LOYEMBO 25
Ekólo mosantu ya Nzambe
Ya Papye
1. Nzambe aza’ na bana,
Bikelamu ya sika.
Mpe batyami mafuta,
Yah andimi bango.
(MONDIMO)
Ekólo ya Nzambe:
Bato oyo oponi!
Balingi yo mingi.
Baz’okumisa nkombo na yo.
2. Libota ya bosantu,
Baza’ koteya solo.
Baza’ na molili te,
Baza’ nde na pole.
(MONDIMO)
Ekólo ya Nzambe:
Bato oyo oponi!
Balingi yo mingi.
Baz’okumisa nkombo na yo.
3. Bazali kosangisa
Mpe bampate mosusu.
Baza’ sembo na Kristo.
Baza’ kotosa ye.
(MONDIMO)
Ekólo ya Nzambe:
Bato oyo oponi!
Balingi yo mingi.
Baz’okumisa nkombo na yo.
(Talá mpe Yis. 43:20b, 21; Mal. 3:17; Kol. 1:13.)