Ndenge nini nakoki kotemela bopusi ya baninga na ngai?
Wana ezali motuna ya ntina oyo ezali kosenga eyano, lokola yango emonisami na mokanda oyo euti epai na polisyé moko ya mboka chicago:
“Le 15 janvier 1990, natyaki na boloko mokangami moko ya mbula 18, oyo autaki na Mississippi na mboka chicago mpo azalaki kolukama. Nasengelaki kozwa biloko nyonso azalaki na yango. Kati na biloko na ye, azalaki na mokanda moko oyo ebengami Les jeunes s’interrogent.
Natunaki ye “Otangaki mokanda oyo?’’
Ayanolaki ’’Ee. Ntango nazalaki komibomba na Mississippi, nazalaki kosala na ferme moko, mpe ba Témoins de jéhovah mibale bapesaki ngai yango.’ Na maloba yango, abandaki kolela. Alimbolelaki ngai ete: ‘Natangaka yango mbala mingi, mpe ezali na mokapo moko oyo nazongela kotanga mbala na mbala; ezali oyo “comment puis-je résister à l’influence de mes camarades? (’’Ndenge nini nakoki kotemela bopusi ya baninga na ngai?”’) Mpe abakisaki ete: ‘Soki nakangaki yango mbula misato to minei liboso, nakoki kozala te na esika oyo nazali lelo.’
’’Mokangami atyamaki na boloko, mpe natángaki epai na baninga na ngai maloba na ye oyo makomamaki na proces-verbal mpe eyambweli oyo asalaki. Alobaki boye: ‘Mokonzi ya etuluku na biso ayebisaki ngai ete nakita na balabala mpe naboma mosangani moko ya etuluku oyo ezalaki kotya ntembe na biso na kotekaka drogue na nkombo cocaïne na teritware na biso. Nasalaki oyo ye ayebisaki ngai. Nabangaki ete baninga na ngai mosusu bakanisa de nazalaki makasi te. Nalingaki ete bandima ngai.’’
Mbala mosusu, yo mpe osili komituna mituna lokola oyo: Ndenge nini nakoki kotemela bopusi ya baninga na ngai? Nasengeli’ kotika kotanga na eteyelo? Ndenge nini koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala? Mpo na nini koboya drogue? Wana ezali bobele mwa masolo matalelami kati na mokanda les jeunes s’interrogent—Réponses pratiques. Soki olingi kozwa mokanda yango, tuna na Batemwe oyo bafandi na mboka na bino.