Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/2 nk. 24-28
  • Tolendisa elikya na biso epai na Jehovah na koyekola liloba na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tolendisa elikya na biso epai na Jehovah na koyekola liloba na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Botya mitema na bino” na Liloba ya Nzambe
  • Bibongiseli mpo na koyekola Mobeko ya Nzambe
  • Biso mpe, ‘totya mitema na biso’ na Liloba ya Nzambe
  • Tolendisa boyokani na biso elongo na Nzambe
  • Boyekoli ezali kosalisa biso na koloba mpo na kondima na biso
  • Tokima mitambo ya Satana
  • Lisanga ya Jéhovah ezali kosalisa biso
  • Mokanda ya Biblia nimero 5—Deteronome
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Tóndima Biblia mpo na oyo yango ezali mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Salá likambo oyo basɛngaki na Mokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Sepelá na boyekoli na yo moko ya Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/2 nk. 24-28

Tolendisa elikya na biso epai na Jehovah na koyekola liloba na ye

“Botya mitema na bino na maloba nyonso mazali ngai kolakela bino lelo. . . . Mpamba te ezali mpo na bino liloba na mpamba te, kasi ezali bomoi na bino.”​—DETERONOME 32:46, 47.

1, 2. (a) Libota ya Yisraele ekomaki pene na kosala nini ntango bakomaki na mabelé ya Moaba? (b) Toli nini Moïse apesaki na libota yango?

Mikolo mingi oyo balekisaki kati na lisobe mikomaki na nsuka na yango. Bobele mai na Yordani nde ekabolaki libota yango na Mabelé ya ndaka, oyo bazalaki kokanisa mpo na yango uta kala. Emonaki ye libota yango pene na kokota na mokili yango, Moïse, motambwisi na yango, azalaki kotalela likambo yango na mayele. Azalaki komikundola ete kala Bayisraele bakweaki mpo bazangaki kotya elikya epai na Jéhovah mpe ye aboyaki bakota na Kanana.​—Mituya 13:25 kino 14:30.

2 Na bongo Moïse ayanganisaki libota yango kati na bangomba na Moaba. Nsima na kokundola lisolo ya libota yango mpe kozongela Mobeko ya Nzambe, Moïse alobaki maloba oyo mabengamaki loyembo na ye monene. Na maloba kitoko koleka, ayebisaki Yisraele ete atya elikya na ye epai na Jéhovah mpe azala na botosi epai na “Nzambe ya bosembo, oyo azangi bokeseni: [epai na oyo] azali moyengebeni mpe mosembwi”. Na bosukisi, Moïse apusaki Bayisraele na mosala, na maloba oyo: “Botya mitema na bino na maloba nyonso mazali ngai kolakela bino lelo, mpo bolakela bana na bino ete basenzela mpo na kosalela maloba nyonso ya mobeko oyo. Mpamba te ezali mpo na bino liloba na mpamba te, kasi ezali bomoi na bino.”​—Deteronome 32:4, 46, 47.

“Botya mitema na bino” na Liloba ya Nzambe

3, 4. (a) Bayisraele basengelaki ‘kotya motema na bango’ na nini, mpe yango elimbolaki nini? (b) Na boumeli ya ntango, Bayuda basalelaki toli ya Moïse na motindo nini?

3 Moïse alendisaki Bayisraele ete “batya mitema na bango”, bobele na loyembo na ye ya kitoko te, kasi na makomi nyonso ya bulee. Basengelaki ‘kosenzela malamu’ (Votre Bible) “kokanisa” (Pirot-Clamer, note) na mobeko ya Nzambe, ‘kokamata [yango] na lisano te’. (Français courant) Ezali bobele soki bayebi yango na lolenge ya kokoka nde bakoki ‘kolakela bana na bango ete basenzela mpo na kosalela maloba nyonso ya mobeko yango’. Na ntina yango, na Deteronome 6:6-8 Moïse akomi: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo masengeli kozala na motema na yo; mpe osengeli kolakisa yango na etingya na bana na yo . . . Mpe osengeli kokangisa yango lokola elembo na loboko na yo, mpe esengeli kozala lokola bikaniseli kati na miso na yo.”

4 Kati na ndimbola na ye ya Biblia, W. Davey ayebisi biso ete, na nsima, “Bayuda bakangaki ndimbola ya maloba yango te mpe basalelaki yango lokola losambo ya bikeko. Bazalaki kokoma baversé . . . likoló na biteni ya mposo ya nyama oyo bazalaki komikangisa na loboko mpe na elongi na ntango ya libondeli”. Na eleko na Yesu, bazalaki kolata ba phylactères, bakesi mikemike ekatami malamu oyo ezalaki na biteni ya Makomami, ndenge ezali kosala yango lelo basangani ya mangomba mosusu ya bayuda (Matai 23:5) Kasi Davey abakisi: “Na esika ete bamonisa na bomoi na bango ete bazalaki kotosa mibeko, bilema yango basukaki bobele na kolata kopi ya maloba ya Mobeko.”

5. Lolenge malamu ya kosalela maloba ya Moïse oyo mazali na Deteronome 6:6-8 ezalaki nini?

5 Mobeko ya Nzambe esengelaki kozala mpenza mpenza na maboko to na bilongi na bango te, kasi na ‘mitema na bango’. Na esika ete bayeba yango bobele koyeba mpamba, soki bákoma kolinga na bozindo Mobeko, mbele babosanaki yango soki moke te. Mbele ezalaki lokola soki ekomamaki likoló na etanda moke etyami liboso na miso na bango to ekangisami na maboko na bango.

Bibongiseli mpo na koyekola Mobeko ya Nzambe

6, 7. (a) Bibongiseli nini Jéhovah azwaki mpo ete Bayisraele bamesana na Mobeko ya Moïse? (b) Na ntango ya Kala, likambo nini ezalaki kopesa basaleli ya Nzambe nzela ya koteyama na Liloba na ye?

6 Kasi ndenge nini Bayisraele bakokaki koyekola bilakeli 600 ezalaki kati na Mobeko? Bakopi ya Mobeko yango ezalaki komonana mingi te na kala. Oyo nyonso akokoma mokonzi na Yisraele asengelaki “kokoma mpo na ye mpenza kati na buku maloba ya Mobeko yango, . . . kotanga kati na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye, ete ayekola kobanga Jéhovah Nzambe na ye, mpo na kotosa maloba nyonso ya mobeko yango”. (Deteronome 17:18, 19) Nzambe akamataki bibongiseli mpo ete Mobeko étangama nsima na bambula nsambo nyonso na ntango ya elambo ya mingombo. (Deteronome 31:10-13) Likita oyo ezalaki kosalema na libaku yango ezalaki ya kolendisa mpenza, kasi ezalaki kosalama mbala mingi te mpo ekoka kopesa nzela na libota yango na kozwa boyebi mozindo ya Mobeko.

7 Jéhovah aponaki libota ya Levi mpo ‘elakisa Yakobo malako na Nzambe mpe Yisraele mibeko na Ye’. (Deteronome 33:8, 10; tala Malaki 2:7) Na mabaku mosusu, Balevite bazalaki kolekaleka mpo na koteya libota mobimba. (2 Ntango 17:7-9; Nehemia 8:7-9) Emonani ete nsima ya mwa ntango, libota yango ezwaki biteni mosusu ya liloba ya Nzambea. Mpo na ntina yango mokomi na nzembo akomaki: “Esengo ezali na moto . . . [oyo] mposa na ye ezali kati na Mobeko na Jéhovah; mpe akokanisaka Mobeko na ye butu na moi.” (Nzembo 1:1, 2) Na koyebisaka Bayisraele ete ‘batya mitema na bango na Liloba na Nzambe’, Moïse azalaki bongo kotinda bango ete bayekolaka Biblia ntango nyonso.

Biso mpe, ‘totya mitema na biso’ na Liloba ya Nzambe

8. Bayisraele bayokaki toli ya Moïse? Mpe yango ebimisaki makambo nini?

8 Libota ya Yisraele elandaki toli ya Moïse te. Ntango bamityelaki bakonzi, emonani ete mingi kati na bakonzi yango basalaki makasi te na ‘kokoma mpo na bango mpenza kati na buku maloba ya mobeko yango to kotanga kati na yango mikolo nyonso ya bomoi na bango’. Na mikolo ya mokonzi Yosiya, na ekeke ya 7 liboso ya ntango na biso, “buku ya mobeko” ebungaki mpenza. (2 Ntango 22:8-12) Na ntembe te ndakisa mabe ya batambwisi ya libota yango epusaki yango na botomboki. Engebene likebisi epesamaki na Moïse, libota yango mobimba ekweaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso.​—Deteronome 28:15-37; 32:23-35.

9. Na mikolo na biso, na ndimbola nini baklisto basali kati na ezaleli ekokani na oyo ya Bayisraele ya Kala?

9 Lokola Bayisraele ya kala, baklisto bazali lelo pene na Mabelé ya ndaka: mokili ya sika ya sembo oyo elakami na Nzambe. (2 Petelo 3:13) Makambo minene malingi kosalema: Bato bakoloba “Kimya mpe makambo mazali te!”, kobomama ya “Babilone Monene” mpe kobundisa ya ‘Gog mpe Magog’. Makambo yango makotya elikya na biso epai na Jéhovah na komekama. Na bongo ezali likambo na mbangu ete ‘totya mitema na biso na Liloba ya Nzambe’ uta sikawa.​—1 Batesalonike 5:3; Emoniseli mokapo 18; Ezekiele mokapo 38.

10. Mpo na nini bamosusu batyaka pembeni boyekoli na bango moko?

10 Nzokande yango ekoki kozala mokakatano monene mpenza na “ntango ya mpasi” oyo tozali kobika na yango. (2 Timote 3:1) Mosala, koteya bana, Eteyelo, mikumba ya lisangá, nyonso wana ekoki kozwa ndambo monene ya ntango na biso. Tokoki kobanda koluka kozwa bantina ya kotya pembeni boyekoli na biso ya Biblia na kokanisaka ete ‘oyo tozali kosala ekoki mpo na kotelemisa biso ngwi’. Kasi Biblia epesi toli oyo na moklisto mokomoko: “Okanisaka na makambo oyo, omipesa mobimba na yango.” (1 Timote 4:15, 16) Totalela mwa bantina minene ya kosala bongo.

Tolendisa boyokani na biso elongo na Nzambe

11, 12. (a) Boyebi mozindo ya Nzambe ebimisaki nini epai na Yobo? (b) Na mikolo na biso, mpo na nini likoki ezali ya koyeba Nzambe malamu koleka na eleko ya Yobo?

11 Yobo ‘azalaki kobanga Nzambe mpe koboya mabe’. Kasi nsima wana esilaki Jéhovah komimonisa epai na ye kati na mopepe makasi, alobaki na ye: “Nayokaki mpo na yo na koyoka na litoi, kasi sikawa liso na ngai ezali komona yo.” (Yobo 1:1; 42:5) Na mikolo na biso, tokoki ‘komona’ Nzambe, elingi koloba koyeba bobele te ete azali na bomoi; kasi koyeba na mozindo bizaleli ndenge na ndenge ya bomoto na ye? Ee, na solo! Kati na Biblia, Jéhovah amonisi makambo mingi mpo na ye koleka oyo Yobo ayebaki.

12 Tozali kososola bolingo ya Nzambe malamu koleka, na koyekolaka ete “alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko”. (Yoane 3:16) Bisakweli ya Biblia bizali komonisa biso misala minene na ye, kino na nsuka ya Bokonzi ya mbula nkoto. (Emoniseli mokapo 18 kino 22) Tozali na lisolo ya makambo Nzambe asalaki mpo na lisanga ya boklisto: Kondimama ya Bapakano na kati na yango, kotyama ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na koleisa basali na ye, mpe koyanganisama ya “ebele monene” ya bato oyo bazali na elikya ya kobika seko kati na Paradis ya mabelé. (Matai 24:45; Emoniseli 7:9, 14-17; Baefese 3:3-6) Nsima na kotya miso kati na makambo mozindo ya Nzambe mpe nsima na kotala misala ya kokamwa oyo azali kosalela biso, tokoki bobele koloba: “E, oyo nde bozindo ya bozwi, ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe!”​—Baloma 11:33.

13. Ndenge nini tokoki ‘koluka Nzambe’, mpe bolamu nini tozali kozwa na kosalaka bongo?

13 Mokomi na nzembo alobaki: “Naluki yo na motema na ngai mobimba.” Tokoki komekola ye na koyekolaka Makomami mokolo na mokolo, yango ezali kosalisa mingi mpo na kolendisa bansinga oyo ezali kokangisa biso elongo na Jéhovah. Boyekoli malamu ya Biblia ezali kosalisa lisusu na ‘kopengwa soki moke te na malako ya Nzambe’.​—Nzembo 119:5, 10.

Boyekoli ezali kosalisa biso na koloba mpo na kondima na biso

14. Pesa ndakisa oyo ezali komonisa ntina ya kozala ‘pene na koyanola’ mpo na elikya na biso ya boklisto.

14 Mokolo mosusu moto moko ya mokili ya Ghana alobaki liboso na basakoli mibale oyo bayaki kotala ye: “Nayambaka ba Témoins de Jéhovah epai na ngai te!” Na nsima alobaki ete bazali kosala mabe “mpo baboyaka ete bazongisa bango makila mpe bapesaka losako na bendele te”. Mbala mingi tokutanaka na maloba ya botemeli ya lolenge yango kati na mosala ya Nzambe. Oyo nde nsoni, soki tozangi likoki ya ‘kozongisa monoko na moto na moto oyo azali kotuna biso mpo na ntina na elikya ezali kati na biso!’. (1 Petelo 3:15) Kasi likambo na esengo, Batemwe mibale yango bayebaki kosalela Biblia malamu mpo na kolimbola na molobani na bango oyo yango ezali koteya mpo na makila mpe mpo na ezaleli ya bokatikati ya moklisto, oyo amemyaka bendele ya mboka kasi amibatelaka na losambo ya bikeko. Mbano na yango ezalaki nini? Moto yango akamwaki na biyano na bango ya polele. Mwasi na ye mpe ye bazali lelo ba Témoins de Jéhovah.

15. Na motindo nini boyekoli ya moto na moto ezali kobongisa biso mpo na mosala ya Nzambe?

15 Paulo apesi toli oyo: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai na Nzambe lokola moto andimami, lokola mosali oyo abongi koyoka nsoni te, oyo asembolaka malamu liloba na solo.” Boyekoli ya moto ye moko ezali kosalisa biso bobele mpo na kotikala na nzela ya bomoi te, kasi lisusu mpo na ‘kozala bato babongi, baoyo baselingwi mpenza’ mpo na kosunga bazalani na biso ete basala motindo moko.​—2 Timote 2:15; 3:17.

Tokima mitambo ya Satana

16. Mitambo mosusu nini Satana atyeli basaleli ya Jéhovah?

16 Na mikolo na biso, totondi na makambo ya bopanzi nsango oyo ezali kokumisa “mposa ya mosuni, mposa ya miso mpe lolendo ya bato mpo na biloko bazali na yango.” (1 Yoane 2:16) Myango ya bopanzi nsango mizali kokumisa pite, mpe baninga ya ba Témoins de Jéhovah ya mosala to ya kelasi bazali kondima yango. Bamosusu kati na biso bazali kozwa mikanda mabe mizali kouta epai ya batomboki kozanga ete basenga yango. Na mposa ya koyebayeba makambo, ba Témoins batangaki makambo yango ya mbindo, mpe botangi yango ekweisaki kondima na bango. Ezali mpe lisusu na “elimo” ya moimi mpe ya mosuni “oyo ezali sikawa kosalaka mosala kati na bana oyo bazangi botosi”. Ezali mpenza mpasi te mpo na kokosama na elimo yango mpe kokolisa ezaleli mabe mpe ya botyoli!​—Baefese 2:2.

17, 18. Na motindo nini boyekoli ya moto na moto ezali kosalisa biso ete ‘topengwa na nzela’ te?

17 Na ntembe te, baklisto mingi te bamikweisaka na nko kati na mitambo ya Satana. Kasi lokola bazali kotya boyekoli na bango moko pembeni, bazali moke na moke “kopengwa na nzela”, lokola masuwa oyo bafungoli bansinga na yango, mpe bazali kokoma bato oyo Satana azali kosepela kobundisa mingi. (Baebele 2:1) Ezali na lolenge yango nde nsima na kosala pite elongo na moninga ya kelasi moko ya mwasi, elenge mobali moko Témoin alobaki: “Nayaki kososola ete etamboli mabe na ngai eutaki mpenzampenza na kozanga kolya na elimo. Natemelaki momekamo yango te mpamba te nazalaki kosala boyekoli ya ngai moko te.” Ebongiseli ya boyekoli esalisaki Témoin yango na komilendisa na elimo.

18 Satana azali na mokano ya kobebisa motuya moleki monene ya basaleli na Nzambe. Tokoki kopengola mitambo na ye na koleisaka elimo na biso ntango nyonso na makambo malamu oyo mazali kouta na Liloba na Nzambe mpe na moombo na ye ya sembo. (Bafilipi 4:8) Biblia mpe mikanda ya la Société ezali na mateya mingi oyo mazali mbala na mbala kokebisa biso na bolingo ya biloko ya mosuni, pite, lipengwi, mpe makanisi malongobani te. Soki tokomikebisa na yango mpenza, tokopengwa soki moke te na nzela.

Lisanga ya Jéhovah ezali kosalisa biso

19. Ndenge nini likambo ya mokube moto na Etiopia elakisi ete tozali na mposa ya lisungi na elimo?

19 Boyekoli esengaka milende mingi. Na bongo tosengeli kozala na matondi epai na lisanga ya Jéhovah mpo na lisalisi ya motuya oyo yango ezali komemela biso. Na bambula oyo, bamosusu bandimaki ete esengeli kotika moto na moto alimbola Biblia ye moko. Kasi mokube moto na Etiopia andimaki na polele ete azalaki na mposa ya lisungi ya elimo, boye te? Nzokande, lokola ezalaki ye mondimi akatami ngenga, na ntembe te azalaki na boyebi monene ya Biblia. Ezali yango emonisami na likambo oyo ete azalaki koluka kokanga ntina na esakweli ya mozindo lokola oyo ya Yisaya 53. Kasi, ntango Filipe atunaki ye soki azalaki kokanga ntina na makambo oyo azalaki kotanga, andimaki ete azalaki na mposa ya lisalisi, na kotunaka: “Nakokoka koyeba yango ndenge nini soki moto asungi ngai te?”​—Misala 8:26-33.

20. (a) Tanga mwa bamoko na bibongiseli oyo lisanga ya Jéhovah ezwaki mpo na kosalisa biso ete moto na moto ayekola Biblia. (b) Okanisi nini na lisalisi yango?

20 Ndenge moko, na mikolo na biso, basaleli ya Nzambe bazali na mposa ya kotambwisama na elimo. Lokola balingi “koloba bango banso na motindo moko” makambo ya elimo, bazali kosepela na lisalisi ya motuya monene oyo lisanga ya Jéhovah ezali kopesa bango. (1 Bakolinti 1:10) Bazulunalo Mosenzeli mpe Réveillez-vous! ezali liziba ezangi nsuka ya mateya. Tozali na mikanda ebele mpe ba brochures etali mitindo nyonso ya mateya ya Biblia. Tozali mpe na libaku malamu mpenza ya kozala na ba lndex ya mikanda ya la Société Watch Tower, ezali bisaleli oyo ezali kopesa nzela na ‘kokoba koluka mayele lokola bakolukaka mosolo mpe biloko na motuya bibombami’.​—Masese 2:2-4.

21. (a) Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki motuya azalaki kopesa na boyekoli na ye moko? (b) Makanisi nini makoki koyeisa petee boyekoli ya moto na moto?

21 Ozali kozwa litomba na mikanda ya la Société na kosalelaka yango mpo na koyekola mpe kosala bolukiluki? To mpe ezali bobele mpo na kotondisa biblioteke na yo? Toyeba ete ntoma Paulo atunaki na Timote ete amemela ye, na Rome, “mikanda, mpe mingimingi bamposo na kokoma”. Emonani ete azalaki kolobela biteni ya Makomami na liebele. (2 Timote 4:13) Na ntembe te Paulo alingaki kozala na yango elongo na ye mpo na koyekola mpe kosala bolukiluki kozanga mpasi. Soki osali naino yango te, mpo na nini okobanda te komisalela biblioteke ya mikanda ya lisangá mpo okoka mpe kosala bolukiluki? Sala na boye ete mikanda yango ezala na esika oyo okoki kozwa yango kozanga mpasi, ebongisama na molongo mpe ezala peto. Omizwela esika moko ya kimya mpe oyo engengisami malamu mpo na koyekola. Omizwelaka ntango mbala na mbala mpo na boyekoli na yo moko.

22. Na mikolo na biso, mpo na nini ezali na ntina koleka mpo na ‘kotya motema na Liloba ya Nzambe’?

22 Ndenge moko na Bayisraele oyo bafandaki mwa ntango moke na mabelé kitoko ya Moaba, tokomi pene na kokota kati na mokili ya sika. Tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe lisusu mingi koleka. ‘Tomizwela ntango malamu’ mpo na boyekoli, mbala mosusu tokoki kozwa yango likoló na ntango oyo tozali kolekisa na misala mosusu, na ndakisa kotala televizio. (Baefese 5:16) Petelo apesi biso toli oyo: “Boyoka mposa makasi ya mabele peto oyo ezali ya Liloba mpo ete mpo na yango bokola”, bobele mpo na kotela te, kasi lisusu ‘mpo na kozwa lobiko.’ (1 Petelo 2:2, MN; tala Baebele 5:12-14) Bomoi na biso ezali na likama. Tobunda mpo na kotemela ezaleli nyonso ya kotya pembeni boyekoli na biso moko. Kasi, topesa nde na yango esika ekoki mpo na kobakisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe elikya na biso epai na ye. Na kosalaka bongo, tokokoma mpe kosepela lisusu mingi na lisanga oyo azali kosalela mpo na kosalisa biso. Ee, ‘totya motema na Liloba ya Nzambe’, ntango nyonso mpe mbala na mbala. “Ezali mpo na bino liloba na mpamba te, kasi ezali bomoi na bino.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ntango ya kala, bato bazalaki kosalela mingi biteni ya mabelé mabombami, to ostraca, lokola biloko ya motuya moke mpo na kokoma likoló na yango. Tala oyo tozali kotanga mpo na yango kati na mokanda moko ya référence to ya kosalela (The international Standard Bible Encyclopedia [1986]): “Ostraca ezalaki mpo na babola, baoyo bazangaki likoki ya komizwela biloko mosusu ya kokomela.” Eyebani te na meko nini Bayisraele ya kala basalelaki ostraca mpo na kokoma mikapo ya Biblia. Ata bongo bamonaki na Ezipito ba oetraca oyo eumeli uta ekeke ya 7 ya ntango na biso mpe ezalaki na biteni ya Biblia, yango ezali kotinda na kokanisa ete kala bato bazangi makoki bazalaki kosalela yango mpo na kotalela biteni ya Biblia.

Bozongeli

◻ Mpo na nini Moïse apesaki Bayisraele toli ete ‘batya motema na bango na Liloba ya Nzambe’, mpe ndenge nini basengelaki kosalela toli yango?

◻ Na motindo nini boyekoli ya moto na moto eyeisaka makasi boyokani na biso elongo na Nzambe, mpe ndenge nini yango esalisaka biso na koloba mpo na kondima na biso?

◻ Ndenge nini boyekoli ya moto na moto ekoki kosalisa biso mpo na kopengola mitambo ya Satana?

◻ Bibongiseli nini lisanga ya Jéhovah ezwaki mpo na kosalisa biso na koyekola Liloba ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 25]

Na esika ete bakoma mobeko ya Nzambe na motema na bango, Bayuda bazalaki kolata bakesi mikemike oyo ezalaki na biteni ya Makomami.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto