Masolo ya basakoli ya Bokonzi
‘Nsango malamu euti na mboka mosika’
◻ WANA ezalaki bango kosakola na malili makasi na Groenland, Batemwe bakutanaki na elenge mobali moko Monorvégien oyo andimaki kozwa mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création?, kasi asepelaki mpenza mingi te. Ntango Batemwe bazongaki lisusu na mboka epai kuna azalaki kofanda, alobaki na bango ete atangaki mokanda yango mbala mingi mpe azalaki na mposa ya mosusu. Azwaki mikanda mwa mingi mpe ba brochures epai na Batemwe, kasi ayokaki mawa ntango Batemwe bayebisaki ete bakozonga se nsima na mbula moko. Ata bongo, akomaki adresse na bango. Sanza moko na nsima, nani akendaki kobeta na ekuke na Batemwe yango? Elenge Monorvégien! Ayebisaki bango ete mpo na kokoma kino epai na bango, azwaki naino kitukutuku na ye oyo ekotambolaka na baglase mpo na kokoma kino esika masuwa na ye ezalaki. Kasi glase ebukanaki na kilo ya masuwa, mpe na nsima yango esengaki ye ngonga motoba na masuwa mpo na kokoma na esika azalaki kokenda. Ayaki mpo ete alingaki kozwa mikanda mosusu mpe kosolola na ntina na solo. Ayanganaki na likita moko ya boklisto na mpokwa wana, mpe azwaki bibongiseli mpo na koyangana na yango mbala moko na sanza. Ayaki mpe koyangana na ntango na vizite ya mokengeli na zongazonga, likambo yango elendisaki ye mingi. Nsima na yango, alongwaki na Lingomba na ye, mpe sikawa azali kosakola nsango malamu na mboka na ye. Na ntango na hiver, soko glase ezali kopekisa ye na kokende makita na masuwa na ye, azwaka hélicoptère; nzokande kosala mobembo na nzela yango ezali kosenga ye abimisa 900 francs français.
Bato boni kati na biso, basalaka milende motindo boye mpo na kokola na mosala ya Nzambe?
◻ NA Madagascar, bato mingi bazali koyamba nsango malamu. Basakoli ya Bokonzi bazali se 3 200, kasi bato 16 205 bayanganaki na Ekaniseli na liwa na Klisto. Kuna, Batemwe bazali kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kosakola nsango malamu na bato banso bafandi na esanga na bango.
Na ndakisa, basakoli 17 kati na basakoli 30 ya lisangá ya Isaonjo, basalaki ebongiseli mpo na kokenda kosakola na teritware oyo ezali mosika na bango. Balongwaki na mboka na bango na 12h30 ya butu, mpe batambolaki ngonga mibale na makolo kati na banzela ya bangombangomba mpe etonda na potopoto. Nsima na yango bakotaki na zamba monene na 2h30 ya ntongo. Lokola molili ezipaki zamba mobimba, bandeko babetaki mabaku na mabanga, bamosusu batambolaki kati na mai efandaki na mabulu esalama na mabanga. Ezalaki na basonzo kati na zamba mpe banyama mikemike oyo eswaki bango. Mingi kati na bandeko basi bakokaki te kokanga motema na ndenge baswaki bango. Mbala mosusu, potopoto ezalaki kokoma kino na mabolongo na bango. Bango nyonso zomi na nsambo, bamonaki mpasi, kasi na nsima babimaki na zamba na 6h30!
Na 6h45, basakoli yango babandaki kosakola. Bato mingi bayambaki bango malamu. Mwasi moko ya mokonzi na lingomba ya protesta aboyaki koyamba bango liboso. Alobaki: “Nazali na lingomba na ngai; ekoki. Nayebi Biblia mobimba.” Nsima na yango, aboyaki mpenza nimero moko ya La Tour de Garde oyo mosakoli alakisaki ye. Alobaki: “Nazali na mikanda mingi ya kotanga.” Nsima na yango abandaki kotuna mituna: “Bino bozali banani? Bouti wapi? Nani atindi bino?” Ntango Batemwe balimbolaki ye na bopolo nyonso mpe na mokuse nyonso oyo basalaki mpo na kokoma na mboka na ye, mwasi yango, andimaki kozwa La Tour de Garde, mpe alobaki: “Nasombi yango. Nani ayebi? Mbala mosusu Nzambe nde atindi bino.”
Na 13h30, Batemwe 17 batikaki teritware, mpe bazongaki epai bautaki, kasi mbala oyo basalaki se ngonga 4 mpo moi ezalaki. Balembaki, kasi basepelaki mpe bilongi na bango bitondaki na esengo. Balobaki: “Mpo na biso, elingi koloba mpo na basakoli 17 ya lisangá ya Isaonjo oyo basalaki mobembo yango, wana ezalaki mokolo monene.”
Ntembe ezali te, elimo ya Jéhovah epusaka basaleli oyo bamipesi epai na ye na kosakola nsango malamu ya Bokonzi “kino na bisika bileki mosika na mabelé”, mpe bato mingi bazali koyanola na milende ya Batemwe yango, oyo ebongi mpenza kokumisama.—Misala 1:8.
[Elilingi na lokasa 31]
Libongo ya Umanak, Groenland.