Mibali, bomonisa bolingo mpe limemya
‘Tika ete moko na moko na bino balinga mwasi na ye lokola ye moko.”—BAEFESE 5:33.
1, 2. (a) Likambo ya divorce to koboma libala ekomi ndenge nini lelo kati na mokili? (b) Nzokande, babalani mingi bazali kolonga na kosala nini?
ESILI koleka mwa bambula, zulunalo moko (Psychology Today) elobaki boye: “Mbula na mbula, divorce ezali kotya nsuka na bandoto kitoko kati na mabala koleka milió moko [ya ba Amerike]; na Etats-Unis, mwayene ya boumeli ya mabala ezali bobele mibu 9,4. . . . Mbala mosusu, emonanaka ete mabala ya esengo mazali te kati na mokili yango.” (Juin 1985) Soki totangi mikóló mpe bana kati na mabala oyo makufi, yango ekokisi motuya soko 3 milió mbula nyonso baoyo batungisami na likambo oyo bobele na mokili moko wana. Nzokande, motuya na mabala makufi soki mpe divorce ezali kobakisama makasi kati na mokili mobimba. Tokoki kosukisa na yango ete bolingo mpe limemya ezangi kati na mabala mingi.
2 Nzokande, “totiki etuluku mosusu pembeni: yango esalami na babalani oyo, na motindo moko to na motindo mosusu, bazali kosala nyonso mpo na kobatela libala na bango, mpe eloko moko te ekoki kokabola bango, longola bobele liwa”. (Psychology Today) Ya solo, bamilió mingi ya babalani bazali kosala nyonso mpo na kobatela bomoko na bango.
3. Mituna nini tokoki komituna?
3 Ezali boni mpo na libala na yo? Kati na yo mpe mobali na yo, bolingo mpe limemya ya solosolo ezali? Bomoko mpe bolingo ya solosolo ezali kati na yo mpe bana na yo? To bozalaka nde kokimana mpe koyokisana nkanda? Lokola biso banso tozali na kokoka te, mikakatano mikoki kobima ata na libota nini, ata na mabota oyo basangani na yango nyonso bazali kosala makasi na komitambwisa lokola baklisto. “Bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.”—Baloma 3:23.
4. Lokola emonisaki yango Paulo mpe Petelo, nani libosoliboso azali na mokumba ya kobatela libota ete ezala ntango nyonso na esengo?
4 Lokola libota moko te ezangi mikakatano, nani azali na mokumba ya kobatela kimya mpe boyokani na kati na libota? Toli oyo ntoma Paulo mpe ntoma Petelo bapesaki kati na mikanda na bango ekoyanola motuna oyo. Paulo akomaki: “Nde nalingi ete bososola ete motó na babali nyonso azali Klisto mpe ete motó na mwasi azali mobali mpe ete motó na Klisto azali Nzambe.” Lisusu: “Botosanaka mpo na kobanga Klisto. Bino basi botosaka babali na bino pelamoko epai na Nkolo mpo ete mobali azali motó na mwasi pelamoko Klisto azali motó na lisangá. Bino basi botosaka babali na bino pelamoko Klisto azali motó ya lisanga.” (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:21-23) Bobele bongo [na kolandaka ndakisa ya Klisto,] bino basi, botosaka babali na bino.”—1 Petelo 2:21 kino 3:1.
Klisto: ndakisa oyo ezali kolendisa biso
5, 6. Ndakisa nini Yesu Klisto apesaki na lolenge na ye ya kosalela bokonzi?
5 Lokola emonisami na batoli oyo euti kopesama, engebene Makomami, mobali nde azali motó to mokonzi ya libota. Kasi yango elimboli nini? Ndenge nini asengeli kosalela bokonzi na ye? Mobali akoki kosenga na makasi ete batosa ye mpo ete ye azali ‘mokonzi ya libota’ mpe ete ‘Biblia elobi bongo’. Kasi kosalaka bongo mbele akolanda ndakisa ya Klisto? Klisto asengaki na makasi epai na bayekoli na ye ete batosa ye? Asila kolobela bango na lolendo maloba lokola oyo: “Awa, nani azali Mwana na Nzambe? Bosengeli kotosa ngai!” Te, asalaki boye te; bizaleli na ye malamu, yango nde epusaki bayekoli na ye ete bazala na limemya epai na ye mpe batosa ye. Na motindo nini? Lokola touti koloba yango, na kopesaka ndakisa malamu na etamboli na ye, na maloba na ye, mpe na mawa na ye.—Malako 6:30-34.
6 Ezali bongo na kolanda ndakisa na Yesu Klisto nde mobali mpe tata akoki kosalela malamu bokonzi na ye. Atako abalaki te, Yesu atikaki ndakisa malamu epai na mibali na lolenge oyo azalaki kosalela bayekoli na ye. Oyo ezali lisengami monene epai na batata nyonso ya mabota, mpamba te Yesu azali ndakisa ya kokoka. (Baebele 4:15; 12:1-3) Soki mobali azali kolanda ndakisa ya Klisto penepene, libota na ye bakozala na bolingo mozindo mpe limemya mozindo epai na ye.—Baefese 5:25-29; 1 Petelo 2:21, 22.
7. Elendiseli nini Yesu apesaki na bayekoli na ye, mpe liziba na yango ezalaki nani?
7 Mokolo moko, Yesu alobaki epai na bibele: “Boya epai na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; mpo ete ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.” Azalaki bongo kopesa nini epai na bayoki na ye? Elendiseli na elimo. Kasi liziba na yango wapi? Liboso na yango, Yesu alobaki: “Moto ayebi Tata te bobele Mwana na ye oyo Mwana andimi ete amonisa ye.” Na maloba yango, Yesu amonisaki ete akopesa libondisi ya elimo epai na bayekoli na ye ya solo na koyebisaka bango makambo matali Tata na ye. Kasi alobaki mpe ete kobondisama yango ekozwama na kolanda ye, mpamba te ye azali “na bopolo mpe na motema mosokemi”.—Matai 11:25-30.
Ndenge nini okoki kozala mobali mpe tata oyo ayebi kolendisa
8. Motindo nini mobali mpe tata asengeli kozala liziba na elendiseli?
8 Maloba na Yesu masalisi biso na kokanga ntina ete mobali moklisto asengeli kozala liziba na elendiseli mpo na libota na ye mpe na kolakisaka bango na bopolo, asengeli kosalisa bango ete bayeba malamu Tata ya likoló. Etamboli na ye esengeli komonisa ete azali kolanda elimo mpe misala ya Mwana ya Nzambe. (Yoane 15:8-10; 1 Bakolinti 2:16) Oyo nde kobondisama na kofanda elongo na moto oyo azali mobali, tata mpe moninga na bolingo mingi! Ekoki ete azala moyoki, amonisa te ete azali okipé, kino kozanga ntango ya koyokamela basangani ya libota na ye. Ee, asengeli kozala moyoki malamu.—Yakobo 1:19.
9. Mokakatano nini bankulutu na masangá bakutanaka na yango mbala mosusu?
9 Yango epusi biso kolobela mokakatano moko oyo mbala mosusu bankulutu mpe mabota na bango bakutanaka na yango. Nkulutu azalaka na mosala mingi mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya lisangá. Esengeli mpo na kopesa ndakisa malamu mpo na oyo etali makita ya boklisto, mosala ya kosakola mpe mosala ya kobatela bampate. (Baebele 13:7, 17) Nzokande, bankulutu mosusu bazali mpenza koboma nzoto mpo na lisangá mpe bakomi bongo na bopoto na makambo matali libota na bango; ezaleli yango ekoki kobimisela bango mikakatano mingi. Na ndakisa, nkulutu moko amonaki ete azali mpenza okipé, kino kozanga ntango ya koyekola elongo na mwana na ye, bongo apesaki ye na ndeko mosusu ete ayekolaka na ye!
10. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalela bokonzi na bango na bokatikati, na lisangá mpe na libota na bango?
10 Ndakisa oyo emonisi nini? Emonisi ete nkulutu asengeli kozala na bokatikati mpenza kati na mikumba na ye na lisangá mpe mikumba na ye epai na mwasi na ye mpe bana na ye. Na ndakisa, mbala mingi bankulutu batikalaka nsima na makita. Soki ekoki kosalema, mbele ekozala libondisi mpo na mwasi na ye mpe bana na ye soki akosenga na ndeko mosusu ete akenda kotika bango na ndako, na esika ete azelisa bango ntango molai na Salle du Royaume. Na boyokani na masengami ya Biblia, tokoki koloba ete ‘mosala ya mobateli na mpate ebandi kati na libota na ye’. Soki nkulutu azali kotalela makambo na libota na ye te, yango ekoki komonisa ete okokisi lisusu masengami te mpo na kokokisa mokumba yango. Na yango, bino bankulutu, botalelaka basangani ya libota na bino mpe bokokisaka bamposa na bango, mingimingi bamposa ya elimo mpe ya mayoki.—1 Timote 3:4, 5; Tito 1:5, 6.
11, 12. Ndenge nini mobali moklisto akoki kozwa lisungi na libota na ye, mpe mituna nini akoki komituna?
11 Mobali moklisto oyo azali liziba na elendiseli mpo na libota na ye, akozala kosala makambo na makasi te, akozala mpe monyokoli te. Akosala te ete akamata bikateli nyonso ye moko kozanga kotuna libota na ye. Makambo mingi masengaka kozwa bikateli, ndakisa kosanze mosala, kosanze ndako to mboka; mosusu mpe ezali bobele bikateli mike, ndakisa kopona lisano moko mpo na libota ete banyolisa nzoto. Lokola ekateli motindo oyo etali basangani nyonso ya libota, mobali mpe tata akomonisa ete azali na mayele mpe na boboto na kotunaka likanisi na bango nyonso. Soki ayebi likanisi na bango, wana akokamata ekateli eleki na mayele, ekanisami malamu. Na motindo yango, ekozala petee mpo na libota na ye mobimba ete basimba bikateli na ye.—Tala Masese 15:22.
12 Nyonso oyo touti koloba emonisi ete mokumba na yo, mobali mpe tata moklisto, esuki te bobele na kopesa disipline kati na libota. Osengeli mpe kozala liziba na elendiseli. Mpo na yango, ozali kolanda ndakisa ya Klisto? Ozali liziba na elendiseli mpo na libota na yo?—Baefese 6:4; Bakolose 3:21.
Bofanda na basi na bino kososola na mayele
13. Toli nini kitoko mingi Petelo apesi yango na mibali?
13 Lokola tolobaki yango mwa liboso, Petelo mpe Paulo bapesaki toli malamu mingi epai na babalani baklisto. Lokola Petelo ye moko azalaki moto asila kobala, azalaki bongo na makoki mibale mpo na kopesa bango toli: eksperianse, mpe kotambwisama na elimo santu. (Matai 8:14) Apesaki toli makasi epai na mibali nyonso, kolobaka na bango: “Bino mibali lokola, bozalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bopesa lokumu epai na bango.” Libongoli ya J. Wand ebongoli eteni yango boye: “Bobele bongo, mibali basengeli kosalela mitinda ya boklisto na mayele kati na boyokani na bango elongo na basi na bango.”—1 Petelo 3:7.
14. Mituna nini mizali sikawa kotunama?
14 Elimboli nini kofanda na mwasi na yo “kososola na mayele”, to “kosalela mitinda ya boklisto na mayele”? Motindo nini mobali akoki kokumisa mwasi na ye? Ee, ndenge nini mobali moklisto asengeli kokanga ntina na toli oyo ya Petelo?
15. (a) Mpo na nini mabala mosusu mazali kopanzana? (b) Wapi likambo lizali lokola ntembe ya kolonga kati na libala?
15 Mabala mingi masalemi bobele mpo na kolulana na nzoto mpe mposa ya kosangana. Nzokande kitoko ekoki te, bobele yango moko kopesa makasi na libala, mpamba te kitoko ekoumelaka se ntango moke. Baoyo basili kobala uta mbula mingi bakomi sikawa na nsuki mpembe mpe elongi ebandi kofinana to kobimisa misisa. Kasi tobosana te ete libala ezali lisangana ya elimo mibale, bomoto mibale, kobokwama mibale, lolenge mibale ya komonela makambo mpe lolenge mibale ya koloba. Yango ezali lokola ntembe monene oyo bosengeli kolonga! Esengeli kokanga ntina na yango mpo na kozwa bolamu kati na libala.—Masese 17:1; 21:9.
16. Elimboli nini ‘kofanda na ye kososola na boyebi’?
16 Mpo na moklisto, kofanda na mwasi na ye “kososola na mayele” elimboli kati na makambo mosusu koyeba mpenzampenza bamposa na ye, bobele ya mosuni te, kasi mpe, oyo eleki ntina, bamposa na ye ya mayoki, ya makanisi mpe ya elimo. Soki ‘akofanda na ye kososola na boyebi’, akokanga ntina malamu na mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Yango elimboli mpe ete akokumisa mwasi na ye. Bato mosusu na eleko na Petelo bazalaki na likanisi oyo te, mpamba te na miso na bango “basi batiolamaki, batalelamaki lokola eloko mpamba, eloko ya mbindo”. (The Anchor Bible.) Libongoli moko ya Makomami na ntango na biso ebongoli maloba ya Petelo boye: “Bino mibali, bofanda elongo na basi na bino na kotalelaka bango ete bazali petepete; bozala na limemya epai na bango.” (Français courant) Ezali toli moko malamu mingi oyo mbala mosusu mibali babosanaka yango.
17. (a) Mpo na makambo nini basi bazali na “motau” mpe ‘petepete’? (b) Na ndakisa, lolenge nini mobali akoki komonisa limemya mpe kokumisa mwasi na ye?
17 Na nini mwasi azali ‘petepete’? Ndakisa, likabo ya kobota oyo epesameli ye esalaka mbongwana kati na nzoto na ye mikolo mingi sanza na sanza. Na mikolo yango, akozalaka na bolembu to mpe na mayoki malamu te. Soki mobali na ye azali kokipe yango te mpe azali kosenga na ye ete asala misala nyonso lokola na mikolo misusu ya sanza, wana ekomonana ete mobali azali komemya mwasi na ye te mpe azali kokumisa ye te. Wana azali kofanda na ye na bozoba mpe na moimi, kasi na kososola na mayele te.—Levitike 18:19; 1 Bakolinti 7:5.
Ndenge nini kokumisa mbeki ya bomwasi
18. (a) Momeseno nini ya mabe ezalaka na mibali misusu? (b) Mobali moklisto asengeli kosalela mwasi na ye makambo ndenge nini?
18 Mobali akoki komonisa bolingo mpe limemya epai na mwasi na ye na lolenge oyo mosusu: na kolakisaka ye mpe na kolobaka na ye ete alingi ye, ete asepeli na bizaleli na ye. Soki mobali azali na momeseno mabe ya kobimisa mabunga ya mwasi na ye, to kosalela ye liseki mbala na mbala, na kokanisaka ete yango ekoki kosepelisa ye, kosalaka bongo ekozala malamu te. Mpamba te, soki azali ntango nyonso komonisa ete mwasi na ye azali zoba, bakomituna mpo na nini abalaki ye. Mobali oyo akosala na motindo boye azali nde ye moko zoba. Mobali oyo azali na bolingo mingi akopesaka limemya na mwasi na ye.—Masese 12:18; 1 Bakolinti 13:4-8.
19. Mpo na nini ebongi te na mobali kokitisa mwasi na ye to kotanga ya eloko mpamba?
19 Na mikili misusu, mibali bazali na momeseno ya kolakisa basi na bango lokola eloko mpamba, mpo bamonisa ete bazali na bopolo. Na motindo yango, babali mosusu bajaponé balakisaka basi na bango epai na bapaya ete “Gusai”, elingi koloba ‘mwasi zoba to elema’, mokano na bango ezali ete mopaya akoka koloba maloba ya makumisi mpo na kotombola mwasi. Kasi yango ezali motindo oyo mobali moklisto akoki kosalela mpo na kolakisa mwasi na ye? Kosalaka bongo, tokoki koloba ete ‘azali kopesa ye lokumu’, engebene toli ya Petelo? Epai mosusu, wana mbele ekozala maloba ya solo epai na mozalani na ye? Akanisi solo ete mwasi na ye azali zoba?—Baefese 4:15, 25; 5:28, 29.
20. Ezaleli nini ya kokesena epai moko mpe epai mosusu mobali akoki kozala na yango epai na mwasi na ye? (b) Ndenge nini akoki kopengola yango?
20 Mobali akoki lisusu kozanga bolingo mpe limemya epai na mwasi na ye soki abosani ete mwasi na ye azali mpe ndeko na ye ya mwasi moklisto, bobele na Salle du Royaume te, kasi mpe na ndako mpe na esika nyonso mosusu. Mbala mingi na esika ya makita tozalaka na boboto mpe na maloba kitoko, kasi na ndako tokomi na maloba makasi mpe kozanga bopolo! Toli oyo ya Paulo ebongi solo: “Bongo, tolanda makambo makoyeisa kimya mpe makolendisa bomoi na biso nyonso.” Moto na moto kati na biso asepelisa mozalani na ye mpo na malamu na ye ete akembisa ye [alendisa ye].” (Baloma 14:19; 15:2) Nzokande, ozali na mozalani mosusu na penepene koleka mwasi na yo?
21. Eloko nini mibali bakoki kosala mpo na koyikisa basi na bango mpiko?
21 Mobali moklisto oyo azali na bolingo mingi akomonisa bongo na maloba na ye mpe na misala na ye ete azali komemya mwasi na ye mpe kosepela na ye. Ezali yango elobaki mokomi moko na maloba kitoko ete:
“Atako mwa kosikila moke ezali,
Atako mwa mitungisi ezali,
Soki olingi mwasi na yo
-Lobela ye yango! . . .
Mpo ete libela okozala mobali na ye,
Bobele wa yo,
Kozela te ete okoma yango na libanga na liyita
-Lobela ye yango”
Na ntango ya kalakala, mama ya mokonzi Lemuele alobaki mayoki motindo moko oyo. Tala ndambo na maloba na ye mpo na mwasi malamu: “Bana na ye bakotelema mpe bakobianga ye mopambwami; mobali na ye lokola mpe, ye akosanzola ye ete, Bana basi mingi basali na sembo nde yo oleki bango nyonso.” (Masese 31:1, 28, 29) Mibali, bokumisaka ntango nyonso basi na bino, to bosalaka yango bobele ntango bozaláká bafiansé?
22, 23. Libala ya esengo etongami likoló na nini?
22 Mwa boyekoli oyo mokuse elakisi ete mpo na komonisa bolingo mpe limemya epai na mwasi na ye, mokumba ya mobali esuki te bobele na komema mbongo na ndako. Libala ya esengo etongami likoló na boyokani ya bolingo mingi, ya bosembo mpe ya boboto. (1 Petelo 3:8, 9) Na meko oyo bambula ezali koleka, boyokani yango esengeli kokola mpo na kokoma boyokani ya penepene koleka, wana mobali mpe mwasi bazali kosepela moto na moto na bizaleli ya mobali na ye, mpe kolimbisana mabunga to bolembu.—Baefese 4:32; Bakolose 3:12-14.
23 Soki mobali apesi ndakisa na komonisaka bolingo mpe limemya, libota mobimba bakozwela yango matomba malamu. Kasi ndenge nini mwasi moklisto akoki kosala mpo ete libota na ye ezwa matomba malamu? Lisolo elandi ekoyanola motuna oyo mpe mituna misusu oyo mikangami na yango.
Bozongeli
◻ Nani libosoliboso azali na mokumba ya kosala na motindo boye ete libala ezala na esengo, mpe mpo na nini?
◻ Ndenge nini mibali bakoki kozala liziba na elendiseli, na ndakisa na Klisto?
◻ Ndenge nini mobali moklisto akozala na bokatikati mpo na oyo etali mikumba na ye na lisangá?
◻ Ndenge nini mobali akoki ‘kofanda na mwasi na ye kososola na boyebi’?
◻ Elimboli nini ‘kokumisa mwasi na ye lokola mbeki ya motau’?
[Elilingi na lokasa 7]
Nkulutu oyo azali na bokatikati ayebi ete mosala na mobateli na mpate ebandi kati na libota.