Nzela na mindondó mingi mpo na kobelema epai na Nzambe
YESU alobaki ete: “Ngai nazali nzela, mpe solo, mpe bomoi. Moto akokoma epai na Tata te soko na nzela na ngai te.” Mpe abakisaki boye: “Solo solo nazali koloba na bino ete: ‘Soko bokolómba Tata eloko nini na nkombo na ngai, akopesa bino yango.”—Yoane 14:6; 16:23.
Na boumeli ya bikeke, mangomba na boklisto ya lokuta basili kotya mobulungano na “nzela,” mingi mpenza Lingomba ya katolike, na mateya na yango, lokola lifelo ya móto, epóngelo mpe Trinité. Bamonisi Yesu te lokola moto oyo azali kolobela bato ya masumu, kasi nde lokola mwana moke oyo amemami na maboko ya mama na ye to mpe lokola mosambisi monene, oyo amipesi mingi mpo na kokweisa mpe kopesa etumbu epai na bato ya masumu na esika ete abikisa bango. Lolenge nini moto akoki kobelema na Nzambe?
Mokanda Les Gloires de Marie (angl., 1750) epesi ndimbola elandi. Kokokanisáká Yesu na moi ya kongala makasi ya boyengebene, na ekeke ya zomi na misato, Pape lnnocent III alobaki ete: “Soko moto nani azali kati na molili ya masumu, akotalaka epai na sanza, [ee,] tika ete abondela Marie.” Batyaki bongo molobeli mosusu mpo na bato, elingi koloba Marie, mama na Yesu. Bakanisaki mbala mosusu ete, na bopusi oyo akokaki kozala na yango lokola mama, akoki kozwa ngolu na Yesu mpe na Nzambe. Yango wana Laurent Justinien, mokonzi ya lingomba na ekeke ya zomi na mitano, apesaki Marie ba titres lokola “ebuteli ekomemaka na paradis, ekuke ya likoló, mobongisi aleki malamu kati na Nzambe mpe bato.”
Akumisamaki mingi mpenza kino etalelamaki bobele lokola “Ngondo Marie” te: kasi akómaki “Mokonzi mwasi mosantu, Mama na mawa.” Akumisamaki lokola moto azangi lisumu kino kotalela ye lokola oyo aleki mpenza bosantu mpe ete bato bakoki te bakende epai na ye mpenza. Soki boye, nani mosusu akoki kolobela bato? Soki bongo, bato bakosenga mpe mama na Marie, Boye te?
Biblia elobeli moto yango te, esengelaki kotala epai mosusu. Mokanda oyo mopemami na Nzambe te, na nkombo “Protévangile de Jacques,” molobeli lisoló ya Anne (to Anna ‘Marie’), mwasi na Yoakimi, ye oyo azalaki kobota te bambula mingi nsima na kobala. Na nsuka, anzelu moko amonanaki na ye mpo na koloba na ye ete akozwa zemi. Wana ntango ekokaki, engebene makanisi na bango, abotaki “Ngondo Marie.”
Na motindo oyo nde losambo ya “Santu” Anne ebotamaki. Bitumbelo mpe bandako-nzambe etongamaki mpo na lokumu na ye. Losambo ya “Santu” Anne lopalanganaki na mikili ya Mpótó na ekeke ya zomi na minei.
Mokanda L’histoire de la Réforme (angl.) emonisi boye: “Lingomba etondaki na makambo mingi koleka! Bato bazalaki kobondela Anne asenga epai na Marie mpo ete ye asenga na Yesu, mpe Yesu akosenga epai na Nzambe mpo na bato ya masumu. Ezalaki bongo te, kasi wana ezali motindo na bindimeli ya biyambayamba oyo bazalaki kopesa epai na bato.” Tala likambo mosusu epai maloba oyo na Yesu mazali kokokisama: “Bokoyeisaka liloba na Nzambe mpamba na ntina na bonkoko na bino.”—Malako 7:13.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]
Metropolitan Museum of Art Legs de Benjamin Altman, 1913. (14.40.663)