Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/1 nk. 17-22
  • Jéhovah apesaka mbano mpo na kondima mpe molende

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah apesaka mbano mpo na kondima mpe molende
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima mpe molende na bango emekami
  • Danyele alimboli na molende nyonso bandoto ya Nebukadanezare
  • ‘Balongaki nguya ya móto’
  • Ndakisa mosusu ya kondima mpe ya molende
  • Bamekamaki—kasi batikalaki sembo epai na Yehova!
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Jéhovah azali kopesa liteya epai na bakonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Danyele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokanda ya Danyele—ntina na yango mpo na yo
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/1 nk. 17-22

Jéhovah apesaka mbano mpo na kondima mpe molende

“E mokonzi . . . Nzambe na biso oyo tosalelaka akoki kobikisa biso na fulu na móto na kongala mpe na maboko na yo.​—DANYELE 3:17.

1. Mateya nini lisolo oyo eleki ebimisaki polele, mpe mpo na nini ekozala litomba mpo na biso kotalela yango lisusu?

JEHOVAH NZAMBE, Mokonzi ya molongo mobimba, apesaki epai na bakonzi mateya oyo makoki kokundolama na ntina na etelemelo na ye eleki-likolo. Ezali yango tomonaki na lisolo eleki, na kotalelaka makambo mayebisami kati na mikapo motoba ya liboso ya mokanda na Danyele. Kasi totalela lisusu masolo yango mpo na komona oyo yango ekoki kolakisa biso na kobombaka kati na makanisi maloba ya ntoma Paulo oyo mapemami: “Nyonso oyo ekomamaki kalakala, ekomamaki mpo na kolakisa biso, ete tozala na elikya na nzela na mpiko na biso mpe na nzela na kobondisama na Makomami.”​—Baloma 15:4.

2, 3. Bilenge mibali nini bazalaki kati na baombo bamemamaki na mokonzi Nebukadanezare, mpe tokoki koloba nini mpo na ndimbola ya bankombo na bango?

2 Na mobu 617 liboso ya ntango na biso, na boumeli ya boyangeli mokuse ya Yoyakini, mwana na Yoyakimi, mokonzi Nebukadanezare atindaki bamema na Babilone bilenge Bayuda mosusu baoyo balakisamaki malamu mpe bazalaki na mayele mingi. Danyele, Hanania, Misaele mpe Azaria bazalaki kati na bilenge yango.​—Danyele 1:3, 4, 6.

3 Soki totaleli engebene ndimbola na nkombo ya mokomoko na bilenge Baebele yango minei, emonani ete baboti na bango bazalaki kobanga Nzambe atako mabe ezalaki kosalema na eleko yango kati na Yuda. Na bongo, “Danyele” elimboli “Nzambe azali Mosambisi na ngai”. Hanania elingi koloba “Jéhovah amonisi ngolu; Jéhovah ayokeli mawa”. Misaele ekoki mbala mosusu kolimbola “Nani azali lokola Nzambe?” to “Nani azali moto ya Nzambe?” Na nsuka, Azaria elimboli “Jéhovah azali kosunga”. Bankombo ya bilenge yango, na ntembe te etindaki bango na kotikala sembo epai na Nzambe bobele moko ya solo. Kasi na esika ete babenga bilenge Baebele yango na nkombo na bango, Bakaladi babengaki bango Beletesala, Sadalake, Mesake mpe Abedenego. Lokola bazalaki baombo na boyangeli ya mokili oyo ezalaki ya bango te, bazalaki solo na liloba ya kozongisa te mpo na liponi ya bankombo oyo epesamelaki bango na baoyo bakangaki bango na boombo.​—Danyele 1:7.

Kondima mpe molende na bango emekami

4. Nini emonisi ete Jéhovah alingaki ete libota na ye etosa mibeko mitalaki banyama ya mpeto mpe banyama ya mbindo?

4 Baboti na Baebele minei yango bazalaki kobanga Nzambe. Bapesaki bango ebandeli malamu kati na bomoi, bobele na koponelaka bango bankombo wana te, kasi lisusu na kobokolaka bango na boyokani mpenza na Mibeko ya Moïse, mpenzampenza oyo etali botosi na mibeko ya bilei oyo ekanganaki na yango. Jéhovah Nzambe ye moko azalaki kopesa ntina mingi na limemya ya mibeko yango na boye ete nsima wana etangaki ye ebele kati na mibeko yango, alobaki: “Bosengeli kozala bulee, mpamba te ngai nazali bulee.”​—Levitike 11:44, 45.

5. Ndenge nini bosembo ya bilenge Baebele minei, oyo babokwamaki malamu, emekamaki?

5 Bosembo na bilenge Baebele minei yango, oyo babokwamaki malamu, etyamaki na komekama. Na motindo nini? “Baponelaki bango ndambo ya mokolo na mokolo na bilei kitoko ya mokonzi mpe na vinyo oyo azalaki komela.” (Danyele 1:5) Bayebaki ete ngulu, simbiliki, mbembe ya mai mpe nzombo ezalaki kati na bilei bipekisamaki na Mibeko ya Moïse. Ata kolia misuni ya nyama oyo epesamaki nzela na Mibeko ezalaki se mokakatano, mpamba te eloko moko te ezalaki kolakisa bango soki basopaki makila na yango malamu to te. Epai mosusu, misuni yango mikomisamaki mbindo na ntango ya milulu ya bapakano.​—Levitike 3:16, 17.

6. Baebele minei yango basalaki nini kati na komekama?

6 Na bongo Baebele minei oyo basalaki nini? Lisolo eyebisi biso ete Danyele, tokoki koloba mpe lisusu baninga na ye misato, azwaki na motema likatami ya komibebisa te na bilei yango. “Alandaki kolomba” ete bapesa bango bobele ndunda na esika ya bilei kitoko ya mokonzi, mpe mai na esika ya vinyo na ye. Mpo na bango, likambo ezalaki te ya koyeba bilei nini elekaki elengi. Solo, bamonisaki kondima mpe molende mpo na kolanda kosala lisengi yango. Jéhovah, oyo azalaki kokengela bilenge minei yango, asalaki na lolenge ete Danyele andimama epai na kapita monene ya basali ya mokonzi. Nzokande, mobali yango akakatanaki mpo na koyanola na lisengi yango, mpamba te abangaki na kokanisaka ete bilei ya motindo wana ekoki kobebisa kolongono na nzoto ya Danyele. Na bongo Danyele asengaki ete nzela epesamela bango bameka bilei yango mikolo zomi. Azalaki na kondima makasi ete botosi na Mibeko ya Nzambe ekosalisa ye, bobele na kobatela lisosoli malamu te, kasi lisusu na kotikala nzoto kolongono. Baebele minei oyo basekamaki mingi mpo na ezaleli na bango.​—Danyele 1:8-14; Yisaya 48:17, 18.

7. Ndenge nini ezaleli na molende ya bilenge Baebele yango ezwaki mbano?

7 Na ntembe te, Baebele minei yango bamonisaki kondima mpe molende mpo na koboya bilei wana, kasi bazwaki mbano mpo na yango, mpamba te na nsuka ya mikolo zomi bazalaki na bonzenga mpe na kolongono koleka bamosusu nyonso. Na koleka, Jéhovah apesaki bango boyebi, bososoli mpe mayele, na boye ete ntango batelemaki liboso na mokonzi na nsuka ya bambula misato ya kolakisama na bango, amonaki ete bango “balekaki mbala zomi banganga-na-nkisi mpe banganga-na-soloka nyonso na bokonzi na ye mobimba.”​—Danyele 1:20.

8. Liteya nini basaleli na Jéhovah bazwi lelo na lisolo yango?

8 Na mikolo na biso, basaleli nyonso ya Jéhovah Nzambe bakoki kozwa liteya na lisolo yango. Bilenge Baebele yango bakokaki komilobela ete bipekiseli etali bilei oyo ezali na Mibeko ya Moïse ezalaki na ntina mingi te, mingimingi soki bakokanisaki yango na Mibeko Zomi to na mibeko mitalaki mbeka mpe bafeti ya mbula na mbula. Kasi Baebele yango ya sembo bazalaki na likatami ya kotosa Mibeko nyonso ya Nzambe. Yango ekundoli biso motinda moko eyebisamaki na Yesu kati na Luka 16:10: “Ye oyo azali sembo na likambo lileki moke azali mpe sembo na likambo monene, mpe ye oyo azali sembo te na likambo lileki moke azali mpe sembo te na likambo monene.”​—Tala Matai 23:23.

9. Na mabaku nini Batemwe bamonisaki molende motindo moko na eleko na biso?

9 Mbala mingi ba Témoins de Jéhovah basengeli komonisa kondima mpe molende ya motindo moko, na ndakisa ntango bazali kosenga ba congés epai na ba patrons na bango ya mosala, mpo bayangana na likita ya distrike. Mbala mingi, na motindo ekeseni na bamosusu, bapesaka bango yango. Batemwe oyo balingi kokota na molongo ya ba pionniers to kosala mosala ya pionnier auxiliaire bayebisaka mbala na mbala mposa na bango ya kozala na mosala ya mosuni oyo ezwaka bobele ndambo ya mokolo, mpe mingi kati na bango bazali bongo kosimba libaku malamu yango na mosala ya Nzambe.

10. Liteya nini Batemwe oyo bazali na bana bakoki kozwa na lisolo yango?

10 Baboti oyo babangaka Nzambe bakoki kozwa liteya kitoko na kobokwama malamu oyo bilenge Baebele minei wana babokwamaki. Ntango baklisto bazali kotya mpenza motema na matomba ya elimo ya bana na bango, bazali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso kati na bomoi na bango, engebene Matai 6:33. Bakoki bongo kolikya ete bana na bango bakokoka kotemela mimekamo mpe bakokweya te na bopusi oyo bamoko kati na baninga na bango to balakisi na bango bazali kotinda bango bakumisa bilambo ya mbotama to bafeti, to babuka mitinda misusu ya Biblia. Baboti yango oyo babangaka Nzambe bazali bongo komona bosolo ya Masese 22:6.

Danyele alimboli na molende nyonso bandoto ya Nebukadanezare

11. Na mikolo na biso, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Danyele mpe ya baninga na ye misato?

11 Mokapo ya mibale ya mokanda ya Danyele ezali kolobela ndakisa mosusu ya kondima mpe ya molende. Ntango Danyele ayokaki ete mokonzi atindaki baboma bato na mayele nyonso ya Babilone, oyo bakokaki te kokundola ye mpe kolimbola ndoto na ye, abangaki, ye mpe baninga na ye misato? Soki moke te! Nkutu, awa endimaki ye mpenza ete Jéhovah akomonisa ye makambo mokonzi alingaki koyeba, Danyele amimonisaki liboso na mokonzi yango mpe asengaki ye elaka mpo apesa eyano. Mokonzi andimaki lisengi na ye. Na nsima Danyele mpe baninga na ye misato basambelaki makasi mpo na likambo yango, mpe Jéhovah apesaki mbano mpo na kondima na bango na komonisaka makambo oyo bazalaki na mposa ya koyeba. Na bongo Danyele asalaki na motema moko libondeli ya matondi epai na Jéhovah. (Danyele 2:23) Na epai mosusu, ntango Danyele ayebisaki mokonzi Nebukadanezare ndimbola ya ndoto na ye, oyo ekomami na mokapo 4 ya mokanda na ye, alobaki na mokonzi ete akobika mbula nsambo lokola nyama katikati na banyama ya zamba. Mpo na yango, asengelaki kozala na kondima mpe na molende lokola oyo basaleli na Nzambe basengeli komonisa lelo mpo na kosakola nsango na nguya oyo ezali koyebisa ete Jéhovah akoyeisa kobukanisa likoló na mokili ya Satana.

‘Balongaki nguya ya móto’

12, 13. Engebene mokapo 3 ya mokanda na Danyele, komekama nini baninga misato ya Danyele bakutanaki na yango?

12 Mokapo ya misato ya mokanda na Danyele elobeli moko ya makambo maleki minene ya lisolo na Biblia mpe emonisi ndenge nini Jéhovah apesaki mbano mpo na kondima mpe molende ya kokamwa ya basaleli Baebele misato. Kanisa lolenge makambo malekaki: Bato nyonso na lokumu ya Babilone bayangani na libanda ya Dula liboso na ekeko na wolo ya pene na bametre 27 na bolai mpe bametre 2,70 na bonene. Mpo na kosimba mayoki na bango, mokonzi abongisaki ete bayembi bazala na esika yango. Wana ekoyokama lokito na bibeteli na miziki, baoyo bayangani basengeli ‘kokwea mpe kosambela ekeko na wolo oyo mokonzi Nebukadanezare atelemisaki. Mpe moto nyonso oyo akokwea te mpe akosambela te, akobwakama bobele na ntango yango kati na litumbu na móto na kongala.’​—Danyele 3:5, 6.

13 Na ntembe te, Baebele misato yango basengelaki kozala na kondima mpe na mpiko mingi mpo na koboya kotosa mobeko wana. Kasi likambo oyo ete batikalaki ‘sembo na likambo eleki moke’ ebongisaki bango mpo na kozala ‘sembo na likambo monene’. Likama oyo etelemeli na bango ekokaki kobimisela Bayuda mosusu, etungisaki bango te. Bakokaki te kongumbamela ekeko wana mpo na kosambela yango ata na libaku moko. Koboya na bango ezangaki te kozwa likebi na basali mosusu ya zuwa, oyo bafundaki bango noki epai na mokonzi.

14. Nebukadanezare asalaki nini ntango ayokaki ete Baebele misato baboyaki kongumbama, mpe bayanolaki nini na maloba na ye?

14 “Na nkele mpe na kongala”, Nebukadanezare asengaki bamemela ye Baebele yango misato. Motuna na ye: “Ezali solo?” emonisi ete mokonzi yango amonaki lokola lokuta, koboya na bango mpo na kongumbama liboso na ekeko ya wolo mpo na kosambela yango. Apesaki bango libaku mosusu, kasi soki bakolanda koboya, bakobwakama kati na litumbu na móto na kongala. Mokonzi na lolendo ya Babilone abakisaki ete: “Mpe Nzambe nini akokoka kobikisa bino na maboko na ngai? ”Na molende ya kokamwa mpe kondima ya solosolo epai na Jéhovah, Baebele misato yango bayanolaki na limemya epai na mokonzi: “E mokonzi, tozali na mposa ya kozongisela yo eyano na likambo oyo te. Soki esengeli kozala bongo, Nzambe na biso oyo tosalelaka akoki kobikisa biso. Akobikisa biso na litumbu na móto na kongala . . . . E mokonzi, oyeba ete ata soki bongo te, biso tokosambela banzambe na yo te, mpe ekeko ya wolo oyo yo otelemisi, tokosambela yango te.”​—Danyele 8:13-18.

15. Etinda nini Nebukadanezare apesaki?

15 Soki liboso Nebukadanezare azalaki na nkanda, sikawa akomaki nde kopela na nkele. Mpo na yango totangi ete “elongi na ye ebongwanaki wana etalaki ye” Baebele misato yango. (Danyele 3:19) Likambo oyo ete atindaki bapelisa litumbu na móto mbala nsambo koleka momesano, emonisi kongala na ye. Na bongo bato na nguya kati na basoda na ye basimbaki Baebele misato oyo mpe babwakaki bango kati na litumbu na móto na kongala, kasi móto elekaki makasi mingi na boye ete ebomaki basoda yango.

16. Na lolenge nini kondima na Baebele misato ezwaki mbano?

16 Likambo yango ekamwisaki mingi mokonzi na komona bato misato te, kasi bato minei kotambolaka kati na libulu ya móto kozanga kooka ata mpasi moke. Na ndingisa na ye, ntango Baebele misato oyo babimaki na litumbu na móto, amonaki ete ata nsuki moko te na mitó na bango ezikaki mpe bilamba na bango ezwaki ata nsolo ya móto te. Oyo nde ekamwiseli monene na nzela na yango Jéhovah apesaki mbano mpo na kondima mpe molende na bango! Na ntembe te ntoma Paulo akanisaki na mibali yango ntango alobaki mpo na baoyo, katikati na ebele ya batemwe, “bazimisaki nguya na móto”. (Baebele 11:34) Oyo nde ndakisa kitoko mpo na basaleli nyonso ya Jéhovah oyo bazalaki na bomoi nsima na bango!

17. Bandakisa nini mpe ya kokamwa tozali na yango lelo?

17 Na mikolo na biso, bazali koluka kobwaka basaleli ya Jéhovah kati na litumbu na móto ya kongala te. Nzokande, bosembo na mingi kati na bango emekami makasi na mabaku oyo bazali kosenga na mokomoko asambela ekeko na kopesaka lokumu mabe epai na bilembo ya ekolo. Bosembo ya basaleli mosusu na Nzambe emekamaki ntango basengaki bango ete basomba karte ya parti politike to bakota na mosala ya soda. Jéhovah asimbaki bango, apesaki bango makasi mpo batikala sembo. Na kolongaka ntembe yango, bamonisaki ete Diable azali mokosi, mpe ete Jéhovah azali Nzambe ya solo.

Ndakisa mosusu ya kondima mpe ya molende

18. Lokola eyebisi yango Danyele 5:3, 4, ndenge nini Belesazare amonisaki botyoli epai na Jéhovah, Nzambe ya Bayuda?

18 Tozali kokuta ndakisa mosusu ya kondima mpe ya molende kati na mokapo 5 ya mokanda na Danyele. Belesazare, mokonzi ya Babilone azalaki kosala elambo monene, oyo mpe etyolaki biloko na bulee, mpo na nkoto kati na bato na ye ya lokumu, kati na bamakango na ye mpe kati na basi na ye ya molongo ya mibale. Na ntango yango, makomi ya kokamwa, mabimaki pwasa likolo na mur. Likambo yango ebangisaki ye mingi na boye ete makolo na ye malembaki mpe mabolongo na ye matutanaki. Babengisaki lisusu Danyele, mosaleli na Nzambe na solo, mpo alimbola makomi yango, mpamba te bato na mayele nyonso ya Babilone bakokaki kosala yango te.

19. Ntango Danyele abengamaki mpo na kolimbola makomi oyo mabimaki likolo na mur, likambo nini ya kokamwa asalaki?

19 Likambo oyo ete Danyele azalaki bobele ye moko mosaleli ya Nzambe na esika yango ya kitoko kasi mpe ya koyinama, ebangisaki ye te mpo na kobongola nsango na ye to kobosana likambo oyo etyamaki ntembe. Na motema kokita, atatolaki na lokumu mpe na maloba ya polele mpo na Nzambe na ye. Asukaki bobele te na kolimbola makomi yango, kasi akundolaki na mokonzi ete Jéhovah Nzambe akitisaki nkoko na ye ya mobali na kosalaka ete abika lokola nyama ya zamba, kino akondima ete Nzambe Oyo-Aleki-Likoló azali Mokonzi kati na boyangeli ya bato. Danyele alobaki na Belesazare ete, ‘ata oyebaki nyonso oyo, yo omikitisaki te, kasi otyoli bambeki ya tempelo na Jéhovah mpe osanzoli banzambe ya wolo, ya palata, oyo bamonaka te, mpe bayokaka te, mpe bayebi eloko te. Kasi Nzambe oyo banzela na yo nyonso ezali epai na ye, yo okumisi ye te. Yango wana mobeko oyo etindami longwa na ye. Yo omekami na emekeli mpe emonani ete okoki te, mpe bokonzi na yo ekabwani mpe epesami na ba Mede mpe ba Perse.’ Ee, na libaku yango, Danyele atikaki lisusu ndakisa kitoko ya kondima mpe ya molende epai na basaleli na Nzambe ya eleko na biso.​—Danyele 5:22-28.

20. Na boumeli na boyangeli ya Dariuse, ndakisa malamu nini ya kondima Danyele apesaki lisusu?

20 Mpo na kosukisa, mokapo 6 ya mokanda na Danyele elobeli ndakisa kitoko mosusu ya kondima mpe ya molende. Mokonzi na sika, Dariuse, akomisaki Danyele sikawa moko na bankumu minene misato ya boyangeli na ye. Na zuwa, bato mosusu ya lokumu bapusaki mokonzi yango na kosala mobeko ezalaki kosakola ete na boumeli ya mikolo 30, moto moko akoki kosala libondeli epai na Nzambe to epai na moto mosusu te, bobele epai na mokonzi. Bayebaki ete ezalaki nzela bobele moko mpo na kozwa likambo ya kofunda na yango Danyele. Ya solo, Danyele atosaki mobeko yango te mpe alandaki kobondela kati na eteni na ye ya ndako na likoló, lininisa polele na ngambo ya Yelusaleme. Ezwamaki ye na libunga mpo abukaki mobeko ya mokonzi, asengelaki bobele kobwakama na libulu ya bankosi, engebene etumbu ekomamaki na mobeko. Kasi mbala oyo lisusu, Nzambe apesaki mbano mpo na kondima mpe molende ya Danyele. Ndenge totangi yango na Baebele 11:33, Jéhovah ‘akangaki minoko ya bankosi’.

21. Nsima na kotalela bandakisa ya kokamwa ya kondima mpe ya molende ekomami kati na mikapo motoba ya liboso ya mokanda na Danyele, tosengeli kozala na ekateli makasi ya kosala nini?

21 Makambo mayebisami kati na mikapo 1 kino 6 ya mokanda na Danyele, mazali kolendisa mpenza kondima na biso. Jéhovah apesaki mbano monene epai na bato yango oyo bamonisaki kondima mpe molende. Asukaki bobele na kotombola bango te, kasi abikisaki lisusu bango na nzela ya bikamwiseli. Ee, tokoki kozwa mpiko mpe elikya kati na lisolo ya mimekamo na batemwe yango ya sembo. Ezali mpe mpo na ntina yango nde masolo wana makomamaki. Tika ete tozwa ekateli ya komekola malamu kondima mpe molende ya bato yango!​—Baloma 15:4; Baebele 6:12.

Bozongeli

◻ Tokoki koloba nini na nkombo ya mokomoko na bilenge Baebele minei mpo na motindo oyo babokwamaki?

◻ Liteya nini tozwi na ezaleli ya Baebele ntango bosembo na bango na mibeko ya bilei emekamaki?

◻ Na mikolo na biso ndenge nini bosembo ya basaleli na Jéhovah emekami lokola oyo ya Baebele misato?

◻ Na nini Danyele amonisaki kondima mpe molende liboso na Belesazare?

[Elilingi na lokasa 17]

Danyele mpe baninga na ye bayebaki koboya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto