Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/3 nk. 1-3
  • Bolanda koluka biloko ya motuya bibombami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolanda koluka biloko ya motuya bibombami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini esengeli koluka kozanga kolemba?
  • Bolukiluki oyo ekobimisa mbuma
  • Biloko na motuya ya elimo ezangaka te!
  • Tokoba kati na bolukiluki na biso
  • ‘Yehova apesaka mayele’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Esengo na moto oyo azwi bwanya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • “Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/3 nk. 1-3

Bolanda koluka biloko ya motuya bibombami

KANISA na biloko ya motuya monene bizwami kati na Liloba na Nzambe, Biblia. Biloko yango ya motuya bizali komonisa biso mokano ya Nzambe mpe bitye liboso na biso avenire kitoko. Biloko yango bizali kolendisa biso mpe bizali komonisa biso ndenge nini tokoki kondimama epai na Nzambe. (Baloma 15:4) Biloko yango ya motuya bizali mpe lisusu kosalisa biso na kozala na mayele kati na boyokani na biso elongo na bazalani na biso. Kozanga ntembe mpenza, mpo na mayele ya Nzambe, tozali kotambola na “nzela ya bomoi” na kozwaka esengo mpe bolamu..​—Nzembo 16:11; 119:105.

Tosengeli kotalela mayele lokola eloko moko ya ntina, mpamba te ezali kopesa bolamu mingi. Mayele oyo ekomi moto alobi boye: “Maloba nyonso na monoko na ngai mazali na boyengebene: likambo likunzami to na mabe ezali kati na yango te. Makozala nyonso polele epai na ye oyo asosoli, mpe alima epai na bango baoyo bakozwana na boyebi. Boyamba kolakisa na ngai kasi mosolo te; boyamba boyebi liboso na wolo eponami. Mpamba te mayele eleki mabanga na penini na malamu; biloko nyonso bikoki moto koluka yango ekopimama na yango te.”​—Masese 8:8-11.

Mpo na nini esengeli koluka kozanga kolemba?

Soki moto oyo azali kotimola mabelé mpo na koluka biloko ya motuya, wolo to mosolo azali mingimingi kozanga mokano na ye, yango ezali bongo te mpo na oyo amipesi na koluka mayele ya Nzambe. Kasi ndenge nini bolukiluki na biso ekoki kobimisa mbuma? Kolonga na yango ekobima engebene mokano na biso, mpe milende oyo tozali kotya kati na bolukiluki yango. Soki toyebi motuya nyonso ya mayele, tokopesa yango likebi na biso koleka eloko nyonso etikali. “Kozwa mayele eleki bozwi na wolo; kozwa bososoli eponami liboso na palata.”​—Masese 16:16.

Kati na Masese 2:1-6, tokuti elendiseli oyo: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ee, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola biloko na motuya bibombami; mbele okososola botosi na kotosa Jéhovah mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe. Mpo ete Jéhovah akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ekoutaka na monoko na ye.”

Eloko ya motuya oyo ekundami mozindo ekomonanaka te na libanda; esengeli koluka yango. Ezali na bato oyo mpo na kotimola mabelé, bazali kotika kominanola, kolya mpe kolala mpongi. Kasi soko bazwi eloko ya motuya oyo balingi, milende na bango ya solo ekozwa mbano. Tosengeli kozala na elimo motindo yango wana ezali biso koluka mayele na Nzambe. Soki esengeli na biso kotimola na makasi nyonso mpo na kozwa eloko ya motuya ebombami, esengeli na biso mpe molende motindo moko mpo na komona mayele. Esengeli te koleka Biblia mpe mikanda ya boklisto mbangombango. Kozwa biloko ya motuya bizali kati na Liloba na Nzambe ezali kosenga ntango, bolukiluki mpe kokanisa na mozindo. Kasi esengo na biso ekozala boni wana ekozwa biso mayele oyo ezali kouta na Nzambe!​—Nehemia 8:13.

Bolukiluki oyo ekobimisa mbuma

Baoyo bazali koyekola Liloba ya Nzambe mpo na kozwa biloko ya motuya oyo ezali bongo mayele, bazali na esengo. (Masese 3:13-18) Ezali bongo likambo ya mayele na kozala na biblioteke na yo moko to ya libota. Mikanda nini mikoki kozala kati na yango? Longola diksionere moko ya malamu, ba Témoins de Jéhovah bazali komona ete ekozala malamu na kozala lisusu na mabongoli makeseni ya Biblia mpe mikanda ya boklisto oyo mikolimbolaka Biblia, lokola banimero ya Mosenzeli (Tour de Garde) mpe Réveillez-vous! ya mibu mileki. Esengeli koyeba kosalela biblioteke yango soki tolingi ete esalisa biso na koluka biloko ya motuya.

Mpo na kozwa mayele, tokoki kosalela ba lndex ya mikanda ya la Société Watch Tower (masolo oyo masila kolobelama mpe mikapo ya Biblia) to index oyo ezali na nsuka ya mikanda mpe na nsuka ya ba réliés ya bazulunalo oyo ebimisami na la Société. Ba index yango ezali bisaleli minene mpo na kolukaluka mayele ya Nzambe. Tokoki kokokanisa yango na karte oyo ezali kolakisa esika nini “biloko na motuya” bizali, mayele ya Nzambe. (Masese 2:4) Soki tozangi mikanda misusu ya ntina mpo na bolukiluki na biso, tokoki kozwa yango na Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah na bisika tofandi.

Totala sikawa lolenge nini ya biloko na motuya tokoki kozwa. Na ndakisa wana ezali biso kotanga Biblia tomituni ndenge nini Yuda lskariote akufaki nsima na koteka Yesu Klisto. Kati na Matai 27:5, totangi ete Yuda “akei mpe . . . amikangisi nsinga na nkingo”. Kasi Misala 1:18 elobi ete “wana ekweaki ye motó liboso, apanzanaki makasi na katikati, mpe misopo na ye misopanaki? Na bongo Yuda akufaki motindo nini? Tokoki kozwa eyano na kosalelaka lndex (1981-1985) na ba versets mibale oyo, to na motó na likambo “Yuda lskariote” mpe motó na likambo oyo elandi “examen”. Batindi biso na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 868 kino 870. Na lokasa 870 totangi boye: “Matai alobi lolenge ya komiboma, kasi Misala emonisi nsuka. Soko tosangisi masolo yango mibale , emonani ete Yuda amekaki komibomba na likoló ya ngomba, bongo ntango nsinga ekatanaki, akweaki motó na nse mpe abetaki libumu na mabanga oyo mazalaki na nse mpe apasukaki. Etando ezali zongazonga na Yelusaleme epesi nzela na kondima makambo yango.”

Concordance ekosalisa na kozwa ba versets oyo ezali kolobela motuna moko ya sikisiki. Ya solo, ntango tozali kotalela verset moko, esengeli na biso koluka mpe kotalela ba versets ya zongazonga. Mpo na komonisa likambo yango polele, totalela Nzembo 144:12-14. Mokapo yango elobi boye: ‘Bana mibali na biso bazala na bolenge na bango pelamoko nzete ekokola alima mpenza; mpe ete bana basi na biso bazala pelamoko na mabanga matongami na nsuka na ndako, pelamoko yango ezali na ndako monene ya mokonzi, ete bibombelo na biso bitonda maa na biloko ndenge nyonso, ete mpate na biso babota nkoto nkoto mpe nkoto zomi kati na mokili polele na biso; ete bangombe na biso bakoma minene na zemi, kobuka ezali te mpe kobima ezali te, ete koimaima eyokama na nzela na biso te.’ Tokoki kokanisa ete maloba yango matali libota ya Nzambe, kasi ba versets ya zongazonga emonisi ete ezali ndenge yango te. Na verset 11, mokomi na nzembo Davidi asengi ete alongolama na baoyo bazali kokosa mpe bazali komikumisa mpo na bana na bango ya mibali mpe ya basi, mpo na bibwele na bango. Engebene verset 15, bato yango bazangi sembo bazali koloba: “Esengo ezali na bato baoyo bazali boye!” Nzokande, na bokeseni, Davidi angangi: “Esengo na libota oyo Jéhovah azali Nzambe na bango!”

Biloko na motuya ya elimo ezangaka te!

Ezali mpenza likambo ya esengo na kolonga kozwa bwanya to mayele. Kati na biloko ya motuya ya elimo oyo tokoki kozwa na nzela na bolukiluki ezali mpe na biyano ya kosepelisa oyo etali makambo na Biblia. Tokozwa biyano mingi soko tokopesa ntango mpo na kosala bolukiluki kozanga kolemba! Na ndakisa, oyebi soki epai wapi Kaina azwaki mwasi na ye? La Tour de Garde 1er Janvier 1982; Mosenzeli ya 1er Janvier 1983 ezali koyanola: “Biblia elobi ete Adam mpe Eva babotaki bana mingi, kasi bobele mibale te [Kaina mpe Abele]. ‘Mikolo na nsima na kobotama na Sete [mwana mobali mosusu] ezalaki mbula nkama mwambe mpe abotaki bana babali mpe bana basi.’ (Genese 5:4) Na kotalela makambo oyo, engebene yo, epai wapi Kaina azwaki mwasi na ye? Ee, esengelaki na ye, kobala moko kati na bandeko na ye ya basi. Lelo, libala motindo yango ekozala likama mpo na bana oyo bakobotama. Kasi na ebandeli ya lisolo na bato, ntango bato bazalaki naino penepene na ezaleli ya kokoka, ezalaki na yango mokakatano te.”

Toloba sikawa ete tozali kotanga mokanda ya Masese. Na botangi ya Masese 1:7, tokoki komituna: “kobanga Jéhovah” ‘elimboli nini?’ Bolukiluki ekoki bongo komema biso na kotanga La Tour de Garde ya le 15 Mai 1987, epai tozali kotanga: “Ezali nsomo ya lobiko oyo ekopekisa biso ete toyinama na ye te, etondi na limemya mozindo, oyo motema boboto na ye ezali kotinda biso kosala. Ye oyo azali ‘kobanga Jéhovah’ ayebi ete ye azali Mosambisi oyo aleki monene mpe azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, ete azali na lotomo mpe nguya ya kopesa etumbu mpe ya koboma baoyo bazali kotosa ye te. Epai mosusu, ye oyo azali ‘kobanga Jéhovah’ azali kosalela ye na bosembo nyonso, azali komipesa mobimba epai na ye, mpe azali koyina oyo ezali mabe na miso ya Nzambe.”

Tokoba kati na bolukiluki na biso

Mosenzeli ebimisamaka mpo na kosalisa baoyo bazali koluka bwanya na motema moko na komona biloko na motuya ya elimo oyo bileki nyonso. Moto moko na moko kati na biso azali na mposa ya bwanya mpe ya mayele mingi ya Liloba na Nzambe. Lokola elobi yango Masese 4:7, 8: “Mayele ezali likambo na liboso; boye zwa mayele, mpe ekozwa yo biloko nyonso, zwa bososoli. Kumisa ye mpe akotombola yo; akoyeisela yo lokumu wana okoyamba ye”.

Ezali bobele na kozwaka bososoli na lisalisi ya Makomami mpe na kosalelaka malamu bwanya nde tokoki kozwa bolamu ya solo. Ee, ezali bobele na komonisaka bwanya ya Nzambe nde tokoki kondimama epai na Jéhovah Nzambe. Tika ete eloko moko te epekisa yo na koluka bwanya lokola biloko na motuya bibombami!

[Bililingi na lokasa 1]

Esengeli kotimola na molende mpo na kozwa biloko na mituya bibombami. Tosengeli bongo koluka mayele ya Nzambe na etingya, boye te?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto