Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/12 nk. 21-23
  • Makanisi ya baboti mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makanisi ya baboti mosusu
  • Lamuká!—2012
  • Masolo mosusu
  • Apɛndisi​—Mituna oyo baboti batunaka
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Bósololaka malamu na bana oyo bakómi bilenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndenge nini nakoki koyeba baboti na ngai malamu?
    Lamuká!—2010
  • Bandakisa ya mabota ya malamu—Eteni ya liboso
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 1/12 nk. 21-23

Makanisi ya baboti mosusu

Bambula nyonso oyo mwana azali elenge, baboti mingi bakutanaka na mikakatano oyo bakutanaki na yango liboso te. Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo alonga mikakatano ya bolenge, oyo ekɔtisaka mwa mobulu na bomoi na ye mpe na oyo ya yo? Talá oyo baboti mosusu na bisika ndenge na ndenge balobaki na ntina na yango.

MBONGWANA

“Ntango mwana na ngai ya mobali azalaki naino moke, azalaki koyokela ngai, kozanga kotyela ngai ntembe. Kasi ntango akómaki elenge, namonaki lokola ete azalaki kobanga ngai lisusu te. Azalaki kotya ntembe na makambo oyo nazalaki koloba mpe na ndenge oyo nazalaki koloba yango.”​—Frank, Canada.

“Mwana na ngai ya mobali asololaka na ngai lisusu mingi te ndenge azali kosala liboso. Esengeli natunaka ye soki likambo nini ezali kotungisa ye, na esika ete ye ayebisa ngai. Ezali pɛtɛɛ te kotinda ye ayanola na motuna moko. Akoyanola na ye, kasi nsima ya mwa ntango molai.”​—Francis, Australie.

“Kozala na motema molai ezali na ntina mingi. Na bantango mosusu tolingaka kogangela bana na biso, kasi eleki malamu kokitisa naino motema mpe kosolola na bango!”​—Felicia, États-Unis.

KOSOLOLA

“Na bantango mosusu mwana na ngai ya mwasi oyo azali na mbula 17 akómaka komilongisa mpambampamba, mpe mbala mosusu amonaka lokola ete nazali kolobela ye mabe. Esɛngaka nayebisaka ye ete nalingaka ye, nazali na ngámbo na ye, mpe nalingi bolamu na ye!”​—Lisa, États-Unis.

“Ntango bana na ngai bazalaki naino mike, bango moko bazalaki koyebisa ngai makambo na bango nyonso. Ezalaki mpasi te koyeba makambo oyo bazalaki na yango na motema. Kasi sikoyo nasengeli koluka komitya na esika na bango mpe komonisa ete nazali na limemya mpo na mokomoko na bango. Kaka soki nasali bongo nde bakoyebisa ngai makambo oyo bazali na yango na motema.”​—Nan-hi, Corée.

“Tosengeli kaka te kopekisa bilenge básala makambo mosusu. Tosengeli kosalisa bango bákanisa likoló ya makambo yango mpe kosolola na bango mingi mpo na kosimba mitema na bango. Soki tolingi kosalisa bango báyebisaka makambo oyo bazali na yango na motema, tosengeli kondima koyoka nyonso oyo balingi koyebisa biso, ezala mpe makambo mosusu oyo tokosepela te koyoka.”​—Dalila, Brésil.

“Soki esengeli nasembola mwana na ngai ya mwasi, nasalaka nyonso mpo ezala na esika ya biso mibale, kasi na miso ya bato te.”​—Edna, Nigéria.

“Mbala mosusu ntango nasololaka na mwana na ngai ya mobali, nabandaka kosala misala mosusu na ndako mpe natyelaka ye mpenza likebi te. Amonaka yango, mpe nakanisi ete likambo yango esali ete asololaka na ngai lisusu mingi te. Nasengeli kotyela ye likebi mingi koleka ntango tosololaka mpo akoba koyebisaka ngai makambo oyo azali na yango na motema.”​—Miriam, Mexique.

BONSOMI

“Nazalaki kobanga kopesa bana na ngai ya bilenge bonsomi, mpe yango esalaki ete tóbendana na likambo yango. Nasololaki na bango likambo yango polele. Nayebisaki mpo na nini nazalaki kobanga, na nsima bango mpe balobaki mpo na nini balingi napesa bango bonsomi. Toyokanaki na likambo yango; bakokaki kozwa bonsomi kasi natyelaki bango mibeko oyo eleki makasi te mpo bálekisa ndelo te.”​—Edwin, Ghana.

“Mwana na ngai ya mobali azalaki na mposa ya kosomba tukutuku. Na esika natikela ye ntango abimisa makanisi na ye, nagangelaki ye mpe nayebisaki ye makambo nyonso ya mabe oyo ekoki kobimela ye soki asombi tukutuku yango. Yango epesaki ye nkanda mpe etindaki ye asala nyonso mpo asomba tukutuku! Na nsima nasalelaki mayele mosusu. Nalendisaki mwana na ngai atalela likambo yango malamumalamu, akanisa mpe makama oyo ekoki kobima, mbongo oyo akobimisa, mpe masɛngami mpo na kozwa mikanda ya tukutuku mpe kosomba mosusu ya sika soki mikanda ekómi ya kala. Nayebisaki mpe ye aluka na lisangá toli ya bakristo oyo bakɔmeli na elimo. Namonaki ete na esika napekisa ye asomba tukutuku, eleki malamu nalendisa ye ayebisaka polele bamposa na ye. Soki nasali bongo nde nakoki kosimba motema na ye.”​—Hye-young, Corée.

“Totyelaka bana na biso mibeko, kasi mokemoke, topesaka bango mpe bonsomi. Soki bana na biso bakobi kotosa mibeko oyo totyeli bango, mokemoke tokobakisela bango lisusu bonsomi. Na makambo mingi totikelaka bango bázwa bonsomi, mpe tomonisaka bango ete mposa na biso ezali ete bázwa bonsomi; kasi tokobombela bango te ete soki batosi te mibeko oyo totyeli bango, bakozwa etumbu.”​—Dorothée, France.

“Naino nakakolá mitinda na ngai te. Kasi ntango bana na ngai batosaka ngai, nazalaka makambo makasimakasi te. Na ndakisa, mokolo moko napesaki bango nzela bázonga retare na ndako. Kasi soki bazongi retare na ndako kozanga napesa bango nzela, bakozwa etumbu.”​—Il-hyun, Corée.

“Soki mosali atosaka mpe akokisaka malamu mosala na ye, patrɔ na ye akopesa ye lokumu mingi. Ndenge moko mpe, mwana na ngai ya mobali akoki komona ete soki atosaka mpe akokisaka malamu makambo oyo topesi ye nzela asala, mokemoke akozwa bonsomi mingi. Mwana na ngai ayebi ete kaka ndenge mosali moko azwaka etumbu soki akokisi mikumba na ye malamu te, tokoki mpe kobɔtɔla ye bonsomi oyo azwi soki atosi te mibeko oyo totyeli ye.”​—Ramón, Mexique.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]

“Bɔkɔla mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokoma ye monɛnɛ akopɛngwa na yango tɛ.”​—Masese 22:6, Biblia haut fleuve

[Etanda/​Bililingi na lokasa 23]

NDAKISA YA LIBOTA MOKO

“Kobɔkɔla bilenge ezali likambo ya esengo mingi”

Joseph: Bana na biso mibale ya liboso ya basi bazali na mbula 17 mpe 13, mpe namonaka ete ezali na ntina mingi tóyokaka bango ntango bazali koloba mpe tóndimaka makanisi na bango. Lokola nandimaka mabunga na ngai polele mpe nasololaka na bana na ngai ya basi na limemya, yango esalaka ete tósololaka mingi. Na mokuse, na lisalisi ya batoli oyo tozwaka na Biblia, Liloba ya Nzambe, namonaka ete kobɔkɔla bilenge ezali likambo ya esengo mingi.

Lisa: Ntango mwana na biso ya mwasi ya liboso akómaki elenge, namonaki ete esɛngaki nakipe ye lisusu mingi koleka. Nazali koyeba lisusu ete nazalaki kolekisa ntango mingi mpo na koyoka ye ntango azali koloba, kosolola na ye, mpe kokitisa ye motema. Ngai ná mobali na ngai tóyebisaka bana na biso ete bakoki koyebisa biso nyonso oyo balingi mpe ete tokotalela makanisi na bango. Nasalaka makasi mpo na kosalela toli ya bwanya oyo ezali na Yakobo 1:19, oyo elobi ete tosengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te.”

Victoria: Mama na biso azali moninga na ngai ya motema. Naino namoná te moto ya motema malamu mpe oyo akipaka bato lokola ye, mpe azalaka bongo ná bato nyonso. Namonaka mpenza ete mama akipaka bato na motema moko. Moto aleki ye azali te.

Olivia: Papa na biso akipaka bato mpe akabaka mingi. Azalaka ntango nyonso pene mpo na kokabela basusu, ata ntango libota na biso ezali na mingi te ya kopesa. Ayebi ndenge ya kozwa makambo na lisɛki te, kasi ayebi mpenza ndenge ya kosepela elongo na basusu. Azali papa moko ya malamu, mpe nasepelaka mingi ndenge azali papa na ngai!

“Tozalaka ntango nyonso na mingi ya kosala!”

Sonny: Soki bana na biso ya basi bazali na likambo moko oyo ezali kotungisa bango, tofandaka libota mobimba mpo na kolobela yango. Ntango nyonso, toyebisanaka makanisi polele mpe totalelaka mitinda ya Biblia mpo na kozwa bikateli. Ngai ná Ynez tosalaka nyonso mpo bana na biso ya basi bázala na baninga ya malamu, oyo bakɔmeli na elimo. Baninga na biso bazali baninga na bango, mpe baninga na bango bazali baninga na biso.

Ynez: Tozangaka likambo ya kosala te, mpe tosalaka makambo mingi libota mobimba elongo. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tozalaka na mingi ya kosala: mosala ya kosakola, boyekoli ya Biblia ezala ya biso moko to elongo na libota, kopesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge, na ndakisa kosalisa bandeko oyo bakweli likama mpe kotonga Bandako ya Bokonzi. Tosalaka mpe nyonso mpo tózala na ntango ya kominanola. Tozalaka ntango nyonso na mingi ya kosala!

Kellsie: Papa na biso ayokaka mpenza soki ozali koloba na ye, mpe ntango nyonso liboso ya kozwa ekateli ya monene, atunaka likanisi ya bato nyonso na libota. Mama na biso azalaka ntango nyonso pene mpo na koyoka ngai soki nazali na mposa ya lisalisi, to soki nazali kaka na mposa ya kosolola na moto.

Samantha: Mama na biso asalaka nyonso mpo namiyoka ete nazali na ntina mingi mpe nalingami mingi, ata soki ye moko ayebaka yango te. Ayokaka ngai. Akipaka ngai. Nakolinga ata moke te eloko moko ekabola ngai ná mama.

[Bililingi]

Libota ya ndeko Camera: Joseph, Lisa, Victoria, Olivia, mpe Isabella

Libota ya ndeko Zapata: Kellsie, Ynez, Sonny, mpe Samantha

[Elilingi na lokasa 22]

Baboti bakoki kopesa bana mwa bonsomi, kasi batyaka mpe mibeko oyo eleki makasi te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto