Banzela nyonso ya Nzambe ezali boyengebene
“Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete banzela na ye nyonso ezali boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te, ye moyengebeni mpe mosembwi.”—DETERONOME 32:4.
1. Bizaleli malamu nini ya Jéhovah Moïse akumisaki na miso na bana na Yisraele liboso na liwa na ye, mpe mpo na nini ebongaki mpo na kosala yango?
JEHOVAH, Mosambisi, Mosali na mibeko mpe Mokonzi aleki likoló, “alingi boyengebene mpe sembo.” (Nzembo 33:5; Yisaya 33:22) Moïse, moyokanisi ya kondimana na Mibeko, ye mosakoli “Oyo Jéhovah ayebaki miso na miso boye”, azwaki boyebi mozindo ya banzela ya boyengebene ya Jéhovah. (Deteronome 34:10; Yoane 1:12) Mwa moke liboso na liwa na ye, abendaki likebi likoló na lolenge kitoko mingi ya boyengebene na Jéhovah. Liboso na lisanga mobimba ya Yisraele, alobaki maloba na loyembo oyo: “E likoló, pesa litoi mpe nakoloba; mpe tika ete mokili eyoka maloba na monoko na ngai. . . . Mpo ete ngai nakosakola nkombo na Jéhovah. Bopesa Nzambe na biso lokumu. Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete banzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te, ye moyengebeni mpe mosembwi.”—Deteronome 32:1, 3, 4.
2. Na ndimbola nini Jéhovah asalelaka ntango nyonso boyengebene, mpe mpo na nini yango ezali na ntina?
2 Misala minso na Jéhovah mizali ya boyengebene. Asalelaka ezaleli yango ntango nyonso na boyokani mpenza na mayele na ye, bolingo na ye mpe nguya na ye. Ezali yango mosaleli na ye Elihu akundolelaki Yobo. Mpo na yango totangi kati na Yobo 37:23 ete: “Oyo-na-Nguya-Nyonso, biso tomoni ye te, azali monene na nguya mpe na sembo, na boboto monene na ye akonyokola bango te.” Na ngambo na ye, mokonzi Davidi akomaki ete: “Jéhovah alingi sembo! akobatela boyengebene na ye.” (Nzembo 37:28) Oyo nde elendiseli nini na koyeba ete na banzela na ye nyonso, akotika soki moke te bayengebeni na ye, ezala ata mpo na mwa ntango moke! Boyengebene na ye nde ezali kopesa biso elikya yango.
Boyengebene ezali te-Mpo na nini?
3. Eloko nini ezangi kati na bato lelo, mpe ebimisi likambo nini likoló na boyokani na bango elongo na Nzambe?
3 Lokola Jéhovah azali Nzambe ya boyengebene, Ye oyo alingi boyengebene, “Mozalisi na mabelé mobimba,” mpo na nini boyengebene ezali te kati na bato na mikolo na biso? (Yisaya 40:28) Na Deteronome 32:5, Moïse ayanoli na maloba oyo: “Bango basaleli ye mabe, bazali bana na ye lisusu te na ntina na libebi na bango; bazali libota lipengwi mpe linyongotani.” Mpamba te, na etamboli na bango mabe, bato batangwi mpenza na Mozalisi na boye ete makanisi na ye mpe banzela na ye eleki oyo na bango, “lokola likoló eleki mabelé.”—Yisaya 55:8, 9.
4. Nzela nini moto aponaki, mpe yango ememi ye wapi?
4 Tobosana te ete moto asalemaki na Mozalisi na ye mpo amitambwisa na lipanda epai na Ye te. Yilimia alimboli malamu ezaleli na bato na maloba oyo: “E Jéhovah, nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Na kobwakaka banzela mpe boyangeli ya boyengebene na Nzambe, moto amityaki na nse na boyangeli mosusu mpenza, oyo ekomonanaka te mpe ya nguya: ezali bongo boyangeli ya Satan le Diable mpe ya bademo oyo balandaki ye. Yango wana ntoma Yoane alobaki kozanga kokakatana ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” Banguya yango ya bademo bazali ata na litomba moko te mpo na kosalisa ete boyengebene ezala kati na bato.—1 Yoane 5:19.
5. Maloba nini mamonisi ete boyengebene ezangi kati na mokili ya lelo?
5 Mpo na komonisa ete na mikoló na nsuka oyo ya biloko mabe ya lelo boyengebene ekozanga mpenza, totanga maloba malobamaka na 1984 na William Smith, ministre ya makambo matali Mibeko na Etats-Unis. Ezalaki ye kolimbola ankete moko oyo esalemaki mpo na bitumbu ya boloko oyo epesamaki kati na mikili 12 ya Amerike, kobanda 1977 kino 1983, alobaki: “Bato bazali kokanisa ete basali minene ya mabe-lokola babomi na bato, baoyo balalaka na basi na makasi, batekisi na drogue-bazali kozwa bitumbu minene mpenza. Kasi boyekoli yango . . . emonisi ete ezali mpasi te mpo na komona basali minene ya mabe bazali kotambola na nzela mpo na kosala makambo mosusu ya mabe.” Na bongo tokokamwa te na kotanga likanisi oyo ya Paul Kamenar, mosangani na Fondation juridique de Washington (Ebongiseli moko ya makambo na mibeko na Washington), ye ete: “Ebongiseli ya makambo na mibeko eleki kotika bato na lipanda mingi.”
6. (a) Bizaleli na Bayuda ezalaki ndenge nini liboso ete bakende na boombo? (b) Mituna nini Habakuku atunaki? Mizali kotunama mpe lelo?
6 Liboso na kokwea na maboko na mampinga ya Babilone na mobu 607 liboso na ntango na biso, libota na Yuda emonaki mpasi mpo na mibeko oyo ezalaki kosalelama lisusu te. Yango wana Nzambe apusaki mosakoli Habakuku na koloba ete: “Mobeko elembi mpe kosambisa-sembo (boyengebene) ekobimaka te. Mpamba te bato mabe bakozingelaka moyengebeni, yango wana kosambisa-sembo (to boyengebene) ebimi ya kongunzama mpenza.” (Habakuku 1:4) Bokesene oyo epalanganaki na ntango wana epusaki mosakoli yango na kotuna Jéhovah motuna oyo: “Mpo na nini okotalaka bato na misala mabe mpe okozala mpe kimya wana moto mabe akomela oyo aleki ye na boyengebene?” (Habakuku 1:13) Na mikoló na biso, bato oyo bazali koyoka mawa na komona ndenge bokeseni ekoti mingi kati na makambo, bakoki mpe kotuna ete: Mpo na nini Nzambe na boyengebene atiki nzela na bokesene na mabelé? Mpo na nini azali kosala eloko te nzokande “boyengebene ebimi ya kongunzama mpenza”? Mpo na nini ‘azali kofanda nye’? Wana ezali mituna ya ntina oyo bobele Liloba ya motuya ya Nzambe, Biblia, epesi biyano na solo mpe ya kosepelisa.
Nzambe apesi nzela na bokesene-Mpo na nini?
7. (a) Mpo na nini moto abungisaki Paradis oyo Nzambe apesaki ye? (b) Mituna nini mitumolamaki na Edene, mpe engebene boyengebene na ye, ndenge nini Nzambe asengelaki koyanola na yango?
7 Ndenge Moïse alobaki yango, misala na Nzambe mizali ya kokoka. Yango ezalaki bongo mpo na babalani ya kokoka oyo Nzambe atyaki kati na Paradis ya Edene. (Genese 1:26, 27; 2:7) Bomoi wana ya kokoka mbele ekokaki kopesa bolamu mpe bomengo epai na bato. Lisolo epemami na Nzambe elobi na biso ete: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa mpe ezalaki malamu mingi.” (Genese 1:31) Kasi bomengo ya Edene eumelaki te. Ekelamu moko ya elimo oyo atombokaki, apusaki Adam mpe Eva na kotemela lolenge oyo Jéhovah azalaki koyangela bango, mpe atyaki ntembe na boyengebene ya mibeko oyo Nzambe apesaki bango. (Genese 3:1-6) Botemeli yango ya bosembo ya boyangeli na Nzambe ebimisaki mituna mileki minene mitalaki bizaleli. Lisolo na kala ya moyengebene Yobo elakisi ete elimo yango motomboki atyaki mpe ntembe na bosembo ya bikelamu nyonso na Nzambe. Nzokande, boyengebene esengaki ete elaka epesama mpo na koyanola na mituna yango oyo ezali na ntina mpo na molongo mobimba.—Yobo 1:6-11; 2:1-5; tala mpe Luka 22:31.
8. (a) Mpasi nini ezali kotungisa bato lelo oyo? (b) Mwa elikya moke nini tokuti kati na loyembo ya Moïse?
8 Paulo alobeli na mokuse bomoi ya mpasi oyo bato bazali kobika kati na yango nsima wana ebwakaki bango banzela ya boyengebene na Nzambe. Akomi na Baloma 8:22 (M.N.) ete: “Kino sikawa, biloko nyonso oyo bizalisamaki na Nzambe bizali kolela mpe kooka mpasi elongo.” Eteni monene na ‘kolela’ yango mpe na ‘bampasi’ yango euti na kozanga ya boyengebene kati na lisangá na bato epai “moto azali koyangela moninga na ye moto mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Kasi tika ete botondi epesama epai na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpamba te akotika te ete boyengebene ya lokuta eumela seko. Mpo na yango, tala ndenge loyembo na Moïse elandi koloba na Deteronome 32:40, 41: “Soki [ngai, Jéhovah] nakopelisa mokalikali na mopanga na ngai, mpe loboko na ngai esimbi ekateli na makambo, nakobukanisa batemeli na ngai, mpe nakofuta bayini na ngai.”
9. Limbola ndenge nini liboke na Jéhovah ‘esimbaki ekateli na makambo’ ntango moto atombokaki?
9 Loboko na Jéhovah ‘esimbaki ekateli na makambo’ awa na mabelé, na Edene. Kozanga kozela, na boyengebene nyonso Nzambe akweisaki moto na liwa mpo abukaki mibeko na Ye na nko. Alobaki na Adam ete: “Ozali putulu mpe okozonga kati na putulu.” (Genese 3:19) Nsima na bikeke, ntoma Paulo alobelaki na mokuse mbano oyo lisumu na Adam ebimisaki mpo na bato nyonso. Alobaki: “Na bongo, mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”—Baloma 5:12.
10. Wapi mabota mibale oyo ekolaki uta na botomboki na Adam, mpe ndenge nini Jéhovah asalaki ntango nyonso?
10 Nsima na botomboki ya moto, Nzambe alobaki mpe ete: “Nakotya mpe koyinana kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akonyata motó na yo mpe okoswa litindi na ye.” (Genese 3:15, 17-19) Bokoli ya mabota yango mibale elandaki na boumeli ya mibu 6 000, mpe “koyinana” ezali ntango nyonso kati na bango. Kasi atako mabongwani masalemaki mingi na makambo ya mokili, banzela na boyengebene ya Jéhovah ebongwanaki te. Mpo na yango, na monoko ya mosakoli na ye Malaki, Nzambe alobi ete: “Ngai nazali Jéhovah; nabongwani te.” (Malaki 3:6, M.N.) Na ndenge yango, Nzambe azali ntango nyonso komonisa boyengebene kati na boyokani na ye elongo na bato baoyo bazángá kokoka mpe bazali batomboki Jéhovah akopengwaka soki moke te na mitinda na ye ya boyengebene mpe ya kotombwana. Kasi asalelaka nde yango ntango nyonso na boyokani na bizaleli na ye mosusu ya kitoko oyo: mayele na ye, bolingo na ye mpe nguya na ye.
Nzambe azali kosalisa bato
11, 12. Na maloba nini Nzembo 49 elimboli ezaleli ya bomoi na bato?
11 Ndenge moko na mitambo oyo bakoki kotanda bipai binso, bopusi mabe na Satana epalangani epai na bato nyonso. Bato bazali na mposa ya kosikolama bobele na etumbu ya liwa oyo etangamaki likoló na bango te, kasi lisusu na misala na bokesene na nzela na yango moto azali kosalela boyangeli na ye oyo ezangi kokoka.
12 Ezaleli ya mpasi oyo moto azali kobika kati na yango uta azwaki etumbu ya liwa, elimbolami malamu kati na loyembo oyo esalemaki na bana ya Koré na maloba oyo: “Bino bato nyonso, boyoka oyo, bopesa litoi, bino bato nyonso bofandi kati na mokili. Bato mpamba mpe bato na lokumu, bazwi mpe babola esika moko. Moto akolonga kosikola ndeko na ye te to kopesa epai na Nzambe motuya na bomoi na ye te. Motuya na kosikola milimo na bango ezali monene, ekokoka kofutama te, seko na seko, ete abika libela na libela mpe amona nkunda te.” (Nzembo 49:1, 2, 7-9) Ezaleli yango euti na kosambisama ya boyengebene oyo esalemaki na Nzambe.
13, 14. (a) Bobele nani akokaki kosalisa bato mpe mpo na nini bilaka nyonso na Nzambe bikomi “Ee” na nzela na Yesu?
13 Na bongo tokotala epai na nani mpo na kozwa lisalisi? Nani akoki kobikisa moto na nguya ya liwa? Mokomi na nzembo ayanoli ete: “Nzambe ye mpenza akobikisa molimo na ngai na loboko na Schéol.” (Nzembo 49:15) Ezali bobele na nzela na bolingo monene na Nzambe, oyo azali komonisa yango na boyokani na boyengebene na Ye, nde moto akokoka kosikolama “na loboko na Schéol.” Na boumeli ya lisolo moko na butu elongo na Nikodeme, ye Mofalisai na mayele, Yesu ayanolaki mpenzampenza lisusu na mituna yango na kolobaka: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abomama te kasi azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Liboso ete áya na mabelé, Mwana na Nzambe azalaki na likoló elongo na Tata na ye. Na boumeli na bomoi liboso na kokoma moto, elobamaki mpo na ye ete ‘azalaki kosepela na bana na bato’. (Masese 8:31) Na bongo ezali malamu mpenza ndenge Jéhovah aponaki bobele ekelamu wana ya elimo - Mwana na ye se moko - mpo ete ásikola bato.
14 Mpo na Yesu, Paulo alobaki: “Bilaka nyonso na Nzambe bikomi ‘Ee’ na nzela na ye. (2 Bakolinti 1:20, M.N.) Moko na bilaka yango oyo ekomamaki na mosakoli Yisaya etangami na Matai 12:18, 21, epai totangi na ntina na Yesu ete: “Tala, mosali na ngai oyo naponi, molingami na ngai, molimo na ngai endimi ye; nakotyela ye elimo na ngai mpe akosakola kosambisa-sembo to (boyengebene) epai na mabota mpe mabota bakolikya na nkombo na ye.”—Tala Yisaya 42:1-4.
15, 16. Ndenge nini Yesu akomaki “Tata na seko” mpo na bakitani na Adam?
15 Na boumeli na mosala na ye na mabelé, Yesu alimbolaki polelepolele ete bato na mabota nyonso bakoki kolikya na nkombo na ye mpe, na ndenge yango, kosepela na matomba malamu oyo ezali kouta na boyengebene na Nzambe. Alobaki: “Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi.” (Matai 20:28) Mibeko ya kokoka oyo Nzambe apesaki na libota ya Yisraele elobaki: “Molimo mpo na molimo.” (Deteronome 19:21) Na bongo, nsima wana Yesu atikaki bomoi na ye ya kokoka kati na liwa mpe ete Nzambe asekwisaki ye mpo azonga na likoló, apesaki epai na Jéhovah motuya ya bomoi na ye ya moto na kokoka mpo na kosomba lotomo na bomoi oyo Adam abungisaki. Na kosalaka bongo, Yesu akomaki “Adam ya nsuka [to ya mibale]”, mpe akoki sikawa kokoma “Tata ya seko” mpo na bakitani nyonso ya Adam baoyo bazali kondima.—1 Bakolinti 15:45; Yisaya 9:6.
16 Nzela na lobiko oyo Nzambe apesi na bolingo ezali mbeka na lisiko ya Mwana na ye Yesu Klisto. Ezali yango Yesu ‘alimbolaki polele epai na mabota ya bapaya’. Mbeka yango ezali mpenza na boyokani na boyengebene ya Nzambe. Botondi nini tosengeli kozala na yango epai na Nzambe awa asali na boye ete ‘molimo na biso esikolama na loboko na Schéol’!
Koloba mpo na kolongisa lisiko
17, 18. Mosala nini Charles Russell asanganaki na yango na bambula kobanda 1870, kasi kobongwana nini ya Barbour ekamwisaki ye na 1878?
17 Lokola baklisto na ekeke ya liboso, na eleko na biso ba Témoins de Jéhovah bakangami ntango nyonso makasi na liteya ya mbeka na lisiko ya Yesu Klisto. Ezali esengo na komikundola ete président ya liboso ya La Société Watch Tower, Charles Russel, asanganaki na boumeli ya mwa ntango na kopesa mosolo mpe kokoma zulunalo ya makambo na Nzambe ebengamaki Momemi-nsango na ntongo (angl.). Zulunalo yango ebandaki liboso kobimisama na adventiste moko nkombo na ye Barbour, ya mboka Rochester (Etats-Unis). Na ntango yango Russell akokisaki naino mibu ntuku misato te, nzokande Barbour azalaki mokolo na ye mosika.
18 Emonanaki lokola ete makambo nyonso mazalaki kotambola malamu kati na bato yango mibale kino na 1878 ntango Barbour abimisaki na mbalakaka mpe na kozanga koyebisa liboso, lisolo moko oyo ewanganaki liteya ya lisiko. Russell ayebisaki ndenge makambo malekaki na maloba oyo: “M. Barbour akomaki . . . lisolo moko mpo na zulunalo Momeminsango na ntongo, na kati na lisolo yango abwakaki liteya ya lisiko, na koboyaka kondima ete liwa na Klisto ezalaki motuya na lisiko oyo efutamaki mpo na Adam mpe bakitani na ye. Alobaki ete liwa na Nkolo na biso ekokaki te kozala lifuti mpo na etumbu ya masumu na bato, ndenge moko mpe baboti bakoki soki moke te kotalela ete ebongi na bango kofuta nyongo ya etamboli mabe ya mwana na bango na kotobolaka nzoto ya nzinzi na ntonga mpo na konyokola ye mpe koboma ye.”
19. (a) Russell asalaki nini ntango Barbour awanganaki lisiko? (b) Mposa oyo Russell amonisaki mpo na Mosenzeli ekokisamaki?
19 Russell akokaki kotika solo mpo na moninga mosalani na ye oyo alekaki ye na mbula, kasi asalaki yango te. Na boumeli na basanza mingi, kowelana ekotaki kati na zulunalo yango: Barbour awanganaki lisiko, nzokande Russell azalaki kolongisa yango. Na nsuka, Russell akabwanaki mpenza na Barbour mpe abandaki kobimisa zulunalo Mosenzeli na Siona mpe Momemi-nsango na boyei na Klisto, ebengami sikawa Mosenzeli. Mpo na zulunalo yango, Russell alobaki: “Uta ebandeli zulunalo oyo emizalisi molongisi mpenza ya lisiko; mpe na ngolu na Nzambe, tozali kolikya ete ekozala bongo kino na nsuka.” Mposa na Russell ekokisami? Ee, na solo mpenza! Ndenge tokoki lisusu kotanga yango na lokasa ya 2 na zulunalo yango, “Mosenzeli elendisaka . . . batangi na yango ete bandima Mokonzi Yesu Klisto oyo azali koyangela, oyo afungolelaki bato nzela na bomoi na seko na kosopaka makila na ye.”
20. Mituna nini misengeli lisusu kozwa biyano na yango?
20 Kati na boyekoli oyo, tomoni ete engebene boyengebene mpe bolingo na ye epai na bato, Nzambe epesi bango nzela ya kosikolama na lisumu mpe na liwa oyo bakweisamaki na yango. Nzokande, tosengeli lisusu koyanola na mituna milandi: Ndenge nini bolamu na mbeka ya lisiko na Yesu Klisto ezali kopesama? Ndenge nini tokoki kozwa na yango litomba, mpe ntango nini? Lisolo elandi ekopesa na mituna yango biyano oyo ekozanga te kondimisa bino lisusu koleka ete banzela nyonso na Nzambe ezali boyengebene.
Bozongeli
◻ Motuya nini Nzambe azali kopesa na boyengebene?
◻ Mpo na nini bokesene ezali mingi kati na mokili?
◻ Nzambe asalaki nini mpo na kosukola bato na liwa?
◻ Na meko nini Mosenzeli elongisi lisiko?
[Elilingi na lokasa 2]
Moïse azali koyebisa maloba ya loyembo na ye na mabelé polele ya Moaba.
[Elilingi na lokasa 5]
Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye bobele moko.