Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g20 No. 3 nk. 8-9
  • Ndimá ete bato mosusu bazali na bizaleli malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimá ete bato mosusu bazali na bizaleli malamu
  • Lamuká!—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokakatano
  • Toli ya Biblia
  • Oyo okoki kosala
  • Okaniselaka baninga mabe?
    Lamuká!—2020
  • Kokanisela basusu mabe ekosila ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ezaleli ya kokanisela basusu mabe epalangani mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tózala na bomoko ndenge Yehova ná Yesu bazali na bomoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Lamuká!—2020
g20 No. 3 nk. 8-9
Bililingi: 1. Mwasi moko ná mobali na ye bazali kokima mopɛpɛ mpe basiliki mpo mwasi oyo akufá miso akangi nzela. 2. Na nsima, mwasi yango na mobali na ye bazali kosepela na ntango mwasi oyo akufá miso azali kobɛta violon na esika babɛtaka miziki

Ndimá ete bato mosusu bazali na bizaleli malamu

Mokakatano

Soki moto azali komitombola akoki kokanisela baninga mabe. Moto oyo amitombolaka atondi na lolendo. Amonaka ete aleki bato mosusu, mpe akanisaka ete bato oyo bakeseni na ye bazali bato mpamba. Moto nyonso akoki kokwea na motambo yango. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Na [bonkɔkɔ] ya bato mingi bakanisaka ete, ndenge ya bomoi na bango, bilei na bango, ndenge basalaka monzɛlɛ, bizaleli na bango, makambo bandimaka, mpe makambo mosusu ya malamu oyo bango bazali na yango, mpe bongo na bongo, eleki ya bato mosusu nyonso.” Ndenge nini tokoki koboya makanisi wana mabe?

Toli ya Biblia

“Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”​—BAFILIPI 2:3.

Elingi koloba nini? Mpo tóboya ezaleli ya komitombola, tosengeli kolona ezaleli ya komikitisa. Soki tozali bato ya komikitisa, tokomona ete bato mosusu baleki biso na makambo mosusu. Etuluku moko te ya bato bakoki kotuta ntolo ete baleki bato mosusu nyonso na bizaleli malamu mpe na mayele.

Tózwa ndakisa ya Stefan. Akolaki na ekólo ya Bakoministe, kasi alongaki makanisi mabe oyo azalaki kokanisela bato oyo bakolá na bikólo ya Bakoministe te. Alobi boye: “Kokanisa ete bato mosusu baleki biso, ezali na ntina mpo na kolonga ezaleli ya kokanisela baninga mabe. Nayebi makambo nyonso te. Moto nyonso akoki koteya ngai likambo moko boye.”

Oyo okoki kosala

Mitalelá mpenza ndenge ozali mpe kobosana te ete osalaka mabunga. Ndimá ete bato mosusu bakoki kosala likambo moko boye malamu koleka yo. Koloba te ete bato nyonso oyo bauti na etuluku moko boye, bango nyonso bazali kaka na mbeba moko wana.

Na esika ya kozwela moto makanisi mabe kaka mpo auti na etuluku moko boye, mituná boye:

Ndimá ete bato mosusu bakoki kosala likambo moko boye malamu koleka yo

  • ‘Mpo nini nazali koyina moto oyo? Mpo azali na bizaleli mabe to nde mpo tokeseni?’

  • ‘Moto yango mpe akoki komona ngai na mabunga?’

  • ‘Na likambo nini moto yango aleki ngai?’

Soki oyanoli na mituna oyo nyonso na bosembo, mbala mosusu okosuka te kaka na kolongola makanisi mabe oyo okaniselaka bato kasi okomona mpe bizaleli malamu oyo bazali na yango.

Makambo oyo esalemaki: Nelson (États-unis)

“Nakolá na esika oyo bato mingi bazali kaka ya loposo moko mpe babɔkwamá ndenge moko. Kasi ntango nakómaki na mbula 19, nakendaki na engumba ya monene kosala na kompanyi moko, nakómaki kofanda mpe kosala na bato ya loposo mosusu, oyo babɔkwamá ndenge mosusu mpe bazali na mimeseno mosusu.

“Ntango nakómaki moninga ya bato oyo nazalaki kosala na bango, nayaki koyeba ete, kosuka kaka na kotalela loposo ya moto, monɔkɔ oyo alobaka to mboka na ye, ekokaki kosalisa ngai te nayeba mosala makasi oyo moto yango azali kosala, natyela ye motema, nayeba ndenge amiyokaka.

“Na nsima, nabalaki mwasi oyo autá na mboka mosusu, mpe ya loposo mosusu; nayokaki esengo ya koyeba bilei ya sika mpe miziki oyo nayebaki liboso te. Bomoi eteyi ngai ete moto nyonso azali na bizaleli malamu mpe na bizaleli mabe. Ya solo, namoni ete nakómi moto malamu mingi mpo nazali komekola bizaleli malamu ya bato oyo bazali na loposo mpe mimeseno mosusu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto