Bokémba kati na kondima!
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda epai na Tito
MASANGÁ na boklisto na esanga ya krete, oyo na mai-na-monana ya Méditerranée, bazalaki na mposa ya lisungi na elimo. Nani akokaki bongo komemela bango lisungi wana? Ezali moto mosusu te, bobele Tito, mosalani elongo na Paulo. Azalaki moto na mpiko, na makoki ya koteya, na molende mpo na misala malamu mpe azalaki makasi kati na kondima.
Paulo akendaki na Krete katikati na kokangama na ye ya yambo mpe oyo ya mibale, na mboka Rome. Atikaki Tito na esanga wana mpo ete abongisa makambo mosusu mpe apona bankulutu kati na masanga. Tito asengelaki lisusu kopamela balakisi na lokuta mpe kopesa ndakisa malamu. Makambo nyonso oyo mamonisami na mokanda oyo Paulo akomelaki Tito, ekoki kozala ete akomaki yango longwa na Makedonia na katikati na mobu 61 mpe mobu 64. Kosalelama ya batoli ya ntoma ekoki kosalisa bakengeli baklisto ya eleko na biso, elongo na baninga na bango baklisto ete bazala na mpiko, na molende mpe na makasi na elimo.
Bizaleli nini bisengami na bakengeli?
Esengelaki kopona bakengeli na Krete mpe kosilisa makambo minene mazalaki kuna. (1:1-16) Mpo na koponama lokola mokengeli, esengeli na moto yango ete azanga efundeli, apesa ndakisa na etamboli malamu mpe na lolenge malamu ya kokamba libota na ye, asengeli kozala moyambi na bapaya, moto na bokatikati mpe na ezaleli ya komikanga motema. Asengeli koteya makambo na solo, kolendisa mpe kopamela bakótoli. Esengelaki kozala moto na mpiko mpo na kokangisa monoko ya batomboki, mingi mpenza kati na baoyo bakangamaki na mobeko ya kokatama ngenga, mpamba te bazalaki kobulunganisa mabota mingi. Esengelaki kopesa mpamela mpo ete masangá mazala makasi na elimo. Na mikolo na biso, bakengeli baklisto basengeli mpe kozala na mpiko mpo na kopamela mpe kolendisa mpo na kokembisa lisangá.
Tosalela mateya na sembo
Tito asengelaki kopesa mateya na sembo. (2:1-15) Tozali komizela epai na mibangé mibali ete bazala ndakisa na bokatikati, na makambo mabongi, na bososoli, na kondima, na bolingo mpe na koyika mpiko. Mibangé basi basengeli kozala na “etamboli ya bato oyo bakobangaka Nzambe.” Na kozaláká ‘balakisi malamu,’ bakoki kosalisa bilenge basi ete bakanga ntina malamu ya mikumba na bango lokola basi na mabala mpe lokola bamama. Bilenge mibali basengeli kozala bato na bososoli, mpe baombo basengeli kotósa bankóló na bango mpo ete mateya na Nzambe matukama te. Baklisto basengisami na koboya ezaleli ya kotuka Nzambe mpe kozala na mayele kati na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, wana ezali bango kozela komonana na nkembo na Nzambe mpe na Yesu Klisto, “ye oyo amipesaki mpo na biso ete asikola biso na lolenge nyonso ya kotyola mibeko mpe kopetola mpo na ye, libota moko ya molende mpo na misala malamu.” (MN). Tokoki mpenza ‘kokumisa mateya nyonso na Nzambe’ na kosaleláká batoli oyo ya sembo.
Mitinda ya nsuka ya Paulo milobeli kolongono ya elimo. (3:1-15) Ezali ntina monene na kotosa bakonzi mpe kozala na bososoli. Baklisto bazali na elikya ya bomoi ya seko; maloba na Paulo masengeli bongo kokundolama mpo na bango na móto mingi, mpo na kolendisa bango ete basala misala malamu. Esengelaki koboya kowelana na mpamba mpe kowelana mpo na makambo ya Mibeko, nzokande moto na elimo ya kokabwana asengelaki koboyama nsima na likebisi ya mibale. Soki bankulutu bazali lelo kosalela batoli oyo, bango moko mpe baninga na bango baklisto bakozala makasi kati na kondima.
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
Bazali baombo na vinyo te: Kati na lisangá, mwasi asengeli koteya mobali te. Nzokande, mibangé basi bakoki kolakisa bilenge bana basi na bango, na ndako. Kasi mpo na kosala malamu na mwango yango, mibangé basi basengeli koyoka maloba na Paulo oyo malandi: “Tika ete mibangé basi bazala na etamboli ya bato bakobangaka Nzambe; batongi te, bazala baombo na vinyo te, kasi balakisi na makambo malamu.” (Tite 2:1-5, MN; 1 Timoté 2:11-14) Koyebáká makambo oyo makoki kobima likoló na komela masanga makasi, bakengeli, basaleli na misala mpe mibangé basi basengeli kozala na bokatikati mpe koboya komipesa na vinyo. (1 Timoté 3:2, 3, 8, 11) Baklisto nyonso basengeli komibatela na molangwa mpe na komela masanga makasi wana ezali bango kokokisa “mosala ya bulee”: kosakola nsango malamu.—Baloma 15:16; Masese 23:20, 21.