LOYEMBO 55
Bóbanga bango te!
1. Ee bato na nga’, bókende
Kosakola Bokonzi.
Bóbanga monguna te.
Bóyebisa nde bato:
Yesu azali mokonzi,
Abwaki Zabolo mpe
Akotya ye na bolɔkɔ,
Mpo bato básikwama.
(MONDIMO)
Bana na nga’ ya bolingo,
Bóbanga eloko te.
Nga’ nakobatela bino
Lokola mbuma liso.
2. Banguna bazali mingi,
Bakanelaka bino,
Mpe basɛkaka bino,
Mpo bálɛmbisa bino.
Bana na ngai ya sembo,
Atako bonyokwami,
Bóbanga te kino nsuka;
Nakolongisa bino.
(MONDIMO)
Bana na nga’ ya bolingo,
Bóbanga eloko te.
Nga’ nakobatela bino
Lokola mbuma liso.
3. Nazali nguya na bino;
Bóbanga na bino te.
Ata babomi bino,
Liwa ekotosa nga’.
Bakoki te kopekisa
Nga’ kosekwisa bino.
Bózala sembo tii nsuka;
Bózwa bomoi ya seko!
(MONDIMO)
Bana na nga’ ya bolingo,
Bóbanga eloko te.
Nga’ nakobatela bino
Lokola mbuma liso.
(Talá mpe Mib. 32:10; Neh. 4:14; Nz. 59:1; 83:2, 3.)