Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g20 No. 3 nk. 10-11
  • Luká kokóma na baninga ebele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Luká kokóma na baninga ebele
  • Lamuká!—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokakatano
  • Toli ya Biblia
  • Ntina ya kokóma na baninga ebele
  • Oyo okoki kosala
  • Balongaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe
    Lamuká!—2020
  • Zalá na bolingo
    Lamuká!—2020
  • Nasengeli kobakisa baninga?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Poná malamu baninga na yo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2020
g20 No. 3 nk. 10-11
Basi minei ya loposo ekeseni bazali kosolola mpe kosɛka elongo; bana na bango bazali kosakana.

Luká kokóma na baninga ebele

Mokakatano

Soki tozali koboya bato oyo bautá na bituluku ya bato oyo tolingaka te, ezaleli ya kokanisela bato mabe oyo tozali na yango ekoki kokola mingi mpenza. Mpe soki baninga na biso bazali kaka lokola biso, tokoki kokanisa ete, lolenge ya malamu ya kokanisa, ya koyoka to ya kosala likambo, ezali kaka oyo biso tozali na yango.

Toli ya Biblia

“Bófungwama.”​—2 BAKORINTI 6:13.

Elingi koloba nini? Bófungwama elingi koloba, tófungola motema na biso, bolingo na biso. Soki tozali kolinga kaka bato oyo bazali lokola biso, motema na biso ekokangama, ekokóma nkaka. Mpo motema na biso ekangama te, tosengeli kokóma baninga ya bato oyo tokeseni na bango.

Ntina ya kokóma na baninga ebele

Ntango toyebi bato mosusu malamu mpenza, tokobanda koyeba mpo na nini bazali kosala makambo ndenge mosusu. Mpe ntango tozali kolinga bango mingi, tokomona lisusu te ete tokeseni. Tokosepela na bango lisusu mingi, esengo na bango ekozala esengo na biso, mpe mawa na bango ekozala mawa na biso.

Tózwa ndakisa ya Nazaré. Azaláká kokanisela bapaya oyo bayá kofanda na mboka na bango mabe. Alobi eloko oyo esalisaki ye: “Nabandaki kosolola mpe kosala elongo na bango. Namonaki ete bakeseni mpenza na ndenge oyo bato ya mboka na ngai bazalaki kolobela bango. Ntango okómi moninga ya bato oyo bazali na mimeseno ekeseni mpenza na oyo ya yo, okomona ete bango nyonso bazali ndenge moko te; okolinga bango mingi mpe okomona ete mokomoko na bango azali mpenza na valɛrɛ.”

Poná malamumalamu baninga

Bato mosusu bamɛlaka badrɔge, balangwaka masanga, basalaka kindumba, mpe makambo mosusu ya mabe oyo ememelaka bango mpe basusu mpasi. Yango wana, tosengeli kopona malamumalamu baninga na biso. Ntango toboyi kozala moninga ya bato ya mayele mabe, to oyo basalaka kindumba, yango emonisi te ete tozali kokanisela bango mabe. Mpe lokola osengeli te kotinda bato na makasi bátika etamboli na bango ya mabe, ezali malamu te ete bato ya ndenge wana bázala baninga na yo.​—Masese 13:20.

Oyo okoki kosala

Luká mabaku ya kosolola na bato oyo bautá na mboka mosusu, ya ekólo mosusu to oyo balobaka monɔkɔ oyo ekeseni na oyo ya yo. Okoki

  • Kotuna bango báyebisa yo makambo na bango moko.

  • Kobenga bango báya kolya mwa eloko epai na yo.

  • Kotya likebi mpenza na masolo ya bomoi na bango oyo bakoyebisa yo mpe luká koyeba makambo balingaka.

Soki oluki koyeba makambo oyo bakutaná na yango oyo ekómisa bango ndenge bazali, na ntembe te, okobanda kokanisela bango lisusu mabe te.

Makambo oyo esalemaki: Kandasamy ná Sookammah (Canada)

“Tokolá na Afrique du Sud na ntango oyo epekisamaki ete mindɛlɛ ná baindo báfanda esika moko (to apartheid). Bato na bato basengelaki kofanda esika moko na kolanda loposo na bango, mpe yango etindaki bato oyo bazali na loposo moko boye bábanda kokaniselaka bato ya loposo mosusu mabe. Tozali mindɛlɛ te, mpe tozalaki mpenza koyina mindɛlɛ mpo bazalaki komona biso bato mpamba. Na ntango yango, tokanisaki te ete tozalaki kokanisela bango mabe. Kasi, tomonaki ete bango nde bazalaki kokanisela biso mabe.

“Mpo na kobongola makanisi na biso, tozwaki ekateli ya kofungwama mpe ya kokóma baninga ya bato ya loposo ndenge na ndenge. Ntango tokómaki na baninga ya mindɛlɛ, tomonaki ete tokeseni te, biso nyonso tozali kokutana na makambo ndenge moko mpe na mikakatano ndenge moko.

“Kutu, tofandisaki mwasi moko ná mobali moko oyo bazali mindɛlɛ na ndako na biso ntango molai mpenza. Toyaki koyeba bango malamu. Eumelaki te, tobandaki komona ete tozali baninga mpe tozali ndenge moko. Mpe yango esalaki ete tóbanda kotalela mindɛlɛ nyonso na ndenge ya malamu mpenza.”

Bandeko ya malamu

Johny ná Gideon bazali kopesa bana mbote liboso ya Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.

Atako Johny ná Gideon bazalaki loposo moko te, mpe moto na moto azalaki na makanisi na ye na makambo ya politiki, bakómaki baninga ya motema mpenza.

Talá video Johny ná Gideon: Tozalaki banguna, tokómi bandeko. Kɔtá na site jw.org mpo na kozwa video yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto