Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/2 nk. 15-20
  • “Bosili kosombama na motuya monene”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bosili kosombama na motuya monene”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nguya na makila
  • Bato na liboso oyo bazwi matomba ya lisiko
  • Biloko bizali na mabelé biyanganisami
  • Bozindo na mayele mpe na bolingo na Nzambe
  • Tozanga kozwa litomba na yango te
  • Yehova apesi “lisiko na esika ya bato mingi”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Lisiko—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lisiko likokani mpo na bato banso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/2 nk. 15-20

“Bosili kosombama na motuya monene”

“Bosili kosombama na motuya monene. Bokumisa Nzambe na nzoto na bino.”​—1 BAKOLINTI 6:20, “MN.”

1, 2. (a) Nini efungolaki nzela mpo na “kobika na ntango na kufa”? (b) Nini esengelaki kosalema mpo na kokokisa mbeka na Klisto engebene mibeko, mpe likambo yango limonisamaki na nini?

MOKOMI na nzembo alobaki ete “Nzambe na solo azali mpo na biso Nzambe na kobikisa, kobika na ntango na kufa ezali mpo na Nkolo Jéhovah.” (Nzembo 68:20; MN) Ya solo, mbeka na Yesu Klisto efungolaki mpenza nzela mpo na kobika; kasi mpo ete mbeka yango endimama, esengelaki, engebene mibeko, ete Klisto amonana liboso na Nzambe mpenza.

2 Likambo yango limonisamaki, Mokolo na Kozongisa bondeko, na boye ete nganga monene azalaki kokota kati na Esika-Eleki-Bosantu. (Levitike 16:12-15) Paulo akomaki ete: “Nde Klisto ayaki lokola nganga monene . . . , aingelaki kati na esika na bulee mbala moko mpo na libela, mpo na makila na bantaba mpe na bana na ngombe te kasi na makila na ye moko. Boye azweli biso lisiko na seko. Mpamba te Klisto asili koingela na esika na bulee etongami na maboko te, yango elilingi na oyo na solo, kasi aingeli kati na likoló mpenza; mpo ete akoka komonana liboso na Nzambe mpo na biso.”​—Baebele 9:11, 12, 24.

Nguya na makila

3. (a) Ndenge nini basambeli na Jéhovah bazali kotalela makila, mpe mpo na nini? (b) Nini emonisi ete makila mazali na nguya endimami na mibeko na kosala mbondi mpo na masumu?

3 Na nini makila na Klisto mazali kopesa biso nzela na kozwa lobiko? Kobanda na ntango ya Noa, basambeli na solo na Nzambe bazali kotalela makila lokola eloko na bulee. (Genese 9:4-6) Makila makokisaka mokumba monene kati na bomoi, mpamba te, na boyokani na oyo Biblia elobi, “molimo (to bomoi na mosuni ezali kati na makila.” (Levitike 17:11) Tala ntina nini, ntango nyama moko epesamaki lokola mbeka, Mobeko na Moïse mozalaki kosenga ete makila na yango masopama liboso na Jéhovah. Na mabaku mosusu, makila matyamaki ata likoló na maseke ya etumbelo. Ezalaki bongo polele ete nguya ya kopetola masumu na nzela na mbeka ezwamaki bongo kati na makila. (Levitike 8:15; 9:9) “Engebene mibeko, biloko nyonso bipetwi na makila mpe soko makila masopani te, kolimbisama na masumu ezali te.”​—Baebele 9:22.

4. (a) Mobeko oyo Nzambe apesaki na ntina na makila esengelaki kokokisa mokano nini? (b) Likambo nini ya ntina limonisami kati na lolenge oyo Yesu abomamaki?

4 Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete, na nse na Mibeko, kosalela makila na lolenge mabe ezalaki ntango nyonso kopesamela etumbu na kufa. (Levitike 17:10) Moto nyonso kati na biso ayebi ete ntango eloko moko ezali komonana lisusu mingi te to soko kosalelama na yango etyameli mpenza ndelo, motuya na yango mozali kobakisama. Mobeko oyo Jéhovah atyaki mpo na lolenge ya kosalela makila etombolaki mpenza motuya na yango, ekomaki eloko ya ntalo mingi. (Misala 15:29; Baebele 10:29) Yango ezalaki na boyokani elongo na mokano motombwani oyo makila na Klisto masengelaki kokokisa. Toyeba ete ye akufaki na lolenge boye ete makila na ye masopanaki. Na bongo, ezali polele ete Klisto apesaki bobele nzoto na ye lokola mbeka te, kasi lisusu asopaki molimo na ye, elingi koloba bomoi na ye ya moto na kokoka lokola mbeka. (Yisaya 53:12) Asalaki lisumu moko te mpo na yango akokaki kobungisa lotomo ya kozala na bomoi; tala ntina makila na ye oyo masopanaki mazalaki na motuya monene mpe makokaki kopesama epai na Nzambe mpo na mbondi ya masumu na bato.

5. (a) Eloko nini Klisto amemaki na likoló, mpe mpo na nini? (b) Na likambo nini emonanaki polele ete Nzambe andimaki mbeka na Klisto?

5 Klisto amemaki makila na ye na likoló te. (1 Bakolinti 15:50) Nzokande, amemaki nde eloko makila yango ezalaki komonisa: motuya mondimami na mibeko, motuya ya bomoi na ye ya moto na kokoka oyo epesamaki lokola mbeka. Liboso na Nzambe, akokaki kopesa polele bomoi yango lokola lisiko mpo na kosomba mokili ya bato na masumu. Emonanaki polele ete Jéhovah andimaki mbeka yango mpamba te na mokolo na Pantekote ya mobu 33, elimo santu ekweaki likoló na bayekoli 120 bayanganaki na Yelusaleme. (Misala 2:1-4) Kobanda ntango wana, Klisto asombaki libota na bato mpe akomaki nkolo na yango. (Bagalatia 3:13; 4:5; 2 Petelo 2:1) Na yango, bolamu ya lisiko bokokaki kosopama likoló na bato.

Bato na liboso oyo bazwi matomba ya lisiko

6. Bibongiseli nini Nzambe akamataki mpo ete bato bazwa litomba na lisiko?

6 Nzokande, yango elimbolaki te ete bato basengelaki kozwa nokinoki ezalela ya kokoka na nzoto: esengelaki liboso kosukisa ezalela na masumu ya moto. (Baloma 7:18-24) Ntango nini mpe ndenge nini lisumu esengelaki kolongama? Ya liboso, Nzambe aponaki banganga 144 000 mpo ete ‘bazala bakonzi na mokili’ elongo na Klisto Yesu kuna na likoló. (Emoniseli 5:9, 10; 7:4; 14:1-3) Na nsima, na nzela na bango, matomba mauti na lisiko makopesama mokemoke na bato awa na mokili, na boumeli ya eleko na mibu nkoto.​—1 Bakolinti 15:24-26; Emoniseli 21:3, 4.

7. (a) Kondimana ya sika ezali nini, yango esalemi kati na nani mpe nani mpe ezali kokokisa mokano nini? (b) Mpo na nini esengelaki ete moto akufa mpo ete kondimana wana ya sika ekoka kosalema, mpe mokumba nini makila na Yesu mazali kokokisa kati na likambo yango?

7 Mpo na yango, bakonzi mpe banganga 144 000 “basombamaki kati na bato.” (Emoniseli 14:4, MN) Kosombama yango ekokaki kosalema na nzela na “boyokani ya sika,” elingi koloba kontra oyo esalemaki kati na Jéhovah mpe Yisraele ya elimo, Yisraele na Nzambe mpo ete basangani ya Yisraele yango bazala bakonzi mpe banganga (Yilimia 31:31-34; Bagalatia 6:16; Baebele 8:6-13; 1 Petelo 2:9) Nzokande, ndenge nini boyokani to kondimana ekokaki kosalema kati na Nzambe mpe moto azangi kokoka? Paulo alimboli biso yango na maloba oyo: “Mpo ete soko kondimana esalami [kati na Nzambe mpe moto azangi kokoka], ekoki ete kufa na mosali na yango eyebana. Mpo kondimana ezali na ntina bobele likoló na miboma, mpo ezali na nguya te naino mosali na kondimana azali na bomoi.”​—Baebele 9:16, 17, MN.

8, 9. Boyokani nini bozali kati na lisiko mpe kondimana na sika?

8 Na yango, mbeka na lisiko ezali moboko na kondimana na sika oyo Yesu azali Moyokanisi na yango. Na ntina yango Paulo akomi ete: “Mpo ete Nzambe moko azali mpe [moyokanisi] moko kati na Nzambe mpe bato, ye moto Klisto Yesu, oyo amipesi lokola lisiko [likokani] mpo na bato nyonso. Litatoli mpo na yango eyei na elaka ekoki na yango.” (1 Timoté 2:5, 6) Maloba oyo mazali kotalela mpenza ba 144 000, mpamba te ezali elongo na bango nde kondimana na sika esalemaki.

9 Kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na Yisraele ya mosuni ezwaki makasi bobele na ntango oyo makila na nyama masopamaki lokola mbeka. (Baebele 9:18-21) Bobele bongo, mpo ete kondimana na sika ezwa makasi, Klisto asengelaki kosopa “makila na kondimana.” (Matai 26:28; Luka 22:20) Lokola Klisto azali na mbala moko Nganga Monene mpe “[moyokanisi] na kondimana na sika,” Nzambe azali kopesa nzela epai na baoyo bazwami kati na kondimana na sika ete bazwa matomba na motuya na makila na Yesu, kolongisa bango na nzela na mibeko. (Baloma 3:24; 8:1, 2) Nzambe akoki bongo kokotisa bango kati na kondimana na sika mpo ete bazala bakonzi mpe banganga na likoló. Yesu, Moyokanisi na bango mpe Nganga Monene, azali kosalisa bango na kotikala peto liboso na Nzambe.​—Baebele 2:16; 1 Yoane 2:1, 2.

Biloko bizali na mabelé biyanganisami

10, 11. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete lisiko lizali kopesa matomba bobele epai na baklisto bapakolami be? (b) Ebele monene bazali banani, mpe etelemelo nini bazali na yango liboso na Nzambe?

10 Baklisto bapakolami na elimo bazali bobele bango moko nde bazwi litomba na lisiko mpe kolimbisama na masumu na bango? Te, mpamba te, lokola emonisi yango Bakolose 1:14, 20, Nzambe azali koyokanisa biloko nyonso epai na ye, awa esili ye koyeisa kimya na nzela na makila (na Klisto) oyo masopamaki likoló na nzete ya mpasi. Biloko yango bizali bongo oyo bizali na makoló (ba 144 000), bakisa mpe oyo bizali na mabelé. Biloko na mabelé bizali bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya kokoka na mabelé oyo makobongwana paradis. Ezali mpenza kobanda 1935 nde mosala monene mobandaki mpo na koyanganisa bato yango. Emoniseli 7:9-17 ezali kolobela bango lokola “ebele monene” oyo lobiko na bango euti epai na Nzambe mpe na Mwana na Mpate. Esengeli na bango mpe kobika na “bolozi monene” mpe ‘kokambama epai na maziba na mai na bomoi,’ mpamba te Emoniseli 20:5 emonisi ete bakobika libela mpenza, na elobeli mosusu bakozwa bomoi lokola bato na kokoka mpenza, bobele na nsuka ya boyangeli na mibu nkoto na Klisto. Baoyo, wana ekomi bango na ezalela ya kokoka ya bomoto, baleki na elonga nyonso momekamo ya nsuka, bakotangama bayengebene mpo na bomoi na seko awa na mabelé.​—Emoniseli 20:7, 8.

11 Nzokande, basangani ya ebele monene bazali uta sikawa “kosukola bilamba na bango mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 7:14) Klisto azali kosala epai na bango te lokola Moyokanisi ya kondimana na sika, kasi bazali kozwa matomba ya kondimana yango na nzela na mosala mokokisami na Bokonzi na Nzambe. Nzokande, Klisto azali kosala epai na bango lokola Nganga Monene, na nsima na ye Jéhovah azali kosalela lisiko mpo ete atánga bango sikawa bayengebene lokola baninga na Nzambe. (Tala Yakobo 2:23.) Na boumeli ya Mibu Nkoto, ‘bakosikolama mokemoke na boombo ya masumu [kino bakozwa] nkembo na bana na Nzambe.’​—Baloma 8:21.

12. Etelemelo nini basembwi ya kala liboso na Klisto bazalaki na yango na miso na Nzambe?

12 Emonani lokola ete basangani ya ebele monene bazali, liboso na Nzambe, kati na etelemelo moko ekeseni bobele moke na oyo ya basambeli na ye ya kalakala. Kasi, kati na boyokani na Nzambe elongo na basambeli na ye ya kala, lisiko ezalaki ebongiseli moko ezalaki naino koya. (Baloma 3:25, 26) Lilimbisi na masumu na bango ezalaki bobele ya ntango moke. (Nzembo 32:1, 2) Na esika ete elongola bango “masumu kati na lisosoli,” mbeka na banyama ezalaki kokundola bango “ekaniseli na masumu.”​—Baebele 10:1-3.

13. Matomba nini tozali na yango koleka bato oyo basalelaki Nzambe liboso na eleko na boklisto?

13 Ezali motindo moko te lelo mpo na baklisto ya solo. Losambo na bango etongami likoló na lisiko oyo lisili kopesama. Na nzela na Nganga na bango Monene, ‘bazali kobelema na molende epai na kiti na bokonzi na ngolu.’ (Baebele 4:14-16) Kozongisa boyokani elongo na Nzambe ezali eloko ya bozali lisusu te, kasi ezali nde eloko esili kosalema. (2 Bakolinti 5:20) Ntango basali libunga moko, bakoki kozwa lilimbisi ya solo. (Baefese 1:7) Bazali mpenza na lisosoli moko ya mpeto. (Baebele 9:9; 10:22; 1 Petelo 3:21) Bolamu wana ezali mwa komeka moke ya bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe oyo basaleli na Jéhovah bakosepela na yango mokolo mosusu.

Bozindo na mayele mpe na bolingo na Nzambe

14, 15. Na nini lisiko ezali komonisa mayele mozindo ya Jéhovah, bakisa boyengebene na ye mpe bolingo na ye?

14 Solo, lisiko ezali likabo kitoko mingi euti na Jéhovah! Tozali kosimba ndimbola na yango kozanga nkaka, nzokande ezali mpenza na bozindo mingi. Kati na boyekoli na biso mpo na koyeba lolenge oyo yango ezali kosala, touti kotalela bobele makambo na likolólikoló. Nzokande, tozali kokamwa elongo moko na ntoma Paulo ete: “Ee, bozwi mpe boyebi mpe bososoli na Nzambe ezali na bozindo boni! Bikateli na ye bikoki [kososolama] te; bilekelo na ye bikomonana nzela te!” (Baloma 11:33) Mayele na Jéhovah mazali komonana na likambo oyo alongi kobikisa bato mpe kolongisa bokonzi na ye. Na nzela na lisiko, “boyengebene na Nzambe emonani polele. . . . Nzambe asemboli [Klisto] lokola mbondi mpo na baoyo bazali kondima mpo na makila na ye.”​—Baloma 3:21-26.

15 Moto moko te akoki kopamela Nzambe mpo alimbisi masumu ya basambeli na ye ya ntango na kala liboso na Klisto. Moto moko mpe te akoki kopamela ye mpo ete atangi bayengebene baklisto bapakolami lokola bana na ye, mpe basangani ya ebele monene lokola baninga na ye. (Baloma 8:33) Atako motuya oyo afutaki mozali monene boni, Nzambe asalaki mpenza na lolenge eyokani na mibeko, mpe akweisaki na makambo nyonso lokuta oyo Satana alobaki ete Nzambe akoyangelaka na lolenge ezangi boyengebene Motindo moko, amonisaki na lolenge ekoki kotyamela ntembe te, ete alingi bikelamu na ye na bolingo ya solosolo.​—Baloma 5:8-11.

16. (a) Ndenge nini lisiko lipesaki nzela na kosilisa ntembe ebimaki na ntina na bosembo na basaleli na Nzambe? (b) Lisiko lipesi biso ntina ya kozala na kondima mpo na koya na mokili ya sika ya boyengene?

16 Lolenge oyo lisiko lipesamelamaki esilisaki mpe ntembe etali bosembo na basaleli na Nzambe. Ezali yango nde bosembo na Yesu bobele yango moko ekokisaki. (Masese 27:11; Baloma 5:18, 19) Nzokande, esengelaki kobakisa na wana baklisto 144 000 baoyo, atako Satana azali kotemela bango, bazali kotikala sembo kino liwa na bango. (Emoniseli 2:10) Lisiko lizali kosalisa bango na kozwa lokola mbano bomoi bokoki kosuka te, bomoi bokoki kobebisama te. (1 Bakolinti 15:53; Baebele 7:16) Tala likambo oyo emonisi bozoba nyonso ya efundeli na Satana, engebene yango ete basaleli na Nzambe, bazali bato na kotyela motema te. Lisiko lipesi biso mpe ntina mosusu ya monene ya kozala na kondima makasi kati na bilaka na Nzambe. Na bongo tozali komona na miso na biso ebongiseli ya lobiko oyo “etyami na nzela na mibeko” na lisalisi ya mbeka na lisiko. (Baebele 8:6) Ezali na boye nde ndanga na mokili ya sika ya boyengebene esili kopesama.​—Baebele 6:16-19.

Tozanga kozwa litomba na yango te

17. (a) Ndenge nini bamosusu bazali komonisa ete basili kozangisa mokano ya lisiko? (b) Nini ekoki kolendisa biso kati na mposa na biso ya kotikala peto na bizaleli?

17 Mpo na kozwa litomba na lisiko, esengeli koyekola, kozala na kondima mpe komitambwisa engebene mitinda na Biblia. (Yoane 3:16; 17:3) Nzokande, bobele bato moke nde bazali na mposa ya kosala motindo wana. (Matai 7:13, 14) Ata kati na baklisto ya solo, ezali kokoma ete bamosusu bandimi “ngolu na Nzambe mpe bazangi kozwa litomba na yango.” (2 Bakolinti 6:1) Na ndakisa, na boumeli ya mibu, baklisto mingi babimisamaki na lisangá mpo na pite. Oyo nde mawa, soki tokanisi na likambo oyo Jéhovah mpe Klisto basalaki mpo na biso! Botondi na biso mpo na lisiko esengeli kopusa moko na moko kati na biso na kozanga “kobosana ete asili kopetwa na masumu na ye na kala.” (2 Petelo 1:9) Ezali bongo likambo na ntina ete Paulo akundolaki lisusu epai na baklisto ete: “Bosilaki kosombama na motuya monene. Boye bokumisa Nzambe kati na nzoto na bino. (1 Bakolinti 6:20) Komikundola likambo yango ezali kolendisa mposa na biso na kotikala peto kati na bizaleli na biso.​—1 Petelo 1:14-19.

18. Ndenge nini moklisto oyo asali lisumu monene akoki, ata bongo, kozwa litomba na lisiko?

18 Moto oyo asali lisumu monene asengeli kosala nini? Asengeli koluka lilimbisi na nzela na lisiko, mpe kozwa lisalisi ya bakengeli batondi na bolingo. (Yakobo 5:14, 15) Ata soki esengeli na ye kopamelama makasi, moklisto oyo abongoli solo motema asengeli kolemba te mpo ete azwi etumbu. (Baebele 12:5) Biblia epesi biso elikya kitoko oyo: “Soko tokoyambola masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebeni mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopetola biso na bokesene nyonso.”​—1 Yoane 1:9.

19. Ndenge nini baklisto mosusu batalelaka mbala mosusu mabunga oyo basáláká liboso ete bayeba solo?

19 Baklisto mosusu bakolembaka, kozanga ntina mpo na etamboli mabe na bango ya kala. Moko na bandeko yango akomaki ete: “Liboso ya kozala kati na solo, mwasi na ngai mpe ngai moko tozwaki maladi ya binama, maladi ebengami herpès génital. Mbala mosusu, tomimonaka lokola ete bozali mbindo, lokola ete tobongi te mpo na kozala kati na lisangá ya Jéhovah.” Ezali solo ete, ata nsima na kokoma baklisto, bamosusu bakoki ‘kozwa’ mpasi mpo na mabunga na bango ya kala. (Bagalatia 6:7) Nzokande, soki babongolaki motema, bazali na ntina moko te ya komimona mbindo liboso na Jéhovah. “Makila na Klisto” makoki kopetola “lisosoli na biso longwa na misala na kufa.”​—Baebele 9:14.

20. Ndenge nini kondima kati na lisiko ekoki kolongola epai na moklisto kilo ya mpamba mpo na liyoki ete azali na ngambo monene?

20 Ee, kondima kati na lisiko ekoki kolongola biso kilo ya mpamba na lisosoli na ntina na liyoki moko ete tozali na ngambo moko monene. Tala likambo oyo ndeko mwasi moko alobaki: “Ekoki sikawa mibu 11 uta ezali ngai kobunda na momeseno moko ya mbindo, oyo ya komisepelisa na kosimbasimba nzoto na ngai moko (masturbation). Nalingaki nkutu kotika lisangá, mpamba te nazalaki kokanisa ete Jéhovah alingi te ete moto moko ya mbindo abebisa lisangá na ye.” Tosengeli komikundola ete Jéhovah azali na “boboto mpe akolimbisaka mabe,” soki nde tobundisi mabe na molende nyonso na esika ete tokwea kati na yango.​—Nzembo 86:5.

21. Bopusi nini lisiko esengeli kozala na yango likoló na motindo oyo tozali kotalela bato oyo basaleli biso mabe?

21 Lisiko lisengeli mpe kozala na bopusi likoló na motindo oyo tozali komitambwisa liboso na bazalani. Na ndakisa, tosalaka ndenge nini ntango moko na bandeko na biso baklisto asaleli biso lisumu? Tolimbisaka ye na motema moko, lokola Klisto asɛngaki yango? (Luka 17:3, 4) Tosili ‘kotonda na boboto, na motema mawa, na kolimbisana moko moko pelamoko Nzambe asili kolimbisa biso kati na Klisto’? (Baefese 4:32) To tozalaka nde na momeseno ya kobomba nkanda to kozala na nkele na motema? Soki ezali bongo, mbele tokozanga mokano ya lisiko.​—Matai 6:15.

22, 23. (a) Bopusi nini lisiko esengeli kozala na yango likoló ya bomoi na biso mpe likoló ya mikano oyo tozali komityela? (b) Ekateli nini baklisto nyonso basengeli kokamata na ntina etali lisiko?

22 Na nsuka, botondi na biso mpo na lisiko esengeli kozala na bopusi mozindo kati na bomoi na biso mpe likoló na mikano oyo tozali komityela Paulo alobi ete: “Bosili kosombama na motuya monene! Bozala lisusu baombo na bato te.” (1 Bakolinti 7:23, MN) Bamposa ya mosuni, lokola ndako, mosala, bilei mpe molato, ezali ntango nyonso na esika ya liboso kati na bomoi na biso? To tolukaka nde liboso Bokonzi, na kozalaka na elikya epai na Nzambe oyo alaki kokokisa bamposa na biso? (Matai 6:25-33) Ekoki kozala ete, lokola baombo, tozali mpenza koboma nzoto koleka mpo na patron na biso nzokande tokopesaka bobele esika moke na mosala ya Nzambe? Tomikundola ete Klisto “[akufaki] mpo na biso, ete . . . apetola mpo na ye moko libota na ye mpenza, baoyo bazali na mposa na kosalaka misala malamu.”​—Tito 2:14; 2 Bakolinti 5:15.

23 “Totondo Nzambe na nzela na Yesu Klisto” mpo na likabo kitoko mingi oyo ezali bongo lisiko! (Baloma 7:25, MN) Tozangisa soki moke te mokano ya lisiko, kasi tosala ete ezala bokasi ya solo kati na bomoi na biso! Tika ete tokumisa Nzambe na makambo nyonso: na makanisi, na maloba mpe na misala, mpe komikundolaka na botondi nyonso ete tosili kosombama na motuya monene!

Bozongeli

◻ Mpo na nini makila matalelami lokola eloko na bulee mpe ndenge nini makila na Klisto mapesamaki epai na Jéhovah kati na likoló?

◻ Mokumba nini makila na Klisto mazali kokokisa kati na kondimana ya sika?

◻ Bolamu nini lisiko lizali kopesa epai na baklisto bapakolami mpe na ebele monene?

◻ Ndenge nini tokoki komonisa ete tozangisi mokano ya lisiko te?

[Elilingi na lokasa 16]

Nguya na mbeka nyonso mpo na kosala mbondi ezwami kati na makila na yango, elembo ya bomi

[Elilingi na lokasa 17]

Ye oyo asimbi ntina na lilimbisi na Nzambe akondima kolimbisa bazalani na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto