LOYEMBO 26
Bosalelaki nde ngai
1. Bampate mosusu, oy’a Nkolo Yesu,
baza’ kosalisa bandeko’a Kristo.
Nyonso basali mpo
na kosunga bango,
Yesu alobi bakopambolama.
(MONDIMO)
“Soki obɔndisi bandeko na nga’,
Yebá obɔndisi nde ngai mpenza.
Mpe kosunga bango nde kosunga nga’.
Opesi bango nde opesi nga’.
Osaleli bango, osaleli nga’.”
2. “Bosalisaki nga’ na bilei mpe na mai,
na bampasi na nga’, boyaki noki.”
Bampate bakotuna ye:
“Ntango nini?”
Yesu akopesa eyano oyo:
(MONDIMO)
“Soki obɔndisi bandeko na nga’,
Yebá obɔndisi nde ngai mpenza.
Mpe kosunga bango nde kosunga nga’.
Opesi bango nde opesi nga’.
Osaleli bango, osaleli nga’.”
3. “Bokangami na nga’, bosali mosala
ya kosakola ná bandeko na nga’.”
Bongo Kristo akoloba
na bampate:
“Bózwa mabele mpe bomoi ya seko.”
(MONDIMO)
“Soki obɔndisi bandeko na nga’,
Yebá obɔndisi nde ngai mpenza.
Mpe kosunga bango nde kosunga nga’.
Opesi bango nde opesi nga’.
Osaleli bango, osaleli nga’.”
(Talá mpe Mas. 19:17; Mat. 10:40-42; 2 Tim. 1:16, 17.)