Jéhovah azali mobateli na ngai
“Jéhovah azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te.”—Nzembo 23:1.
1, 2. Makambo nini ya kokamwa David asalaki? Nzembo boni asalaki?
KANISA ndenge makambo malekaki: wana ezalaki limpinga ya Bafilistia na ngambo moko mpe oyo ya Yisraele na ngambo mosusu, Goliata, mofilistia ya mbinga, atyoli Bayisraele ete bakokoka kobunda na ye te. Elenge mobali moko, oyo ebundeli na ye ezali bobele ebwakeli ya mabanga (lance pierre) mpe mabanga, abimi kokutana na ye mpe, na sikisiki, abwaki libanga moko ekei kozinda na elongi ya moto yango ya mbinga mpe ebomi ye. Elenge mobali yango nani? David, mobateli na mpate. Bolongi yango ya kokamwa, auti kozwa yango na lisalisi ya Jéhovah Nzambe.—1 Samwele, mokapo 17.
2 Elenge mobali yango akokoma na nsima mokonzi ya Yisraele; boyangeli na ye ekoumela mbula 40. Mobeti na nzenze, akobongisa ebele na maloba ya kitoko na nse na kopemama na Nzambe. Akokoma nzembo kitoko koleka 70 oyo, naino lelo lisusu, ezali liziba ezangi nsuka ya elendiseli mpe ya batoli mpo na basaleli na Jéhovah. Oyo eyebani mingi ezali loyembo 23. Mpo na nini okofungola te Biblia na yo na loyembo yango mpo na kolanda boyekoli na yango oyo tolingi kosala sikawa, verset na verset?
Jéhovah: Mobateli na mpate atondi na bolingo
3. (a) Na mabaku nini David alingaki kobungisa bomoi na ye mpo na kobatela bampate na ye? (b) Na ndimbola nini Jéhovah azali Mobateli na biso?
3 “Jéhovah azali Mobateli na ngai. (Nzembo 23:1) Lokola azalaki ye moko mobateli na mpate ya mayele, David ayebaki ndenge ya kotambwisa, koleisa mpe kobatela bampate. Mokolo moko, na ndakisa, abatelaki na mpiko etonga na ye liboso na nkosi mpe, na mbala mosusu liboso na ngombolo. (1 Samwele 17:34-36) Bampate na ye batyaki elikya na bango mobimba epai na ye. Kasi, liboso na Jéhovah, David azalaki na kimya na nse na libateli etondi bolingo ya Nzambe, akokaki koloba: “Jéhovah azali Mobateli na ngai”. Ozali na liyoki yango ya kimya na nse na kotambwisama ya Mobateli monene, Jéhovah Nzambe? Na ntembe te, azali mpe kotambwisa, koleisa mpe kobatela basambeli na ye, to bampate, na mikolo na biso. Lisusu, babateli-balandi baoyo bazali sembo mpe batondi na bolingo, bazali kokengela na molende likolo na “bampate”, bazali bongo bankulutu baponami kati na masangá ya Batemwe ya Jéhovah.—1 Pet. 5:1-4.
4. Na nini ezaleli na biso ekokani na oyo ya Bayisraele kati na lisobe?
4 “Nakozanga eloko te.” Tolimbola naino maloba oyo. Likebi ya Jéhovah oyo etondi bolingo ezali te kobotisa kati na yo liyoki malamu ya kimya mpe ya elikya? Ozali komikundola oyo ekomelaki Bayisraele batambolatambolaki kati na lisobe mbula 40? Nzambe akokisaki bamposa na bango nyonso. Ezali mpe ndenge moko lelo: basaleli na sembo ya Jéhovah bazangi eloko te. Mingi bakoki kozongela mpo na bango moko maloba oyo ya David, mapemami na Nzambe: “Nazalaki elenge, sikawa nanuni, kasi naino namoni moyengebene te oyo atikami, to bana na ye bazali kolombaka kwanga.” (Nzembo 37:25) Lelo, Nzambe azali kopesa bilei mingi ya elimo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”. (Matai 4:4; 24:45-47) Longola makita makeseni oyo masalamaka poso na poso, tozali na Biblia, tozwaka bazulunalo Mosenzeli mpe Réveillez-vous! bakisa mpe mikanda mosusu. Ata kati na mikili epai kuna mosala na bango epekisami, Batemwe ya Jéhovah bazali kozwa ntango nyonso bilei ya elimo. Solo, bampate ya Jéhovah bazangi eloko te.
5. Mpo na nini bampate ya Jéhovah bazali kobika kati na kimya mpe kozanga matata na eleko na biso, mpe ezali kobimisa mbano nini?
5 “Azali kopemisa ngai kati na matiti mobesu.” (Nzembo 23:2) Na Yisraele ya kala, bamboka mingi ezingamaki na ebele ya matiti mobesu. Lolenge moko na mobateli atondi bolingo oyo akomema bampate na ye mpo na koleisa bango, na kimya nyonso, kati na matiti kitoko yango, Jéhovah mpe azali lelo kobatela bampate na ye. Na yango mokomi na nzembo alobi: “Tozali bato ya etonga na ye.” (Nzembo 79:13; 95:7) Bampate bazalaka na kolongono soki bazali kolya malamu mpe kopema na ntango ya molunge ya moi. Na eleko na biso, bampate ya Jéhovah bazali kobika na kimya mpe kozanga matata, mpamba te bazali na elikya epai na babateli na bango: bakengeli bateli mpe ya mayele oyo bazali kosala kati na masanga mpe ba circonscriptions. Yango ezali kobimisa bokoli ya etonga ya elimo. Bato mingi oyo kala bazalaki konyokwama na babateli mabe ya Babilone Monene bazali sikawa bampate ya Jéhovah oyo bazali kosepela mpenza mpe batondi.
6. Ndenge nini Jéhovah ‘azali kokendisa biso pene na bisika ya kopema oyo ezali na mai’?
6 “Azali kokendisa ngai pene na bisika ya kopema oyo ezali na mai.” Na Yisraele, mpo na komelisa etonga, mobateli na mpate asengelaki kotambwisa yango epai na esika ya mai. Kasi ezalaki mbala mingi mpasi mpo na kozwa esika yango na ntango ya elanga. Ndenge moko, na eleko na biso, Jéhovah ‘azali kokendisa biso pene na bisika ya kopema oyo ezali na mai’ na kopesaka biso ebele ya mai na solo. (Tala Ezekiele 34:13, 14) Mosakoli Yisaya apesi libyangami oyo ya kosepelisa: “E bino banso baoyo bozali na mposa ya komela, boya epai na mai!” (Yisaya 55:1) Na komelaka mai yango ya elimo, bampate babatelami na bikateli ya móto oyo ekoya “likoló na baoyo bayebi Nzambe te mpe likoló na baoyo baboi kotosa nsango malamu.”—2 Batesalonike 1:8; Emoniseli 7:16, 17.
7. Ntango nini ezali mpenza na ntina ete Jéhovah abikisa biso, mpe na mabaku nini ekoki komonana litomba na koyeba mikapo ya Biblia na motó?
7 “Azali kobikisa molimo na ngai.” (Nzembo 23:3) Ntango tozali kokutana na mikakatano, kolemba, kozanga makasi, to liboso na botemeli makasi, Jéhovah azali kobikisa biso na nzela ya Liloba na ye. Na bongo ezali malamu ete baklisto bazala na momeseno ya kotanga eteni moko ya Biblia mokolo na mokolo. Osalaka yango? Bamosusu bamonaka malamu koyekola koyeba na motó biteni mosusu, lokola Exode 34:6, 7 to Masese 3:5, 6. Mpo na nini ezali na litomba? Na boye, ata soki komekama ebimi wana ezali yo na Biblia elongo te, makanisi ya kolendisa ya Makomami makoki koyikisa yo mpiko noki. Batemwe mingi oyo bakotisamaki boloko to batyamaki kati na bisika ya misala makasi mpo na bokangami na bango na boyengebene, babikisamaki mpo bayebaki mikapo na motó. Ee, Liloba na Nzambe ekoki kosepelisa motema’ mpe ‘kongengisa miso’.—Nzembo 19:7-10.
8. “Banzela ya boyengebene” ezali petee mpo na kolanda? Nzokande yango ezali komema na nini?
8 “Azali kotambwisa ngai na banzela ya boyengebene.” Solo, ezali mpasi mpo na kolanda banzela ya boyengebene, kasi ezali komema na bomoi. Yesu alobaki: “Ekuke ezali moke mpe nzela ezali nkaka oyo ezali komema na bomoi.” (Matai 7:14) Mpo na ntoma Paulo, ayebisaki na bayekoli ya Lusutula, ya lkoni mpe ya Antiokia ete: “Esengeli na biso kokota na Bokonzi ya Nzambe na nzela na bolozi mingi.” Ntembe ezali te ete ayebaki likambo nini azalaki kolobela, mpamba te mwa ntango moke liboso, na Lusutula, babolaki ye mabanga mpe batikaki ye, kokanisaka ete akufi.—Misala 14:19-22.
9. (a) Na lolenge nini Nzambe ‘azali kokendisa biso na banzela ya boyengebene’? (b) Mpo na nini ekozala litomba na kokamata mpo na biso maloba a Nzembo 19:14? (c) Ba versets nini ya Biblia ekoki kosalisa biso na kokima mitambo ya pite mpe ekobo?
9 Jéhovah ‘azali kotambwisa biso na banzela ya boyengebene’ na kokambaka biso mpe na kolakisaka biso na nzela ya Liloba na ye mpe lisanga na ye. Kasi, bato mingi bazali kolanda nzela ya monene mpe ya polele “oyo ezali komema na libebi“. (Matai 7:13) Pite oyo ezali komonana mingi mpe kopalangana noki ya maladi ya SIDA ezali komonisa mpenza ete baklisto basengeli kokima baninga mabe. (1 Bakolinti 15:33) Tosengeli kopekisa ata makanisi na biso matyama likolo na banzela ya mbindo te. (Nzembo 19:14) Mpo na yango, tosalela ntango nyonso batoli kitoko ya Liloba na Nzambe oyo etali kosangisa nzoto mpe lolenge ya kokima mitambo ebele ya pite mpe ekobo.—1 Bakolinti 7:2-5; Baefese 5:5; 1 Batesalonike 4:3-8.
10. (a) Mokumba nini Batemwe ya Jéhovah bazali na yango liboso na nkombo ya Nzambe? (b) Mpo na nini bato ya mokili batongaka biso mbala mingi? (c) Na makambo nini Jéhovah akosalisa biso?
10 “Na ntina na nkombo na ye.” Batemwe ya Jéhovah bazali na mokumba ya kokumisa nkombo ya Nzambe mpe ya kosenzela ete bayokisa yango nsoni soki moke te. (Matai 6:9; Exode 38:2) Bato mingi ya mokili bazalaka pene mpo na kolakisa na mosapi basaleli ya Jéhovah. Soki bazali kotonga biso mpo na bokangami na biso na mitinda ya Biblia, lokola oyo etali kozala moto na mokili te to ezaleli na bulee ya makila, tozali na lisosoli ya kimya. Kasi soki basali yango mpo tosali likambo moko mabe, tozali kobebisa lokumu ya Jéhovah. (Yisaya 2:4; Misala 15:28, 29; 1 Petelo 4:15, 16) Na bongo toyina oyo ezali mabe. (Nzembo 97:10) Soki tozwi monyoko, Jéhovah akosalisa biso mpe akobatela biso ntango nyonso, na ntina na nkombo na ye.
Jéhovah azali kobatela bampate na ye
11. “Libulu ya molili tuu” elakisi nini, mpe yango ekoki kokanisela biso nini mpo na Yesu?
11 “Ata natamboli kati na libulu ya molili tuu, nakobanga eloko moko ya mabe te.” (Nzembo 23:4) Eteni yango ezali kotangama boye na libongoli Segond: “Ata natamboli na libulu ya molili na kufa, nakobanga mabe moko te.” Maloba yango makoki kotinda tokanisa bisika mozindo to mabulu oyo ezali kokita longwa na bangomba ya Yudea, na ngambo mosusu ya mai na Monana. Libulu, esika mozindo, epai banyama na yauli bazali kofanda kati na molili, ezali bisika ya makama mpo na bampate. David alekaki na mabulu ebele ya motindo yango ntango azalaki na likama ya liwa. Kasi lokola Nzambe azalaki kotambwisa ye, atyelaki ye motema mpe abangaki te. Tosengeli kozala na elikya motindo moko epai na Jéhovah. Maloba “molili tuu” makoki mpe kotinda tokanisa esakweli oyo ya Yisaya: “Baoyo bazalaki kofanda na mokili ya molili tuu, pole engengeli bango.” Matai atangaki maloba yango mpe akokanisaki yango na Yesu Klisto, na kolobaka: “Libota oyo efandi kati na molili emoni kongenga makasi, mpe baoyo bafandi kati na mboka ya molili na kufa, pole esili kobimela bango.” Eloko nini ebimisaki pole yango? Mosala monene ya kosakola oyo Yesu abongisaki.—Yisaya 9:2; Matai 4:13-16.
12. (a) Na mikili mingi, basaleli ya Jéhovah bazali kosala nini ata monyoko ezali, mpe matomba ya mosala na bango ezali nini? (b) Na maloba nini Petelo alendisaki baklisto ya liboso oyo banyokwamaki?
12 David ‘azalaki kobanga eloko moko ya mabe te’. Ezali mpe ndenge moko na basaleli ya solo ya Jéhovah lelo, atako balingamaka te kati na mokili mabe oyo eyangalomi na Satana. (1 Yoane 5:19) Na yango, bato ebele bazali koyina bango, mpe banyokwami makasi kati na mikili misusu. Kasi bazali ntango nyonso kolanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi kati na mikili yango, ata bazali kosala yango na polele te lokola bipai bisusu. Bayebi ete Jéhovah azali elongo na bango mpe ete akobatela bango. (Nzembo 27:1) Lisusu, bokoli monene ezali komonana mingi na kati na mikili yango epai mosala ya Bokonzi ezali kosalema na kobombama Batemwe ya Jéhovah ya bisika yango bazali kokamata mpo na bango maloba oyo ya mokomi na nzembo: “Jéhovah azali elongo na ngai, nakobanga te. Moto akamatami na mabelé akoki kosala ngai nini? (Nzembo 118:6, MN) Ezaleli na bango ezali kokanisela biso oyo ya baklisto ya liboso epai na bango ntoma Petelo alobaki maloba oyo ya kolendisa: “Ata soki bozali konyokwama mpo na boyengebene, esengo na bino! Mpo na kobangisa na bango, bobanga te, mpe bomitungisa te.”—1 Petelo 3:14.
13. (a) Libongwani nini ya ntina David asalaki na lolenge na ye ya koloba na Nzembo 23:4, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini baklisto bakoki kosilisa nsomo na bango?
13 Mpamba te ozali elongo na ngai.” Maloba oyo mazali komonisa likambo mosusu ya ntina: mokomi ya nzembo apemami na Nzambe alongwi na moto ya misato akomi na moto ya mibale (de la troisième à la deuxième personne). Na esika ete atanga Jéhovah na kosalelaka ebandeli “a”, David asaleli sikawa ebandeli “o”. Mpo na ntina nini? Mpo ete lolenge yango ya koloba ezali kolakisa boyokani ya penepene koleka. Solo, likama ebelemisaka biso na Tata na biso ya bolingo, Jéhovah. Etindaka biso na kozala na boyokani eleki makasi elongo na ye. Na nzela ya losambo mpe libondeli, tokoki kobelela ye ete abatela biso, bongo tokosilisa nsomo na biso.—Tala Sefania 3:12.
14. Biloko nini babateli bazalaki kosalela na ntango ya David, mpe ezalaki kosalisa bango na nini? (b) Lelo, ndenge nini babateli baklisto bazali kobatela etonga?
14 “Lingenda mpe nzete makasi na yo ezali biloko oyo bizali kobondisa ngai.” Liloba na liebele shévèt, oyo ebongolami na “lingenda”, ekoki kolakisa nzete ya mobateli. Lingenda mpe nzete makasi ezalaki elilingi ya bokonzi. Biloko yango bisengelaki kozala na litomba mingi mpo na kobengana babebisi, lokola bangombolo mpe banyoka. Nzete ya mobateli ezalaki mpe na mosala ya kopusa mpate na nzela malamu to ata kopekisa ye ete abelema mingi te na esika moko oyo akoki kokweya mpe kozoka. Na mikolo na biso, Jéhovah atye kati na masangá babateli ya sembo, bankulutu, oyo bazali kobatela etonga liboso na babebisi ya elimo, lokola bapengwi. Basengeli mbala mosusu kopesa toli na baoyo bazali kotika koyangana ntango nyonso na makita to baoyo bazali kokoma na etamboli ya boklisto te.
Elambo na bilei kitoko oyo epesami katikati na banguna
15. (a) Libongwani nini ya ntina ya lisese tozali komona na Nzembo 23:5? (b) Nini ezali kosalisa ete basaleli ya Jéhovah baleisama malamu na elimo, mpe tokoki koloba bongo te mpo na banani?
15 “Otandi mesa liboso na ngai na miso ya bayini na ngai.” (Nzembo 23:5) Tomoni wana libongwani ya ntina ya lisese: ezali lisusu mobateli na mpate te kasi moyambi na bato. Lokola moyambi moko na bato akabaka mingi, Jéhovah apesaka bilei mingi ya elimo na nzela ya kelasi epakolami ya “moombo”. (Matai 24:45) Ata tozali kobika kati na mokili moko mabe, toleisami malamu. La Tour de Garde (Mosenzeli) ebimisami na minoko koleka nkama, yango ezali kopesa nzela na koleisa na elimo bafandi ndenge na ndenge ya mokili lokola Afrike du Sud, Groenland, bisanga Salomon mpe lnde. Epai mosusu, masanga koleka 5 000 oyo ezali bipai na bipai kati na mokili, bazali na baoyo basalaka masolo liboso na bato banso mpe bateyi ya mayele, mpe lisusu bisika kitoko ya koyangana, lokola bankama ya ba salles du Royaume ya sika. Boyekoli ya Biblia koleka 3 000 000 esalami na bandako ya bato mpo na kosunga “bampate”. Nzokande, basangani ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, bazali konyokwama na nzala.—Yisaya 65:13.
16. (a) Na bokeseni na mwasi moko ya masumu, Mofalisai azangaki kosala nini mpo na Yesu? (b) Lelo, lolenge nini ya mafuta Jéhovah azali kopesa basaleli na ye ya sembo?
16 “Opakoli motó na ngai na mafuta.” Na Yisraele ya kala, moyambi malamu na bapaya azalaki kopakola mafuta na motó ya babyangami na ye. Mokolo moko, Yesu ayambamaki na Mofalisai moko oyo apakolaki motó na ye na mafuta te mpe apesaki ye ata mai te mpo na komisukola makolo. Ezali mwasi moko ya masumu nde asukolaki ye makolo na mai na miso na ye mpe apakolaki yango mafuta na malasi ya ntalo mingi. (Luka 7:36-38, 44-46) Kasi Jéhovah, Ye, azali moyambi moko malamu mpenza. Azali kopesa na basaleli na ye ya sembo mafuta ya elimo, “mafuta ya kosepela”. (Yisaya 61:1-3) Na ntembe te, basaleli na ye bazali kosepela lelo.
17. (a) ‘Kopo oyo etondi maa’ elakisi nini? (b) Na ndimbola nini Jéhovah azali kopesa ‘kopo oyo etondi maa’ epai na basaleli na ye lelo?
17 “Kopo na ngai etondi maa.” Libongoli mosusu ekomi maloba yango boye: “Kopo na ngai etondi koleka”. (Jérusalem) Maloba yango mazali komonisa kotonda na biloko na elimo. Ata mazali kolakisa molangwa te, mazali kopesa makanisi ya kopo ya masanga kitoko. Masanga yango mazali na makoki ya kosilisa bamaladi, lokola endimisi yango toli oyo ya Paulo epai na Timote: “Komela bobele mai te, kasi mela mwa ndambo ya vinyo mpo na libumu na yo mpe mpo na bamaladi mingi na yo.” (1 Timote 5:23) Na ndimbola ya elimo, vinyo ekomisaka mpe motema esengo. (Nzembo 104:15) Tata na biso ya bolingo, Jéhovah, azali kokabela basaleli na ye ya sembo elambo ya biloko kitoko ya elimo, lokola “kopo” ya esengo oyo “etondi maa”.
18. (a) Jéhovah azali kosala malamu mpe komonisa boboto ya motema epai na nani, mpe eyano nini Nzembo 103:17, 18 epesi na motuna yango? (b) Elikya nini kitoko epesami na baoyo bazali kosalela Jéhovah na bosembo?
18 “Solo, malamu mpe ngolu ekokende elongo na ngai mikolo minso ya bomoi na ngai.” (Nzembo 23:6) Boboto ezali kati na mbuma ya elimo santu ya Jéhovah. (Bagalatia 5:22, 23) Nzambe asalaka malamu mpe amonisaka boboto ya motema epai na baoyo bazali kotambola na nzela na ye. (Nzembo 103:17, 18) Na kondima moko makasi epai na Jéhovah, basaleli na ye bakoki kolonga mimekamo nyonso oyo bazali kokutana na yango. Bazali ntango nyonso kozwa lipamboli na ye mpe likebi na ye oyo etondi na bolingo. Soki batikali sembo kino nsuka, bakozwa bomoi ya seko kati na mokili ya sika. Oyo nde elikya kitoko!
19. (a)‘Kofanda na ndako ya Jéhovah’ elimboli nini? (b) Lisangá ya Jéhovah esali nini mpo na kokolisa losambo ya solo lelo, mpe mpo na nini bankoto ya baklisto bazali komona ete kosala kuna ezali libaku moko malamu? (c) Banani mosusu bazali na likatami ya kosalela Nzambe libela?
19 Mpe nakofanda na ndako ya Jéhovah kino nsuka ya mikolo na ngai.” Na ntango ya David, esika mpenza ya losambo ya Nzambe ezalaki hema, mpamba te temple etongamaki naino te. Lokola mokomi na nzembo azalaki kokokanisa Nzambe na moyambi moko malamu na bato, kofanda kati na ndako ya Jéhovah ‘elimbolaki kozala na boyokani malamu elongo na ye, kozala mopaya na Ye. (Nzembo 15:1-5) Na eleko na biso, ndako yango ekoki kolakisama na temple mosantu ya Jéhovah: bibongiseli oyo azwaki mpo na kopesa nzela na bato basalela losambo ya mpeto. Mokonzi Salomo azwaki libaku malamu ya kotonga temple ya liboso, oyo ekembisamaki malamu na wolo mpe esalamaki mpo na kokumisa Jéhovah. Oyo libaku malamu nini ezalaki mpo na kosala kuna! Atako temple ya lolenge yango ezali lisusu te lelo, Nzambe azali na lisangá moko mosantu oyo ezali na mokano ya kokumisa ye mpe kokolisa losambo ya mpeto. Mpo na kokokisa mokumba yango, lisangá yango esali ba Béthels na mikili mingi. Liloba “Béthel” elimboli “Ndako ya Nzambe”, mpe bankoto na basaleli ya Jéhovah bazali komipesa na misala kati na bisika yango ya bonzambe. Bamosusu kati na mibali mpe kati na basi yango basili kosala kuna “mikolo minso ya bomoi na bango”, na kosalelaka ndambo eleki monene ya bomoi na bango na mosala ya Béthel. Bamilio ya Batemwe mosusu, baoyo bazali basangani ya libota moko ya Béthel te, bango mpe bazali na likatami ya kosalela Jéhovah libela.
20. (a) Mpo na nini Nzembo 23 ezali eteni moko kitoko ya Makomi, mpe ezali kosalisa biso na kozala na nini? (b) Mabaku malamu nini mazali kozela basaleli ya sembo ya Jéhovah?
20 Loyembo 23 ekokani na libanga moko ya motuya oyo ezali kongenga epai na epai. Ezali kokumisa nkombo ya lokumu ya Tata na biso ya likolo ya bolingo, Jéhovah, mpe ezali komonisa lolenge azali kokamba, kobatela mpe koleisa bampate na ye. Libota ya Nzambe ezali bongo na esengo, etondi na elimo mpe ezali kokola noki, ata kati na mikili oyo ezali na botemeli makasi. Loyembo ya 23 ezali kosalisa biso mpe na kozala na boyokani ya móto mpe ya pene elongo na Mozalisi na biso. Ntango tozali kotala makoló oyo ezali na myoto, ndenge David azalaki kosala mbala mingi ntango azalaki kobatela etonga na ye, tozali na matondi na kokanisaka ete Mozalisi ya molongo yango ya kokamwisa azali kokengela biso lokola Mobateli atondi na bolingo. Na boboto, alakeli mpe biso bomoi ya seko kati na mokili ya sika soki totikali sembo epai na ye. Oyo nde esengo ekozala na kokutana na basaleli na kala ya Nzambe lokola David, baoyo bakosekwa! Mpe oyo nde libaku malamu ekozala ya kosalela Jéhovah, Mobateli monene, mpo na libela!
Bozongeli
◻ Ndenge nini Jéhovah azali komimonisa Mobateli na biso ya bolingo?
◻ Na motindo nini Nzambe ‘azali kotambwisa biso na banzela ya boyengebene’?
◻ Ndenge nini Jéhovah abatelaka bampate na ye?
◻ Na ndimbola nini Nzambe atandi mesa liboso na biso katikati na banguna na biso?