya la Société, esengeli kozongisama na Biro ya Sekretere na le 15 Août. Mosangani mokomoko asengeli kotondisa karte na ye mpe kotinda yango kozanga koumela na koyebisáká sikisiki soko akoyangana na likita to te. Makambo oyo okokoma masengeli kotikala bobele bongo, mpamba te makosalisa biso na koyeba liboso motuya ya basangani oyo bakoya na likita.
Ebongisami ete programme mobimba, bakisa mpe likita moke ya ebandeli mpe rapport ekopesama nsima, esuka na 13 h 00 to mwa moke nsima. Likita likozala na nsima na midi te. Na kotalela bisika oyo bibongisami, moto oyo azali na lokasa na libyangi te, akokɔta te. Programme ya likita ya nsuka na mbula oyo ekolandama na telefone te.
Kati na nimero ekolanda
Mokolo na kosambisa eleko moko ya elikya!
“Pole eyei kati na mokili”
Oyo nde esengo ya kofanda na mesa ya jéhovah!