Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/12 nk. 16-20
  • Tosalela Jéhovah na bomoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosalela Jéhovah na bomoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazali koloba “monoko ya peto”
  • Bato bazali lokola mabonza kitoko
  • Bomoto ya sika
  • Totalela bamosusu ete baleki biso
  • Toyoka mpe totala
  • Bapambwami mpe basungami
  • Bondeko oyo ezali kopusa biso ete tozala na botondi
  • Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Monoko na peto mpo na mabota nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tólanda kosala na bomoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lobá monoko na peto mpe zala na bomoi na seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/12 nk. 16-20

Tosalela Jéhovah na bomoko

“Boye, nakobongola maloba na bato kino monoko na mpeto, ete bango nyonso babianga nkombo na Jéhovah.”​—SOFONI 3:9.

1, 2. (a) Esakweli nini Jéhovah azali kokokisa yango? (b) Esakweli yango ebimisi mituna nini?

NA ELEKO NA BISO, Jéhovah azali kokokisa mosala moko oyo bato bakokaki kosala yango na makasi na bango te. Na mokili ya lelo oyo esili kokabwana, kati na yango minoko 3 000 ezali kolobama, Nzambe azali kokokisa esakweli oyo: “Nakopesa epai na mabota—ekozala libongwani—monoko ya peto, mpo ete bango banso babelela nkombo ya Jéhovah, mpo ete basalela ye na bomoko.”​—Sofoni 3:9, MN.

2 “Monoko na peto” yango ezali nini? Nani azali koloba yango? ‘Kosalela Nzambe na bomoko elimboli nini’?

Bazali koloba “monoko ya peto”

3. Monoko na peto” ezali nini, mpe mpo na nini bato oyo balobaka yango bakabwani te?

3 Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33, elimo santu ya Nzambe esopamaki likolo na bayekoli ya Yesu Klisto, kopesaka bango likoki ya koloba na minoko oyo bayebaki te. Na ndenge yango, bakokaki bongo koloba “makambo kitoko na Nzambe” epai na bato oyo bazalaki koloba bankota mingi. Jéhovah abandaki bongo koyanganisa bato bautaki na bikolo nyonso. (Misala 2:1-21, 37-42) Na nsima, ntango Bapakano bakomaki bayekoli na Yesu, basaleli na Nzambe babandaki kokoma libota oyo eyanganisaki kati na yango, bato ya minoko mikeseni mpe ya mposo ekeseni. Ata bongo, bato yango bazali na bokabwani te lokola mokili esili kokabwana, mpamba te bango nyonso bazali koloba “monoko ya peto”. Monoko yango ya peto oyo bango nyonso bazali koloba mpe oyo elobelami kati na Sofoni 3:9, elimboli solo ya Biblia. (Baefese 4:25) Bato bazali koloba yango bakabwani te, kasi ‘bazali koloba na bomoko’ mpe ‘basangani elongo na elimo moko mpe na likanisi moko’.​—1 Bakolinti 1:10.

4. Sofoni 3:9 elobi nini mpo na mosala mosengeli kosalema na bato ya minoko nyonso mpe ya mposo nyonso?

4 “Monoko ya peto” esengeli kosalisa bato ya bikolo bikeseni mpe ya mposo ekeseni ete asalela Jéhovah “elongo”. Bato yango bakosalela Jéhovah “na motema moko” (Français courant); “na bomoko” (Crampon 1905); “na ekanganeli moko” (Jérusalem) Libongoli mosusu ebongoli mokapo yango boye: “Nakosala na boye ete mabota mazala na bibebu na peto mpo bango nyonso bakumisa nkombo ya NKOLO, mpo ete basalela ye na molende moko.” (TOB) Ezali bobele ba Témoins de Jéhovah, oyo ayanganisi kati na bango minoko ebele mpe mposo ekeseni, bango nde bazali kosangana na molende moko kati na mosala mpo na Jéhovah.

5. Motindo nini ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela minoko ndenge na ndenge oyo bato balobaka?

5 Lokola ba Témoins de Jéhovah nyonso bazali koloba “monoko ya peto” oyo ezali bongo solo ya Biblia, na ndenge yango, bazali mpenza kosalela minoko ya bato na lolenge malamu bazali kokumisa Nzambe mpe bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Malako 13:10; Tito 2:7, 8; Baebele 13:15) Ezali likambo na esengo te na komona ete “monoko na peto” epesi nzela epai na bato na bikolo nyonso ete basambela Jéhovah na bomoko?

6. Ndenge nini Jéhovah azali kotalela bato, mpe moklisto akoki kosala nini soki amoni ete azali naino koponapona kati na motema na ye?

6 Wana ezalaki ye kopesa litatoli epai na Korneye mpe epai na Bapakano mosusu, Petelo alobaki: “Na solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Engebene mabongoli mosusu, Jéhovah “akotalelaka bato nyonso ndenge moko”, “akoponaponaka te”, “akotalaka bilongi te”. (Maredsous; Darby; Français courant.) Biso baoyo tozali kosalela Jéhovah, tosengeli kotalela bato na bikolo nyonso, ndenge Jéhovah azali kotalela bango. Kasi moklisto akosala nini soki azali naino na mwa koponapona kati na motema na ye? Akoki kokanisa malamumalamu mpo na ndenge oyo Nzambe na biso azangi koponapona azali kotalela bato na mabota nyonso, na bikolo nyonso, na bamboka nyonso, na mikili nyonso mpe minoko nyonso, baoyo bazali kosalela ye kati na mokili.​—Tala Réveillez-vous ! ya le 8 Février 1985, nkasa 3 kino 11.

Bato bazali lokola mabonza kitoko

7. Mpo na oyo etali boyokani na ye elongo na Nzambe, mpo na nini tokoki koloba ete moklisto akeseni na mosusu te ata mposo na ye nini to ekolo na ye nini?

7 Soki lelo ozali Témoin de Jéhovah, ntembe ezali te ete na eleko moko ozalaki ‘kolela mbe koyoka motema mpasi mpo na makambo nyonso na mbindo’ mazali kosalema na mokili oyo ya mabe. (Ezekiele 9:4) Ozalaki ‘mokufi kati na masumu na yo’, kasi Nzambe asili koyokela yo mawa: abendi yo ete oya epai na ye na nsima na Yesu Klisto. (Baefese 2:1-5; Yoane 6:44) Na yango, eloko moko te ekesenisi yo na bato mosusu oyo bazali lelo bandeko na yo kati na kondima. Bango mpe, kala bazaláká koyoka mpasi na motema na komonaka mabe mazali kosalema na mokili mpe bazalaki ‘bakufi kati na masumu na bango’, mpe bango lisusu bazwi litomba na mawa oyo Nzambe amonisi epai na bango na nsima na Yesu Klisto. Epai mosusu, ezala nini mposo na ye to ekolo na ye, ezali bobele na kondima na biso nde mokomoko kati na biso akoki kotangama na miso ya Jéhovah Nzambe lokola moko kati na batemwe na ye.​—Baloma 11:20.

8. Ndenge nini Hagai 2:7 ezali kokokana na mikolo na biso?

8 Maloba na esakweli makomami na Hagai 2:7 mazali kosalisa biso na kokanga ntina ndenge nini tosengeli kotalela bandeko na biso oyo bauti na mikili ndenge na ndenge. “Nakoningisa mpe mabota nyonso mpe mabonza kitoko na mabota makoingela mpe makotondisa ndako oyo na nkembo. Jéhovah na bibele alobi bongo.” Ezali kati na temple ya solo ya Nzambe, esika bazali kosambela ye, ezali kuna nde losambo na peto etombwami, engebene esakweli oyo. (Yoane 4:23, 24) Nzokande, “mabonza kitoko na mabota” ezali biloko nini? Ezali bibele na bato oyo balingi boyengebene mpe bazali koyamba nsango ya Bokonzi. Bango bauti na mabota nyonso mpe na mposo nyonso, mpe bamati na “ngomba na ndako na Jéhovah”; na maloba mosusu, bazwi batisimo mpe bayei kobakama na “ebele monene” ya batemwe ya Nzambe oyo bauti na mikili nyonso. (Yisaya 2:2-4; Emoniseli 7:9) Bato oyo bazali kokumisa Jéhovah kati na lisanga na ye na mabele bazali peto, bazali na bizaleli malamu mpe bazali kobanga Nzambe; bazali solo biloko na motuya. Ekoki bongo ete moklisto ya solo amonisa bolingo ya bondeko epai na bato wana nyonso, baoyo basili kondimama na Tata na biso banso, Nzambe na makóló.

Bomoto ya sika

9. Ata soki kala tozalaki kotiola bapaya, mpo na nini mbongwana esengeli, awa esili biso kokoma baklisto?

9 Soki bandeko na biso mibali mpe basi kati na kondima bazali biloko na motuya, ata bafandi wapi kati na mokili, ezali lisusu mpo ete balandi toli oyo ezwami na Biblia, engebene yango tosengeli ‘kolongola bomoto ya kala elongo na misala na yango mpe kolata bomoto ya sika’. “Na nzela na boyebi na solo, (bomoto yango) ezalisami sika kino ekozwa ye motindo na Mozalisi na ye. Wana Baela bazali te soko Bayuda te, bakatami ngenga te soko bazangi kokatama ngenga te, basenzi te soko Basukute te, baombo te soko bansomi te, kasi Klisto azali nyonso kati na nyonso.” (Bakolose 3:9-11) Soki, liboso ya kokoma moklisto, moto moko azalaki koyina bapaya mosusu, ezala Bayuda, Bagreke to bamosusu, asengelaki kobongwana. Ata mposo na bango ezali nini, soko mpe ekolo to kobokwama na bango, baoyo balati “bomoto ya sika” bamonisi ete bazali kolona mbuma na elimo santu na Nzambe: bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema. (Bagalatia 5:22, 23) Mpo na bizaleli yango, bakomi biloko na motuya na miso ya baninga na bango baklisto.

10. Soki tomekami na koloba mabe na ntina na bandeko na biso baklisto mpo bazali bato ya mposo boye to ekolo boye, ndenge nini Tito 1:5-12 ekoki kosalisa biso?

10 Na kokesena na ba Témoins de Jéhovah, bato mosusu kati na mokili bazali na limemya te epai ya bato ya mposo mosusu to ya bikolo mosusu. Mosakoli moko Mokelete alobaki boye mpo na bato ya mokili na ye: “Bakelete bazali seko babuki na lokuta, banyama mabe, bato na lokoso mpe na goigoi.” Ntoma Paulo amikundolaki maloba yango ntango esengelaki na ye kokanga monoko na balakisi ya lokuta oyo bazalaki kati na baklisto na esanga ya Kelete. Nzokande, Paulo alobaki te ete baklisto nyonso ya Kelete bazalaki babuki na lokuta, banyama mabe, bato na goigoi mpe bato na lokoso. (Tito 1:5-12) Te, likanisi na ye ezalaki bongo te, mpamba te baklisto bakotiolaka bazalani na bango te. Epai mosusu, ntalo monene kati na baklisto yango basilaki kolata “bomoto ya sika”, mpe bamoko na bango bakokisaki masengami mpo na koponama bankulutu. Tosengeli kokanisaka na ndakisa oyo, soki ekomeli biso ete tomekami koloba mabe na ntina na bandeko na biso mibali mpe basi na elimo oyo bazali mposo mosusu to ekolo mosusu.

Totalela bamosusu ete baleki biso

11. Soki moklisto moko amoni ete kati na motema na ye azali naino na makanisi ya koponapona, ekoki kosala nini?

11 Epai mosusu, soki moklisto moko alingaki mingi mposo moko to ekolo moko, yango ekoki komonana na maloba na ye to na misala na ye; mpe bamosusu bakoki kozoka na koponapona wana, mingimingi na masanga epai kuna mposo ndenge na ndenge esangani wana. Ya solo, moklisto moko te azali na mposa ya kobebisa bomoko ya libota ya Nzambe. (Nzembo 133:1-3) Na yango, soki moklisto moko amoni ete kati na motema na ye azali naino na mwa koponapona, ekoki asambela boye: “Meka ngai, e Nzambe, mpe yeba motema na ngai; sosola ngai mpe yeba kobanza na ngai. Tala soko nazali kotambola na nzela mabe, mpe kamba ngai na nzela na seko.”​—Nzembo 139:23, 24.

12. Mpo na nini tosengeli te komikumisa to kokumisa bato mosusu baoyo tozali na bango mposo moko to ekolo moko?

12 Tozala na makanisi mabongi mpe tobosana te ete tozali biso banso bato bazangi kokoka, mbele tozali eloko te na miso na Nzambe soki Yesu Klisto apesaki bomoi na ye te lokola mbeka. (1 Yoane 1:8 kino 2:2) Na yango, eloko nini ekesenisi biso na bamosusu? Lokola nyonso tozali na yango epesamelaki biso kopesama, mpo na nini tokomikumisa soki mpe kokumisa bato mosusu, baoyo tozali na bango ekolo moko?​—Tala 1 Bakolinti 4:6, 7.

13. Ndenge nini tokoki kokolisa bomoko ya lisanga, mpe liteya nini tokoki kozwa na Bafilipi 2:1-11?

13 Tokoki kokolisa bomoko ya lisanga soki tokomonisa na bazalani na biso ete tosepeli na bizaleli na bango kitoko. Ntoma Paulo, oyo azalaki Moyuda, apesi biso makanisi malamu, wana elobaki ye na Bapakano na lisanga ya Filipe: “Botondisa esengo na ngai ete bokanisa nzela moko, bozalana na bolingo moko, bosangana na motema moko mpe na lobanzo moko. Bosala likambo moko mpo na elulela soko mpo na lolendo te kasi, awa ezali bino na kosokema, botanga bamosusu ete baleki bino.” Na ndakisa na ye, Yesu Klisto amonisaki biso ndenge nini tosengeli kotalela bato ya mposo nyonso mpe ya bikolo nyonso. Atako azalaki ekelamu ya elimo mpe ya nguya, “abotami na lolenge na bato” mpe amikitisaki kino na kufa likolo na nzete ya mpasi mpo na bolamu ya basumuki ya mposo nyonso mpe ya bikolo nyonso. (Bafilipi 2:1-11) Na yango, biso baoyo tozali bayekoli na Yesu, esengeli tomonisa bolingo, kosokema mpe mawa, kotalaka bamosusu ete baleki biso.

Toyoka mpe totala

14. Nini ekosalisa biso totalela bamosusu ete baleki biso?

14 Ekozala na biso mpasi te na kotalela bamosusu ete baleki biso soki tozali koyoka bango mpe tozali kotala bango na likebi. Na ndakisa, soki tozali bankulutu, ezaleli yango ekolingisa biso kondima na kolongobana nyonso ete nkulutu mosusu—mbala mosusu azali moto ya mposo mosusu—aleki biso mpo na oyo etali kopesa toli malamu na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Mbala mosusu tokokanga ntina ete ezali makasi na ye na elimo—kasi ezali te mpo ayebi koloba malamu—yango nde ezali kopesa ye nzela na kozwa matomba malamu mpe kosalisa baninga na ye baklisto ete bazala basakoli malamu mingi ya Bokonzi. Epai mosusu, ekomonana polele ete Jéhovah azali kopambola milende na ye.

15. Wana ezali biso koyoka bandeko na biso baklisto, eloko nini tokomona yango mbala mosusu?

15 Ntango tozali kosolola elongo na baninga na biso baklisto to tozali koyoka biyano oyo bazali kopesa na makita, tozali komona mbala mosusu ete bamoko na bango baleki biso na boyebi ya makambo mosusu mazali na Biblia; ntango mosusu baleki biso na bolingo mozindo epai ya bandeko, na kondima makasi to na elikya monene epai na Jéhovah. Na motindo yango, ata bazali bato ya mposo nini to ya ekolo nini, bazali kopusa biso na bolingo mpe na misala kitoko, bazali kosalisa biso na kolendisa kondima na biso mpe bazali kopusa biso ete tomipesa mingi koleka epai na Tata na biso ya likolo. (Masese 3:5, 6; Baebele 10:24, 25, 39) Ezali polele ete Jéhovah asili kobelema epai na bango, mpe biso tosengeli komekola ye.​—Tala Yakobo 4:8.

Bapambwami mpe basungami

16, 17. Pesa bandakisa mpo na komonisa ete Jéhovah azali na koponapona te mpo na oyo etali kopesa mapamboli na basaleli na ye ya ekolo boye to ya mposo boye.

16 Jéhovah azali na koponapona te kati na mapamboli oyo azali kopesa na basaleli na ye ya ekolo boye to ya mposo boye. Tokamata ndakisa ya Brezile. Ezali bamisionere te, kasi bato mwambe, bango moko bato ya Brezile mpe batamboli na masuwa to ba marins, bango nde basakolaki kuna nsango ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso. Ezalaki pene na 1920. Ezali polele ete Nzambe apamboli mosala ya kosakola oyo esalemaki na mokili yango, mpamba te, na boumeli ya mbula ya mosala 1987, motuya ya basakoli batangamaki ezalaki 216 216 kati na mokili wana oyo motuya ya bafandi ezali 141,302 000; elingi koloba ete mosakoli mokomoko asengeli kosakola na bato 654.

17 Talela elembo mosusu ya lipamboli ya Nzambe. Na sanza ya Avril 1923, ba Témoins de Jéhovah mibale baindo, oyo bazaláká kofanda na esanga ya la Trinité, kuna na liboke ya bisanga oyo ebengami les Antilles, batindamaki na Afrike ya weste kosakola nsango malamu ya Bokonzi kuna. Ezalaki bongo frère mpe la soeur Brown; bango baumelaki mbula mingi awa na Afrike, kosakolaka nsango malamu, kino frère akomaki kobengama na nkombo ete “Brown la Bible”. Bango “balonaki” mpe ‘Nzambe akolisaki’ wana ezalaki bamosusu kosakola kati na teritware yango monene. (1 Bakolinti 3:5-9) Lelo oyo, basakoli ya Bokonzi bazali koleka 32 600 na Ghana mpe koleka 133 800 na Nigéria.

18, 19. Pesa bandakisa emonisi ete Nzambe na biso, azali na koponapona te, azali kosunga basaleli na ye ya mposo nyonso mpe ya bikolo nyonso.

18 Lokola emonisi yango likambo ekomelaki Batemwe mibale Bajaponé, Jéhovah azali kopambola, kasi azali mpe kosunga basaleli na ye ya mikili nyonso mpe ya mposo nyonso. Na le 21 Juin 1939, Katsuo Miura elongo na mwasi na ye bakangamaki kozanga kosala likambo moko ya mabe. Batyaki bango na boloko mpe bakabwanaki na mwana na bango ya mibu mitano, mwana yango mobali atikalaki na maboko ya nkoko na ye ya mwasi. Nsima na sanza mwambe, mwasi ya Katsuo abimisamaki na boloko, kasi ye moko atikalaki na boloko mbula mibale liboso ya kosamba. Anyokwamaki mingi, mpe na nsima bakatelaki ye boloko ya mbula mitano. Na mikolo azalaki na boloko na Hiroshima, Nzambe asungaki ye na nzela na Makomami, mpe ntango nyonso azalaki kozwa makasi mpe kolendisama. Ntango bombe atomike epanzanaki kuna na le 6 Août 1945, kobika na ye ezalaki lokola likamwiseli, mpamba te boloko esika ye azalaki ebebisamaki nyonso na bombe. Nsima na sanza mibale, akokaki kolanda mwasi na ye mpe mwana na ye, oyo ntango yango bakomaki kofanda na nord ya Japon.

19 Na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ba Témoins de Jéhovah banyokwamaki makasi na mikili mingi; ezalaki bongo mpo na Robert Winkler, moklisto moko Allema oyo anyokwamaki kati na Camps de Concentration ya banazi, na Allemagne mpe na Pays-Bas. Lokola aboyaki kopesa nkombo mpe bisika ya baninga na ye bandimi, abetamaki makasi; mpo na monyokoli yango nzoto na ye ebebaki mingi mpe ezalaki mpasi mpo na koyeba ye lisusu. Ye moko alobi: “Nazalaki kokanisa bilaka ya Nzambe, ye oyo alobaki ete akosalisa basaleli na ye kati na bolozi ya ndenge nyonso, mpe yango ezalaki kolendisa ngai, kopesaka ngai makasi ya koyika mpiko na mpasi wana nyonso. . . . Mokolo ya samedi, bapolisié ya Gestapo babetaki ngai lisusu, mpe na lundi elandaki, batunaki ngai lisusu mituna ebele. Eloko nini elingaki kosalema, mpe eloko nini nakokaki kosala? Nabongwanaki epai na Jéhovah kati na libondeli, kotiaka motema na bilaka na ye. Nayebaki ete yango elimboli kosalela mayele ya teokratike, mpo na matomba ya mosala ya Bokonzi mpe mpo na kobatela bandeko na ngai baklisto. Ezalaki komekama makasi mpo na ngai! Na mokolo na zomi na nsambo, makasi na ngai nyonso esilaki, kasi natondaki Jéhovah, mpamba te na makasi na ye, alendisaki ngai kino nayikaki mpiko mpe nabatelaki bosembo na ngai.”​—Nzembo 18:35; 55:22; 94:18.

Bondeko oyo ezali kopusa biso ete tozala na botondi

20. Ndenge nini limemya na biso mpo na baninga na biso baklisto ya mposo nyonso mpe ya bikolo nyonso ekoki kokola?

20 Na ntembe te Jéhovah azali kopambola mpe azali kosunga batemwe na ye ya mposo nyonso mpe ya mabota nyonso. Azali na koponapona te; yango wana biso, baoyo tomipesi epai na ye mpe tozali kosalela ye, mbele tokozala bato mabe soki tozali na koponapona. Epai mosusu, limemya ya mposo nyonso mpe ya bikolo nyonso ekokola se kokola soki tokanisi na makambo oyo bango baleki biso na yango. Bango mpe bazali kosalela mayele ya Nzambe, oyo mazali na koponapona te mpe mazali kobota mbuma malamu mingi. (Yakobo 3:13-18) Epai mosusu, boboto na bango, bokabi na bango, bolingo na bango mpe bizaleli na bango mosusu oyo bamekoli yango na Nzambe ekomisi bango ndakisa malamu mingi mpo na biso.

21. Mposa na biso esengeli kozala nini?

21 Na yango, tosengeli kozala na botondi epai na Jéhovah lokola tozali na boyokani ya bondeko elongo na bato ya mposo ndenge na ndenge mpe ya bikolo ndenge na ndenge. Esili biso kolendisama mpo na lisalisi na ye mpe lipamboli na ye, tika ete tosalela Tata na biso ya likolo “na motema moko”, kati na bolingo ya bondeko mpe limemya ya biso na biso. Ee, tosengeli kozala na mposa mozindo mpe mokano makasi ya kosalela Jéhovah na bomoko.

Bozongeli

◻ Mpo na “monoko na peto”, basaleli ya Jehovah ya bikolo nyonso mpe ya mposo nyonso bakoki kosala nini?

◻ Ndenge nini Hagai 2:7 ezali kokokana lelo, mpe likambo yango esengeli kozala na bopusi nini likolo na lolenge oyo biso tozali kotalela basaleli mosusu ya Nzambe?

◻ Bafilipi 2:3 ekoki kozala na bopusi nini likolo na boyokani oyo tozali na yango na bato ya mposo nyonso mpe ya bikolo nyonso?

◻ Soki tozali koyokamela mpe kotala bandeko na biso ya mposo mosusu to ya bikolo bisusu, tokomona nini na ntina na bango?

[Bililingi na lokasa 17]

Bato ya mposo nyonso mpe ya bilolo nyonso bazali kokumisa Jéhovah elongo

[Elilingi na lokasa 18]

Soki tozali koyokamela mpe kotala na likebi ba Témoins de Jéhovah mosusu, tokozanga te kobendama na bolingo mpe na kondima emonisami na maloba na bango mpe na misala na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto