Mituna ya batangi
◼ Engebene maloba na Yesu mazwami kati na Yoane 15:15, baklisto basengeli komitalela lokola “baombo” na Yesu, to “baninga na ye”?
Tokoki, mpe tosengeli komitalela lokola baombo mpe baninga na ye. Mpo na kokanga ntina ya likanisi yango, totala likambo Yesu alobaki epai na bantoma na ye ya sembo na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bango: “Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye. Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino. Nakobyanga bino lisusu baombo te, mpamba te moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye te. Nde nasili kobyanga bino baninga, mpamba te nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.”—Yoane 15:13-15.
Ya liboso, ndimbola ya maloba na Yesu ezalaki nini ntango alobaki ete bayekoli na ye ya sembo bazalaki baombo? Azalaki kolobela mpo na boombo ya bakitani na Adame te, baoyo bazali kobotama na kozanga kokoka, batekisami to bayangelami na masumu. (Yoane 8:34; Baloma 5:18, 19; Bagalatia 4:5) Na yango, ata bongo balingaki te kozala na bonsomi kati na makambo nyonso. Lokola ntoma Paulo akomaki yango na nsima. “basombamaki na motuya”, elingi koloba makila na Yesu, mpe na bongo bakomaki baombo na Nzambe mpe na Klisto.—1 Bakolinti 6:20; 7:22, 23.
Kati na Yoane 15:15, Yesu alobi te ete bantoma oyo batikalaki sembo, baoyo balingaki kozwa elimo santu mpe kokoma baklisto bapakolami, batikalaki lisusu baombo te. (Tala Yoane 15:20) Ya solo, boombo epai na Nzambe na nzela na Klisto ezali na motema mabe te mpe ekomema na liwa le. Etondi nde na bolingo mpe ekopesa nzela na kotikala na bomoi. (2 Timote 4:8; Tito 1:1, 2) Moklisto oyo andimi na esengo nyonso motuya ya makila na Klisto mpe akomi moombo na Nzambe akomema na liwa ya libela bobele soko aboi mbeka yango, amipesi lisusu na masumu mpe akomi lisusu moombo na yango. (Bagalatia 1:10; 4:8, 9; Baebele 6:4-6) Na yango, bayekoli na Yesu bakotikala baombo na Nzambe mpe na Klisto. Bakozala ata koleka baombo. Na ndenge nini?
Yesu mpe bantoma na ye bayebaki malamu boyokani ya likololikolo oyo ezalaki kala kati na nkolo mpe moombo na ye, mpamba te ‘moombo azalaki koyeba te likambo oyo nkolo na ye azalaki kosala’. Mingimingi, nkolo azalaki kosolola te na moombo oyo ye asombaki, mpe azalaki kobombela ye makanisi na ye to mayoki na ye ya mozindo.
Kasi maloba na Yesu mamonisi ete ezalaki bongo te mpo na bantoma. Alobaki na bango: “Nde nasili kobyanga bino baninga, mpamba te nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.” (Yoane 15:13-15) Ndenge tokosalaka yango mpo na baninga na biso ya motema, Yesu abimiselaki bango makambo nyonso mpe apesaki bango bingengiseli na ntina na makambo oyo mazalaki mabombami. (Matai 13:10-12; 1 Bakolinti 2:14-16) Ata bazalaki ntango nyonso basaleli to baombo na Nzambe, na nzela na Yesu, bantoma bazalaki na boyokani kitoko oyo ekomisaki bango baninga babongi mpo na kotyela motema. (Tala Nzembo 25:14) Yango ekoki mpe esengeli kozala ndenge moko mpo na biso. Oyo nde libaku malamu ya kozala na Bankolo balandi na makoló baoyo bazali kotyela biso motema mpe bazali kopesa biso limemya, elingi koloba ete bazali baninga na biso!