Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/4 nk. 5-7
  • Mbongwana ya ezalela ya basi: malamu mpe mabe na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbongwana ya ezalela ya basi: malamu mpe mabe na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo yango ebimisi kati na libala mpe bomoi ya libota
  • Mabe ya mbongwana ya ezalela ya mwasi
  • Toli ya Biblia, ezali mpamba?
  • Avenire ya malamu-Ndenge nini?
  • Mbongwana ya ezalela ya basi na mikolo na basi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Nzambe alingaka bápesa basi lokumu mpe limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Basi oyo bakosalaka makasi kati na Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Esengeli kopesa basi lokumu mpe kondima mosala na bango
    Lamuká!—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/4 nk. 5-7

Mbongwana ya ezalela ya basi: malamu mpe mabe na yango

NA MOKUSE basi oyo bazali na bomoi na bambula oyo basili koyekola mingi, bazali na nzoto kolongono, bazali koumela mingi mpe bazali na mosala mingi. “Yango ezalaki nsuka ya lisolo moko oyo ezalaki na motó na likambo “Bomoi na biso ya lobi; mpe bomoi na biso ya lelo” oyo ebimaki na zulunalo moko ya basi. Kasi, ekoki kozala ete mbongwana ya ezalela ya basi ezali na bolamu mingi mpenza te, mpo na makambo mosusu elandani na yango?

Makambo yango ebimisi kati na libala mpe bomoi ya libota

Na ndakisa, moto nyonso ayebi ete bomoi ya libota ya esengo eyokanaka mpenza te soko mwasi amipesi na mosala na ye. Tokokaki kotanga makambo malandi na rapport moko: “Basi oyo bazali na bisika minene bazali mpenza kotya likebi te na bomoi na bango ya libota lokola mibali bakosalaka yango; mpe likama ezali monene mbala mibale mpo ete baboma libala.” Mbala mosusu okomituna mpo na nini. Professeur moko ya gestion na université ya Kaliforni alimboli boye: “Mpo na mobali, libota ezali kolendisa ye, kasi mpo na mwasi, yango ezali mokumba. Ntango akozanga na ndako na ye, mobali akominanola; ezali mpo na yango akendaka na mosala. Kasi mwasi, asengeli komipesa lisusu na mosala.

Basi oyo bazali na bisika minene bazali bobele bango mei te kati na likambo yango. Na ndakisa, basi barusse babandaki komikotisa na mosala ekeke moko liboso na basi mosusu ya Mpoto; nzokande, ezali na bango ntango nyonso mpasi mpo ete bamipesa na mosala mpe na bomoi ya libota. Mokomi moko ya nsango na zulunalo Working Woman, ye Morusse, akomaki: “Mwasi, ye nde motema ya libota, asengeli kozala na móto mpo na kokotisa kati ya libota esengo mpe bolingo.” Azali na mokumba monene na mapeka na ye, likoló na yango mokumba mosusu eyei kobakisama mpo mobali azali kosalisa ye te na misala ya ndako.

Ntina mosusu ya kozanga koyokana emonisami na maloba ya mwasi moko ya mombongo (femme d’affaire) ya Wall Street oyo alongaki mpenza na mosala na ye. Amikumisi boye: “Mosala, mpo na ngai, ezali mpo na kolekisa ntango”. Mpe abakisi: “Nalingaki mosala na ngai, mpe natikelaka mpenza makambo mosusu nzela te” ata mpo na libota na ye. Ezali nde mobali na ye, oyo ye mpe azali moto ya mombongo, nde azali kosenzela na bolamu ya libota mpe azali kobatela bana na bango mibale. Na kolandaka maloba ya baninga ya mwasi yango, molende na ye ya makasi mpo na mosala ezali “mpenza kobebisa boyokani ya libota”.

Wana ezali mpe ezalela ya mwasi moko azali premier ministre. Mposa na ye ya politike ezalaki kozwa esika likoló na libota na ye, epai na yango azali kotya likebi mingi te. Wana ezalaki bango kokola, bana na ye bazalaki mingimingi kokenda kolekisa mwa mikolo epai ya noko na bango, mpamba te, ndenge yango ekomamaki, “moko na bantango na bango ya esengo ezalaki bobele kolya na libota, kasi yango ezalaki mpe kosalema mingimingi te” epai na bango.

Kala mingi te, batunaki badirectrices minei ya kompanyi minene ya Mpoto. Moko kati na bango andimaki ete mwana na ye ya mwasi ya mbula 12 abokwamaki mpenzampenza na tata na ye. Moko alimbolaki ete akokaki kotalela bamposa ya bana se mokolo ya poso mpe ya lomingo. Engebene bapanzi na nsango, bayoki bamonaki ete basi misato kati na basi yango bazangi móto to esengo ya bomoto.

Ya solo, basi mosusu bazali kosala mpo ezali na ntina monene, mbala mosusu mpo mobali akufa to asundola libota. Yango ekozala malamu mpo ete baluka mosala; kasi, ata basenzeli na yango to te, basengeli kokumba makambo oyo yango ekobimisa.

Mabe ya mbongwana ya ezalela ya mwasi

Mbongwana ya esika ya mwasi ezali na malamu mpe na mbeba; yango emonanaka mingimingi na makambo mabimaka soko mwasi aleki mobali na ye na mbongo to na esika ya mosala. Engebene minganga, ezalela yango “ezali kokoma epai na babalani ebele ntina monene ya kozanga koyokana”. Mpo na yango, tala ndenge mobali moko amilelaki: “Soko nakanisi, nazali kosepela na ndenge alongi. Kasi mpo na oyo etali bolingo, nazali mpenza kosepela te. Nazali koyoka lokola ete nabwakami. Nazali komimona ete nasalaka mabe ndenge namitungisaka.” Soko babalani baklisto basengeli kosala bango mibale sikawa, masolo mpe kozala na limemya kati na bango mibale ekoki kosalisa bango ete balembisa makambo mabe mpe kopengola mbeba oyo ekoki kobima.​—1 Petelo 4:8.

Elembeteli mosusu emonisi ete mbongwana ya ezalela ya mwasi ezali na bolamu mpe na mbeba, ezali boye ete bato mingi bakokumisaka lotomo ya basi, bazali kolobela libosoliboso mpo na matomba na bango. Mokanda Le matriarcat montant (Angl.) elobeli eleko moko oyo mokili ekotambwisama na basi batondi na moimi mpe oyo bakobanda komituna: “Eloko nini yango ekopesa ngai?” Mwasi mozwi oyo alobelami awa na likoló azali koloba mpenzampenza bongo; azalaki na mposa ya kosalisa bamosusu te ete bango mpe bakoma na bozwi, longola bobele soko yango mpe ekoki komemela ye to kobimisela ye mwa matomba. Andimaki: “Nazali kokanisa mingi mpo na matomba.” Ezalela motindo yango ezali mayele, liboso na batoli na Yesu? Kati na Lisolo likoló na ngomba, alobaki: “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo.” “Bomitungisa te mpo na lobi; lobi ekomitungisa mpo na yango mpenza.” (Matai 7:12; 6:34) Ya solo, moklisto mwasi akotya makasi ete abatela ezalela lokola oyo ya Yesu na makambo oyo.

Toli ya Biblia, ezali mpamba?

Kozanga ntembe mpenza, kokwea to kobeba ya bizaleli malamu ezali likambo moko ya mawa kati na mbongwana ya ezalela ya mwasi. Bato bakolingaka mbongwana yango bazali kolobela mingi mpenza te mpo na Nzambe mpe mpo na lingomba, mpe soko balobeli mpo na yango, ezali mpo na kotiola. Basi oyo bazali koboya kobala mpo bazali na mosala bazali kokanisa ete mingimingi libala ezali ebongiseli ezali mpenza na ntina mingi te mpo na kokokisa bamposa ya nzoto.

Bato bakokumisaka lotomo ya basi bazali na mposa mabe ya kopesa nzela na kosangana ya basi na basi. Na 1971, Assemblée ya mbula na mbula ya NOW (National Organisation of Women-Lisangá ya mokili mobimba mpo na basi na Etats-Unis) ezwaki ekateli elandi: “NOW eyebi ndenge nini basi oyo bazali kosangana bango na bango bazali konyokwama; Toyebi mpe lisusu ete mwasi azali na lotomo ya kozwa ekateli mpo na bomoto na ye mpenza, yango etali mpe lotomo ya kosalela nzoto na ye ndenge elingi ye mpe kopona lolenge ya bomoi na ye; NOW emoni ete likanisi ya basi mpo na kotemela minyokoli ya basi bakosanganaka bango na bango ezali lolenge ya komibatela.” Kasi tala ekateli oyo Nzambe asali kati na Baloma 1:26, 27. Mingimingi, baoyo bazali kokabola likanisi ya bato bakobundela makoki to lotomo ya basi mpo na ndenge bakosangisaka nzoto bango na bango, bato yango bazali mpe kondima likambo ya kosopa zemi. Billups Percy, professeur ya droit na Université ya Tulane, andimaki mpenza likambo oyo: “Bato bazali komona ete koboma mwana naino ezali ye moke na libumu, lokola likambo moko moke, bato yango bazali kotiola bikeke nyonso oyo elekisami mpo na koyekola kriminoloji, teoloji mpe ethique (mitinda ya etamboli malamu).

Rapport moko emonisi ete, na boumeli ya bambula zomi oyo euti koleka, mabe minene oyo esalemi na basi ebakisami noki koleka mabe oyo esalemi na mibali. Na 1974 mpe 1979, motuya ya basi BaAmeriké oyo bakangamaki mpo na moyibi, ebakisamaki pene na 50%, nzokande epai na mibali, yango ebakisamaki bobele na 13%. Basi oyo bayibaki mbongo na bakompanyi babakisamaki na 50%, kasi mibali bazalaki bobele 1,5%. Basi oyo basalaki ba papiers to mikanda ya lokuta na ndenge ya moyibi bazalaki 27,7%, kasi mibali balekaki ata 10% te. Emonani polele ete basi basepeli te na mbongwana oyo esalemi na ezalela na bango.

Komela likaya esili kopalangana epai na basi. Sikawa basi oyo bazali kokufa na kanser ya poumon mpo na likaya, baleki basi oyo bazali kokufa na kanser ya mabelé. Na mobu moko oyo eleki kala mingi te, 25% ya basi bakufaki na kanser bazalaki na kanser ya poumon, mpe motuya yango ezali kobakisama mbula na mbula na 7%.

Avenire ya malamu-Ndenge nini?

Soko totaleli makambo oyo nyonso, basi bakoki kosepela to kozwa bolamu na komipesaka na mosala? Emonani ete ezali bongo te, mpe bato mingi bazali kondima likambo yango. Zulunalo moko etangi maloba ya Hilary Cosell, mokomi na mokanda oyo ezali kolobela mosala ya basi (Woman on a Seesaw: The Ups and Downs of Making lt), oyo etuni motuna elandi: “Soko basi bakosaki kala ntango bazalaki kobala, bazalaki kobota bana mpe kobatela libota na bango, bazali kozongela libunga yango te na kopesaka bomoi na bango na mosala, na kolukaka mosala malamu mpe na kolingaka kolonga?” Mokomi yango atuni lisusu boye: “Tokoki mpenza kosala makambo oyo bamama na biso mpe batata na biso bazalaki kosala?”

Bobele bongo, kati na mokanda na ye Le prix de l’amour (Angl.) Megan Marshall amonisi ete “likoki ya koyeba mosala ezali lokola elamba oyo ebombi mpota na ndenge ya mabe: mpota yango ezali nde kozanga kokokisa mayoki, etamboli mabe, kosangana ya basi bango na bango, kosopa zemi, koboma mabala mpe kozanga baninga”. Elimboli ete bato bakolobaka mpo na makoki to lotomo ya basi, likambo yango ebimisi “elímo ya lipanda” kasi basi mingi bazali kozwela yango bolamu te.

Megan Marshall asukisi boye na kolobaka ete “tosengeli kondimela bolingo oyo ekoki koumela oyo ebatelami na libala ya malamu”, na kondimisaka ete “kotya matomba na yo na esika ya liboso ezali likambo ekozanga ntina soko otikali yo moko”, mpe ete “tosengeli kolinga baninga na biso, oyo bakomonisa mpe bolingo epai na biso”. Tala likanisi oyo ekundoli biso maloba na Moteyi aleki monene oyo mabelé emona naino te, Yesu Klisto: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

Kozanga ntembe, bato bazali pene mpo na kolekisa ndelo. Mbongwana ya ezalela na basi ezali bolamu mpo na makambo nyonso te, lokola emonisi yango maloba oyo ya mosakoli Yilimia: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Kasi baklisto basi, oyo bayebi malamu mbongwana ya ezalela na basi (bolamu na yango mpe mbeba na yango) bakoki kokanga malamu ntina ya batoli na Nzambe. Makambo masalemi mamonisi ete batoli yango “eleki mposa na wolo” mpe ete “libonza monene ekomonana wana akotosa yango”.​—Nzembo 19:7-11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto