Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/7 nk. 26-27
  • Nkolo oy bato bazali koluka azali koya mpo na lisambisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkolo oy bato bazali koluka azali koya mpo na lisambisi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazali kotiola nkombo na Nzambe
  • Lisambisi mpe kopetolama
  • Mokolo na Jéhovah mozali koya!
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Malaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokanda ya Biblia nimero 39—Malaki
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Nani akobika na mokolo ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • ‘Lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te’
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/7 nk. 26-27

Mateya mauti na Makomami; Malaki 1:1 kino 4:6

Nkolo oyo bato bazali koluka azali koya mpo na lisambisi

KOSALELA Nzambe ezali mosala mpamba.” (Malaki 3:14) Tala likambo oyo libota na Nzambe bazalaki koloba kozalaka na ntembe kati na motema na bango na eleko ya mosakoli Malaki, na ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso. Mpo na nini bazalaki kobimisa maloba motindo oyo? Mpamba te makambo ya mawa mazalaki komonana mingi na Yuda, mingimingi katikati na banganga, oyo likanisi na bango ya liboso ezalaki ya komizwela matomba ya moimi. Malaki atondolaki bokosi ya bakonzi wana ya mangomba mpe akebisaki libota ete Nkolo azali koya mpo na lisambisi.​—Malaki 1:6-8; 2:6-9; 3:1.

Esakweli ya Malaki ezali mpe kokokana na mikolo na biso. Na bongo tozali mpenza na ntina ya solo ya kotalela batoli to mateya oyo mazali kati na yango.

Bazali kotiola nkombo na Nzambe

Jéhovah azali kozela ete basaleli na ye basalela ye mosala ya kitoko koleka. Nzambe ayebisi naino liboso bolingo oyo azali na yango mpo na basaleli na ye. Nzokande, banganga bazali kotiola nkombo na ye na kondimaka na maboko ya bato banyama oyo bakufi miso, banyama bazali na bokono to mpe batengumi mpo na mbeka. Jéhovah azali kosepela te na banganga wana ya lokoso to na makabo na bango ya mabe oyo bazalaki kopesa ye. Kasi, atako likambo nini bakosala, ‘nkombo na Jéhovah ekolonga kati na mabota’.​—1:1-14.

Bateyi bazali na mokumba monene. (Yakobo 3:1) Banganga ‘babetisaki bato mingi libaku mpo na mobeko’. Ndenge nini? Mpo bazangaki koteya libota kati na mobeko ya Nzambe mpe bamonisaki ezalela ya koponapona. Jéhovah azali mpenza na lotomo ya kozala na nkanda mpo na bango, “mpamba te ezali bibebu na nganga nde bisengeli kobatela boyebi, mpe ezali na monoko na ye nde basengeli koluka mobeko”.​—2:1-9.

Koboya kotosa mibeko mitali libala, ezali ngambo monene liboso na Jéhovah. Mibali na Yuda bakamataki basi bapaya mpo na libala, kobukaka bongo mobeko na Nzambe. (Deteronome 7:3, 4) Basalaki na bokosi liboso na basi ya bolenge na bango na kokabwanaka na bango. Malaki akebisi.bango ete Jéhovah “ayini kolongolama ya mwasi na libala”.​—2:10-17.

Lisambisi mpe kopetolama

Jéhovah akopesa nzela libela te na mabe. “Nkolo” akoya kati na tempelo na ye, elongo na “ntoma na kondimana”. Akopetola mpe akongalisa bana na Levi. Jéhovah akokoma motatoli ya nokinoki liboso na bandoki, bato na pite, baoyo balapaka ndai ya lokuta, baoyo bazali kosala na bokosi mpe bazali konyokola bazalani.​—3:1-5.

Baoyo bazali koboya kopesa makabo epai na Jéhovah bazali komikomisa babola. Jéhovah abongwanaka te. Soki basaleli na ye oyo bazali batomboki bazongi epai na ye, akozongela bango na mawa nyonso. Batomboki yango bazali koyiba Nzambe na koboyaka kopesa ndambo moko na zomi mpe makabo. Kasi soki balingi kosala yango, Jéhovah alaki kopambola bango “kino ete bakozanga lisusu eloko te”. Na ntembe te bakobuka mbuma malamu kati na elanga.​—3:6-12.

Miso na Jéhovah mazali likoló na basaleli na ye, Nzambe azali na likambo epai na baoyo bazali koloba maloba mabe to ya makasi na ntina na ye. Nzokande, azali kotia likebi monene epai na baoyo bazali kobanga ye. “Mokanda na kokanisa” mokokomama mpo na “baoyo bazali kokanisa mpo na nkombo na ye”. Libota na Nzambe bakomona likeseni kati na moyengebene mpe moto mabe.​—3:13-18.

Mokolo na Jéhovah mozali koya!

Mokolo na Jéhovah mokolimbola kobomama ya libela mpo na bato mabe. Mokolo na Jéhovah mozali koya, mpe bato mabe bakozikisama lokola matiti kati na móto makasi. Bakoliama, na boye ete “ata mosisa to etape” moko te ekotikala mpo na bango. Mpo na baoyo bazali kobanga nkombo na Jéhovah, bakozwa libiki oyo “moi na boyengebene” ememi. Liboso na koya ya mokolo monene yango, Jéhovah akotinda Eliya, mosakoli, mpo na kosala mosala ya kotelemisa lisusu.​—4:1-6.

Mateya mpo na eleko na biso: Mpo na oyo etali losambo, Jéhovah azali kosenga epai na basaleli na ye ete bapesa ye biloko na bango ya motuya. (Tala Matai 22:37, 38) Baoyo bazali koteya Liloba na Nzambe bazali na mokumba monene ya koteya bamosusu na lolenge esengeli mpe kotambwisa bango kati na losambo ya solo. Toyeba lisusu ete miso na Nzambe ya boyengebene mazali likoló na baoyo baboyi kotosa mibeko na ye mpo na libala mpe likoló na baoyo bazali kosala mabe. Tomitika kopetolama mpe kongalisama na bopolo nyonso epai na Nkolo na kozelaka na motema moto “mokolo monene mpe na nsomo na Jéhovah”!

[Etanda na lokasa 26]

KOTALELAMA YA MWA MIKAPO NA BIBLIA

○ 1:10​—Banganga na moimi mpe na lokoso bazalaki kokokisa mosala na bango mpo na litomba. Bazalaki kosenga lifuti mpo na misala mikemike oyo bazalaki kosala na tempelo, na ndakisa kokanga bikuke to kopelisa móto likoló na etumbelo. Tosengeli kokamwa te ete Jéhovah ‘azalaki kosepela te na libonza ya maboko na bango’!

○ 1:13​—Banganga bazangi sembo bakomaki kotalela mbeka lokola milulu ya kolembisa, lokola mitungisi. Tokeba ete tokaba “mbuma na bibebu na biso” na mitema mibale te!​—Hosea 14:2; Baebele 13:15.

○ 2:13​—Bayuda mingi bazalaki kokabwana na basi ya bolenge na bango, mbala mosusu mpo na kobalana na bapakano oyo bazalaki bilenge koleka bango. Etumbelo na Jéhovah etondaki na mai ya miso mbala mosusu, na oyo ya basi oyo balongolamaki na mabala baoyo bazalaki koya na esika ya bosantu mpo na komonisa mawa na bango epai na Nzambe.​—Malaki 2:11, 14, 16.

○ 3:1​—“Nkolo oyo bato bazalaki kozela” azali Jéhovah Nzambe, mpe “ntoma na kondimana, Yesu Klisto. Esakweli wana ekokisamaki mpo na mbala ya liboso ntango Yesu apetolaki tempelo. (Malako 11:15-17) Asalaki yango mbula misato na ndambo nsima na kopakolama lokola Mokonzi oyo aponami. Motindo moko mpe, mbula misato na ndambo nsima na kofandisama na kiti ya bokonzi penepene na sanza ya Octobre na 1914, Yesu akotaki elongo na Jéhovah kati na tempelo ya elimo mpe amonaki ete libota na Nzambe bazalaki na mposa ya kopetolama mpe kongalisama.

○ 3:2, 3​—Mwango mpo na kopetola oyo basalelaki na ntango ya Kala ezalaki molai. Yango wana, mbala mingi, mopetoli ‘azalaki kofanda’ mpe azalaki kozela ete ebende oyo etiami na móto mpo na kolembisa yango ete emonisa bililingi lokola talatala oyo ebongisami malamu, na boye ete elongi na ye emonana kati na yango. Motindo moko mpe, na eleko na biso, Jéhovah akobaki kopetola basaleli na ye na kolongola bango mateya mpe misala na mbindo, likambo oyo esalisaki bango na komonisa malamu bizaleli na ye.​—Baefese 5:1.

○ 4:2​—Maloba oyo mazali komonisa mapamboli oyo bato bazali kobanga nkombo na Nzambe bakozwa. Bazali na elikya ya kozwa ngolu na Nzambe oyo emonisamaki na elilingi na moi ntango libota na bato ekobikisama na bampasi ya mosuni, ya motó mpe ya makanisi oyo ezali kotungisa bango.​—Emoniseli 21:3, 4.

○ 4:5​—Mosakoli Eliya azalaki na bomoi penepene na mibu 500 liboso ete esakweli oyo epesama. Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Yesu Klisto amonisaki Yoane mobatisi lokola ete azali Eliya yango oyo ayebisamaki. (Matai 11:12-14; Malako 9:11-13) Nzokande, “Eliya” asengelaki koya liboso na “mokolo na Jéhovah”. Yango emonisi ete esakweli yango ekokokana lisusu na eleko na biso, eleko oyo ya “kozonga” na Klisto.​—2 Batesalonike 2:1, 2.

[Elilingi na lokasa 27]

Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu apetolaki tempelo. Na 1918, ayaki elongo moko na Jéhovah kati na tempelo ya elimo mpo na kopetola libota na Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto