LOYEMBO 54
“Nzela yango oyo”
1. Eza’ na nzela moko
Ya kimya mpenza.
Oyebi yango
Mpo balakisaki yo,
Ntango oyokaki
Mongongo ya Kristo.
Nzela yango eza’
Na Lilob’a Nzambe.
(MONDIMO)
Talá nzel’a bomoi; Nzel’a solo.
Kopɛngwa te; Landá kaka yango!
Nzambe na yo alobi na yo:
‘Landá yango, eza’ nzel’a bomoi.’
2. Eza’ na nzela se
Moko ya bolingo.
Ye moko Nzambe nde
Ndakisa na yango.
Bolingo n’e elɛngi,
Mozindo mingi.
Na makambo nyonso,
Landá nzela yango.
(MONDIMO)
Talá nzel’a bomoi; Nzel’a solo.
Kopɛngwa te; Landá kaka yango!
Nzambe na yo alobi na yo:
‘Landá yango, eza’ nzel’a bomoi.’
3. Eza’ na nzela se
Moko mpo na bomoi.
Nzela mosusu
ya boye ezali te.
Awa nde kimya,
Mpe bolingo ya solo.
Eza’ nzel’a bomoi,
Tótɔnda Yehova.
(MONDIMO)
Talá nzel’a bomoi; Nzel’a solo.
Kopɛngwa te; Landá kaka yango!
Nzambe na yo alobi na yo:
‘Landá yango, eza’ nzel’a bomoi.’