Bamilio na bakufi bakozonga lisusu na bomoni oyo nde elikya na esengo
Bibele na bakufi bakozonga lisusu na bomoi; oyo nde elikya na esengo! Kasi ezali solo mpo na kondima yango? Eloko nini ekoki kondimisa yo? Mpo na kondima elaka, esengeli koyeba malamu soki oyo apesaki yango azali bobele na mposa ya kokokisa yango te, kasi lisusu soki azali na makoki Na bongo, nani apesaki elaka ete bamilió na bakufi bakozonga lisusu na bomoi?
Na printemps ya mobu 31, Yesu elobaki na molende ete Nzambe epesaki ye nguya ya kosekwisa bakufi. Apesaki elaka oyo: Lokola Tata akosekwisaka bakufi mpe akopesaka (bango) bomoi, boye mpe Mwana akopesaka bomoi na baoyo elingi ye kopesa yango. Bokamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda (na kokanisama) bakoyoka mongongo na ye (ya Yesu) mpe bakobima.” (Yoane 5:21, 28, 29). Ya solo, Yesu Klisto alakaki ete ebele na bakufi bakozala lisusu na bomoi na mabelé mpe bakozala na elikya ya kofanda wana libela. (Yoane 3:16; 17:3; tala Nzembo 37:29 mpe Matai 5:5).a Tokoki koloba solo ete, lokola apesaki elaka yango, Yesu azali na mposa ya kokokisa yango. Kasi akokoka kosala yango?
Engebene lisolo na Biblia, na eleko oyo Yesu apesaki elaka yango, naino asekwisaki moto te. Kasi na mbula mibale nsima, amonisaki na lolenge na nguya ete azali bobele na mposa te, kasi lisusu ete akokaki kosekwisa bakufi.
“Lazare, bima libanda!”
Ezalaki likambo moko ya mawa. Lazare abelaki maladi makasi. Bandeko na ye mibale ya basi, Marie na Malata, batindaki maloba epai na Yesu, oyo azalaki na ngambo mosusu ya Yordani ete: “Nkolo, tala, ye oyo olingi abeli maladi.” (Yoane 11:3). Ya solo mpenza, Yesu alingaki Lazare mingi mpe bandeko na ye ya basi. Ezali komonana lokola ete, mbala mingi azalaki kolala epai na bango, na Béthanie. (Luka 10:38, 42; tala Luka 9:58). Kasi, sikawa, moninga na ye oyo alingaki mingi azalaki na maladi makasi.
Marie na Malata bazelaki ete Yesu asala nini? Basengaki ye te ete aya na Béthanie. Kasi bayebaki ete alingaki Lazare. Asengelaki kozala na mposa te ya koya kotala moninga na ye oyo azalaki na maladi? Ntembe ezali te ete bazalaki na elikya ete akobikisa ye na ekamwiseli. Na kotala malamu mpo na mosala na ye kino ntango wana, Yesu akokisaki misala mingi na kobikisa, mpe ata ntáká ezalaki nkaka mpo na ye te. (Tala Matai 8:5-13) Na yango akokaki kosala eloko moko te mpo na moninga na ye oyo alingaki mingi? Kasi likambo na kokamwa, ezali oyo ete, na esika et akende mbala moko na Béthanie, atikalaki lisusu mikolo mibale na esika ezalaki ye.—Yoane 11:5, 6.
Mwa ntango moke nsima na kotinda nsango, Lazare akufaki, mbala mosusu akufaki nde ntango oyo Yesu. azwaki nsango ete azali na maladi (tala Yoane 11:3, 6, 17). Kasi Yesu azalaki na mposa na nsango mosusu te. Ntango Lazare akufaki, ayebaki yango mpe mposa na ye ezalaki ya kosala eloko.b Na kolobaka mpo na liwa ya Lazare, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moninga na biso Lazare asili kolala mpongi, kasi nakokenda kola musa ye.” (Yoane 11:11). Liboso na oyo, Yesu asekwisaki bato mibale mpo na mokomoko, ezalaki bobele na mwa ntango moke nsima na kufa.
Nzokande, na mbala oyo likambo yango ekeseni; na nsuka wana ekomaki ye na mboka Béthaníe, moninga na ye akufaki esilaki koleka mikolo minei. (Yoane 11:17, 39) Yesu akokaki azongisa na bomoi moto oyo akufi esilaki koleka ntango mingi mpe oyo nzoto esilaki kobanda kopola?
Eyokaki ye ete Yesu azali koya, Malata, mwasi na mpiko, akendaki mbangu liboso na ye. (Tala Luka 10:38-42) Bobele ntango amonaki ye, motema na ye epusaki ye na koloba ete: “Nkolo, soko ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufi te!” Nzokande, amonisaki kondima na ye, na kolobáká ete: “Nayebi ete likambo nini okosenga epai na Nzambe, Nzambe akopesa yo yango.” Na koyokelaka Malata mawa, Yesu apesaki ye elaka oyo: “Ndeko na yo akosekwa.” Wana emonisaki ye kondima na ye mpo na lisekwa na mikolo mizali koya, Yesu ayebisaki ye polele ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, (akozonga na bomoi, MN).”—Yoane 11:20-25.
Wana ekomaki bango na liyita, asengaki ete balongola libanga oyo ezipaki ekoteli. Na ebandeli, Malata atyaki ntembe, na kolobáká ete: “Nkolo azali kolumba nsolo mabe mpo ete akufi longwa mikolo minei.” Kasi Yesu azongiselaki ye monoko ete: “Nalobaki na yo te ete, soko okondima, okomona nkembo na Nzambe?” Na bongo, nsima na kobondela na mongongo makasi, apesaki etinda ete: “Lazare bima libanda!” Na koyokaka etinda na ye, Lazare abimaki atako akufaki longwa mikolo minei!—Yoane 11:38-44.
Likambo yango esalamaki solo?
Evanzile na Yoane ezali komonisa lisolo ya lisekwa na Lazare lokola likambo oyo esalamaki mpenza. Makambo oyo mayebisami na lisolo yango mazali lisapo te. Kotya ntembe na likambo yango elakisi kotya ntembe na bikamwiseli nyonso na Biblia, ata mpe lisekwa na Yesu ye moko.c Mpe kozanga kondima lisekwa na Yesu elimboli kowangana kondima na boklisto na mobimba na yango.—1 Bakolinti 15:13-15.
Ya solo, soki ondimi ete Nzambe azali, okozala na mpasi te mpo na kondima lisekwa. Topesa ndakisa mpo na likambo yango. Na moi mwa lelo, moto akoki kokotisa na cassette video makanisi na ye ya nsuka mpe testament na ye, mpo ete nsima na liwa na ye bandeko mpe baninga na ye bamona ye mpe bayoka lolenge azali koloba ye moko ndenge nini bakokabola biloko na ye bitikali. Esili koleka bambula nkama, likambo motindo yango ekokaki kokanisama te, mpe ata mpo na bato na ntango na biso baoyo bazali kofanda na bamboka, bakoki kozala na mpasi ya kokanga ntina na “ekamwiseli” ya kokotisa elilingi mpe mongongo kati na vidéo. Soki bato bakoki kosalela mibeko ya physique, oyo Mozalisi atyaki, mpo na kokanga mpe kobomba elilingi mpe mongongo, ezali likambo ya mayele te na kokanisa ete Mozalisi ye moko akoki kosala makambo minene koleka? Na yango, ezali likambo ya mayele te na kondima ete Oyo azalisaki bomoi azali na makoki ya kosekwisa moto na kozongisáká bomoto na ye kati na nzoto ya sika?
Ekamwiseli ya kosekwa ya Lazare epesaki nzela epai na bato mingi na kokolisa kondima na bango epai na Yesu mpe na lisekwa. (Yoane 11:41, 42; 12:9-11, 17-19). Likambo yango engengisaki mpe, na lolenge oyo ezali kosimba motema, mokano mpe mposa oyo Jéhovah mpe Mwana na ye bazali na yango mpo na kosekwisa bakufi.
‘Nzambe akoyoka mposa’
Ezalela na Yesu na liwa na Lazare emonisi mayoki makasi na Mwana na Nzambe. Mayoki mozindo na motema oyo amonisaki na libaku yango emonisi polele mposa makasi oyo azali na yango mpo na kosekwisa bakufi. Totangi boye: “Ekomi Marie na esika ezalaki Yesu, amoni ye mpe akwei na makolo na ye mpe alobi na ye ete: ‘Nkolo, soko ozalaki awa mbele ndeko na ngai akufi te!’ Emoni Yesu ete azalaki kolela mpe Bayuda baoyo bazalaki na ye elongo bazalaki kolela, ayokaki mawa na motema mpe amitungisi; alobi mpe ete: ‘Botii ye wapi?’ Balobi na ye ete: ‘Yaka kotala, Nkolo.’ Yesu atangisi mpisoli. Bayuda balobi wana ete: ‘Tala lokola alingaki ye!—Yoane 11:32-36.
Mawa monene na Yesu kati na lisolo oyo emonisami na maloba misato: “ayokaki mawa na motema”, “amitungisi” mpe “atangisi mpisoli”. Maloba na ebandeli oyo ntoma Yoane asalelaki mpo na koyebisa lisolo na likambo oyo na mawa emonisi kino na ndelo nini Yesu azalaki na mawa.
Liloba na greke oyo ebongolami ete ‘ayokaki mawa na motema” euti na verbe embrimaomaĩ, oyo elimboli “koyoka mpasi mingi na motema to koyoka mawa mingi na motema”. Molimboli na Biblia William Barclay alobi: “Na monoko na greke ya kala, (embrimaomaĩ) esalelamaki mingimingi mpo na kolakisa kopema makasi na mpunda. Awa, ekoki bobele kolimbola ete Yesu azuamaki na mayoki to émotion makasi kino amonisaki mawa monene ya motema na ye.”
Liloba oyo ebongolami ete “amitungisi” euti na verbe greke tarassó, oyo emonisi yikiyiki. Engebene diksionere (The New Thayer’s Greek-english Lexicon of the New Testament), elimboli “koyeisa yikiyiki na motema, . . .konyokwama na mpasi to mawa makasi”. Liloba “atangisi mpisoli” euti na verbe greke dakruó, oyo elimboli “kobimisa mai na miso, kolela na kozanga koloba”. Ekeseni na ‘kolela’ ya Marie mpe ya Bayuda baoyo bazalaki na ye elongo, kolela oyo elobami na Yoane 11:33. Kati na verset oyo, ezali liloba na greke klaĩó nde esalelamaki mpe yango elimboli “kolela na mongongo makasi to na makelele”.d
Bongo Yesu ayokaki mawa mingi na motema mpo na liwa ya moninga na ye Lazare mpe mpo na komona lolenge bandeko na ye ya basi bazalaki kolela. Ayokaki mpasi mingi na motema kino miso na ye etondaki na mpisoli. Likambo na kokamwa ezali oyo ete asilaki kozongisa bato mibale na bomoi, mpe, na libaku oyo, azalaki na likanisi ya kosala ndenge moko mpo na Lazare. (Yoane 11:11, 23, 25). Nzokande, “atangisi mpisoli”. Kozongisa bato na bomoi ezali bongo lisano mpamba mpo na Yesu te. Mawa mpe mayoki na motema oyo amonisaki na libaku yango emonisi polele mposa na ye makasi ya kosilisa mabe nyonso euti na liwa.
Lokola Yesu azali ‘mpenza elilingi ya bomoto na Jéhovah Nzambe ye moko’, tokoki, na kozanga ntembe, kozela ete Tata na biso na likoló azala mpe bongo lokola. (Baebele 1:3) Mpo na mokano na Jéhovah na ntina na kosekwisa bato, mosembwi Yobo alobaki: “Soko moto akokufa, akobika nde lisusu? . . . Okobianga mpe ngai nakozongisela yo. Okozala na mposa mpo na mosala na maboko na yo.” (Yobo 14:14, 15). Liloba na ebandeli oyo ebongolami na “okozala na mposa” emonisi mposa monene. (Genese 31:30; Nzembo 84:2). Emonani mpenza ete, na mposa nyonso Jéhovah asili kobanda komeka liboso ndenge eleko ya lisekwa ekozala.
Tokoki mpenza kondima elikya ya lisekwa? Ntembe ezali te ete Jéhovah na Yesu bazali bobele na mposa te, kasi bazali lisusu na makoki ya kosala yango. Yango elimboli nini mpo na yo? Elingi koloba ete liboso na yo, ozali na elikya ya kokutana na balingami na yo baoyo basili kokufa, bobele awa na mabelé epai kimya ekozala.
Yango nde ezali sikawa elikya ya Roberta (oyo etongamaki na lisolo ya liboso). Bambula mingi nsima na liwa na mama na ye, ba Témoins de Jéhovah basalisaki ye na koyekola Biblia na bozindo. Azali komikundola ete: “Nsima na koyekola elikya na lisekwa, nalelaki. Ezalaki kitoko koyeba ete nakomona mama na ngai lisusu” Soki, lokola Roberta, motema na yo ezali na mawa mingi nsima na kufa ya molingami na yo, ntembe ezali te ete okolinga mpenza koyekola makambo mingi likoló na elikya oyo kitoko. Ntina makasi ya kozala na elikya oyo, etalelami na bolai na nkasa 18 kino 28 ya zulunalo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala lisolo “Tózala na kondima mpo ma bomoi ya seko”, nkasa 23 kino 28.
b Longwa na ntango oyo Yesu apesaki elaka oyo ekomami na Yoane 5:28, 29 kino liwa na Lazare, na kati wana Yesu asekwisaki mwana mobali na mwasi mokufeli-mobali na mboka Naina mpe mwana mwasi na Yailo.Luka 7:11—17; 8:40-56.
c Tala “Bikamwiseli bisalamaki solo?” na mokapo 6 ya mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, oyo ebimisamaki na Watch Tower Bible and Tract Society of New York, lnc.
d Toyeba ete ezali mobu na greke klaio, “kolela na makelele”, nde esalelamaki mpo na koloba na ntina na Yesu wana asakolaki mpo na kobebisama na Yelusaleme. Kati na lisolo na ye, Luka alobi: “wana ezalaki ye kobelema na mboka (Yelusaleme) atalaki yango, mpe alelaki mpo na yango.”—Luka 19:41.
[Elilingi na lokasa 5]
Na kosekwisaka mwana mwasi na Yailo, Yesu apesaki ntina makasi ya kondima lisekwa ekoya.
[Elilingi na lokasa 6]
Yesu atungisamaki mingi na liwa ya Lazare.
[Elilingi na lokasa 7]
Baoyo nyonso bakozala wana na ntango ya lisekwa bakoyoka esengo lokola mwasi mokufeli-mobali na mboka Naina, wana Yesu asekwisaki mwana na ye ya mobali.