Likita ya nsuka na mbula—5 octobre 1991
LIKITA YA NSUKA NA MBULA ya basangani ya la Société Watchtower likosalema na mokolo ya 5 Octobre 1991, na saIIe d’assemblée ya ba Témoins de Jéhovah oyo ezali na boulevard Kennedy No, 2932 na mboka jersey city, na eteni na mokili New Jersey. Ekobanda na likita moko Iikoyanganisa bobele basangani ya Ia Société na 9h30, nsima nde elandani na likita ya nsuka na mbula liye likosalema na 10h00. Tolingi ete basangani ya la Société baoyo basili kosanzé ba adresses na bango na boumeli ya mbula eleki, bakoka koyebisa yango ma sikawa na biro ya sekretɛrɛ mpo ete nkasa ya Iibyangi mpe bakarte oyo ekotindama nokinoki nsima na mokoIo ya 1 Août, ekoka kokómela bango.
Nkasa ya libyangi mpe bakarte oyo etindami epai na basangani ya la Société esengeli kozongisama na biro ya sekretɛrɛ na mokolo ya 15 Aout. Mosangani moko na moko asengeli kotondisa karte na ye mpe kozinda yango kozanga koumela na koyebisáká malamumalamu soko akoyangana na likita to mpe te. Makambo oyo okokoma makotikala bongo, mpamba te yango nde ekosalisa biso na koyeba liboso motuya na basangani oyo bakoya na Iikita.
Ebongisami ete programme mobimba, kati na yango likita moke likosalema na ebandeli mpe rapport oyo ekopesama ekosuka na 13h00 to nsima mwa moke. Likita mosusu na nsima na nzangá, ekozala te, Na kotaIeIa bisika bibongisami, moto oyo azwi lokasa ya Iibyangi te, akokɔta te. Programme oyo ya likita ya nsuka na mbula ekolekisama na telefone te.