Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gf liteya 16 nk. 26-27
  • Monisá ete olingaka Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monisá ete olingaka Nzambe
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Nzambe azali kobyanga yo okóma moninga na ye
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Jéhovah alingaka baoyo bakopesaka na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
gf liteya 16 nk. 26-27

Liteya 16

Monisá ete olingaka Nzambe

Mpo na kozala ntango nyonso moninga ya moto moko, osengeli kosololaka na ye. Soki oyokaka ye ntango azali koloba, ye mpe akoyoka yo ntango ozali koloba. Oyebisaka mpe bato mosusu makambo malamu oyo moninga na yo asalaka. Ezali mpe bongo mpo na moto oyo azali moninga ya Nzambe. Talelá makambo Biblia elobi mpo na yango:

Sololaká na Yehova mbala na mbala na mabondeli. “Bólemba mpo na kobondela te.”​—Baloma 12:12, NW.

Tángáká Biblia, Liloba ya Nzambe. “Makomami nyonso mapemami na elimo ya Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo.”​—2 Timote 3:16, NW.

Teyaká bato mosusu makambo ya Nzambe. “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . .  . kolakisa .  .  . bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.”​—Matai 28:19, 20.

Zalá moninga ya baninga ya Nzambe. “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele.”​—Masese 13:20.

Yanganaká na makita na Ndako ya Bokonzi. “Tólendisana bamoko na bamosusu na bolingo mpe na misala mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. . . . Tópesana toli.”​—Baebele 10:24, 25.

Simbaká mosala ya Bokonzi. “Moto na moto [apesa ndenge, NW] motema na ye [etindi ye], na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.”​—2 Bakolinti 9:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto