Likita ya nsuka na mbula—6 octobre 1990
LIKITA YA NSUKA NA MBULA ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ekosalema le 6 Octobre 1990, na Salle d’assemblées ya ba Témoins de Jéhovah, oyo ezali na boulevard Kennedy nimero 2 932 na Jersey City, na engumba ya New Jersey. Likita moko ya ebandeli oyo ekozala bobele mpo na basangani ya la Société ekosalema na 9h30, ekolandana na likita ya nsuka na mbula na 10 heures.
Tokozala na botondi epai na basangani ya la Société oyo basilaki kosanze ba adresse na bango na boumeli ya mbula eleki ete bakoka koyebisa likambo yango uta sikawa na Biro ya Sekretere mpo ete libyangami mpe lotomo oyo ekotindama nokinoki nsima ya le 15 Août ekoka kokomela bango.
Libyangami oyo etindami epai na basangani ya la Société mpe lotomo, esengeli kozongisama na Biro ya Sekretere na le 1er Septembre. Mosangani mokomoko asengeli kotondisa lokasa na ye ya lotomo mpe kotinda yango kozanga koumela na koyebisáká sikisiki soki akoyangana na likita to te. Makambo oyo okokoma masengeli kotikala bobele bongo, mpamba te makosalisa biso na koyeba liboso motuya na basangani oyo bakoya na likita.
Ebongisami ete programme mobimba, bakisa mpe likita moke ya ebandeli mpe rapport oyo ekopesama nsima esuka na 13 heures to mwa moke nsima. Likita ekozala te na nsima ya midi. Na kotalela bisika oyo bibongisami, moto oyo azali na invitation te akokota te. Programme ya assemblée ya nsuka na mbula ya mbala oyo ekolandama na telefone te.