Liteya 17
Zalá moninga malamu mpo ozua baninga
Boninga eutaka na bolingo. Soki ozali koyekola makambo ya Yehova mingi, okokóma kolinga ye mpe mingi. Soki okómi kolinga Nzambe mingi, okokóma mpe na mposa makasi ya kosalela ye. Yango ekotinda yo okóma moyekoli ya Yesu Klisto. (Matai 28:19) Soki osangani na libota ya esengo ya Batatoli ya Yehova, okoki kozala moninga ya Nzambe libela na libela. Okosala nini?
Okomonisa ete olingi Nzambe soki ozali kotosa mibeko na ye. “Bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.”—1 Yoane 5:3.
Salelaká makambo oyo ozali koyekola. Yesu alobaki lisolo moko oyo ezali komonisa likambo yango. Alobaki ete moto moko ya mayele atongaki ndako na ye likoló ya mabanga. Moto mosusu oyo azalaki zoba atongaki ndako na ye likoló ya zɛlo. Ntango mopɛpɛ makasi eyaki, ndako oyo etongamaki likoló ya mabanga ekweaki te, kasi ndako oyo etongamaki likoló ya zɛlo ekweaki. Yesu alobaki ete baoyo bazali koyoka mateya na ye mpe bazali kosalela yango bazali lokola moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga. Kasi baoyo bazali koyoka mateya na ye mpe bazali kosalela yango te bazali lokola zoba oyo atongaki ndako na ye likoló ya zɛlo. Okolinga kozala lokola nani?—Matai 7:24-27.
Komipesa na Nzambe. Yango elingi koloba kosala libondeli epai na Yehova mpe koyebisa ye ete olingi kosala mokano na ye libela na libela. Kosala mokano ya Nzambe ekomonisa ete ozali moyekoli ya Yesu Klisto.—Matai 11:29.
Batisimo. “Tɛlɛmá, zwá batisimo mpe byangá nkombo na ye mpo na kosukola masumu na yo.”—Misala 22:16, NW.
Omipesa mobimba na kosalela Nzambe. “Soko bozali kosala nini, bótya mitema na kosala bongo; lokola mpo na kosalela bato te, kasi kosalela Nkolo.”—Bakolose 3:23.